Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali na boyokani ya ndenge nini ná Yehova?

Ozali na boyokani ya ndenge nini ná Yehova?

“Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—YAKOBO 4:8.

1. Mpo na nini tosengeli kokoba kobatela makasi boyokani na biso elongo na Yehova?

SOKI ozali Motatoli ya Yehova, ozali na eloko moko ya motuya mpenza. Ozali na boyokani mpenza elongo na Yehova. Kasi, mokili ya Satana ezali koluka kobebisa boyokani yango mpe ezaleli na biso ya kozanga kokoka ekoki mpe kolɛmbisa yango. Yango wana, biso nyonso tosengeli kokoba kobatela makasi boyokani na biso elongo na Yehova.

2. (a) Boninga ezali nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.) (b) Ndenge nini tokoki kokómisa boninga na biso ná Yehova makasi?

2 Omonaka mpenza Yehova lokola moto ya solo? Omonaka mpenza ete azali moninga na yo? Okolinga ete boyokani na yo elongo na ye ezala makasi mpenza? Mokanda ya Yakobo 4:8 eyebisi yo oyo osengeli kosala. Elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” Mpo na kosala boyokani ná Yehova, esengeli bato mibale: yo ná ye. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Soki ozwi bibongiseli mpo na kopusana penepene na Yehova, ye mpe akozwa bibongiseli mpo na kopusana penepene na yo. Soki ozali kosala bongo, akokóma mpenza moto ya solo mpo na yo, mpe boyokani na yo ná ye ekokóma makasi mpenza, mpe okomiyoka ndenge Yesu amiyokaki ntango alobaki ete: “Oyo atindaki ngai azali mpenza” mpe, “Ngai nayebi ye.” (Yoane 7:28, 29) Kasi makambo nini okoki kosala mpo na kopusana penepene na Yehova?

Ndenge nini okoki kosolola ná Nzambe? (Talá paragrafe 3)

3. Ndenge nini tokoki kosolola na Yehova?

3 Soki olingi kopusana penepene na Yehova, ezali na ntina mingi bósololaka mbala na mbala. Kasi ndenge nini okoki kosala yango? Kanisá ndenge oyo okoki kosolola na moninga oyo afandaka mosika. Bokoki kokomelana mbala na mbala mpe kosololaka na telefone. Osololaka na Yehova ntango obondelaka ye mbala na mbala. (Tángá Nzembo 142:2.) Kasi ndenge nini okoki kotika Yehova asolola na yo? Osalaka bongo ntango ozali mbala na mbala kotánga Liloba na ye, Biblia, mpe komanyola likoló na yango. (Tángá Yisaya 30:20, 21.) Tótala ndenge oyo kosolola na Yehova ekoki kokómisa boninga na yo ná ye makasi mpe ekoki kosala ete akóma mpenza moninga na yo ya solosolo.

TIKÁ YEHOVA ALOBA NA YO NTANGO OZALI KOYEKOLA BIBLIA

4, 5. Ndenge nini Yehova alobaka na yo ntango otángaka Biblia? Pesá ndakisa.

4 Toyebi ete Biblia ezali nsango ya Nzambe mpo na moto nyonso. Kasi Biblia ekoki kosalisa yo opusana penepene na Yehova? Ɛɛ! Ntango ozali mbala na mbala kotánga mpe koyekola Biblia, tyáká likebi na ndenge oyo ozali komiyoka mpo na makambo oyo ozali kotánga. Mpe kanisá na ndenge oyo okoki kosalela makambo oyo oyekoli. Soki osali bongo, ozali kotika Yehova aloba na yo. Akokóma moninga na yo ya motema oyo akosalisa yo, mpe okopusana penepene na ye.​—Baebre 4:12; Yakobo 1:23-25.

5 Na ndakisa, oyokaka ndenge nini ntango otángaka maloba ya Yesu oyo ete: “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele”? Soki ozali kosala nyonso mpo na kotya Yehova na esika ya liboso na bomoi na yo, okomona ete akosepela na yo. Kasi okoki kotánga maloba ya Yesu mpe komona ete osengeli kokómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ mpo otya makanisi nyonso na mosala ya Nzambe. Soki ezali bongo, Yehova azali kosalisa yo oyeba oyo osengeli kosala mpo opusana penepene na ye.​—Matai 6:19, 20.

6, 7. (a) Ntango tozali koyekola Biblia, bolingo na biso mpo na Yehova mpe bolingo na ye mpo na biso ekokóma ndenge nini? (b) Mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala nini ntango tozali koyekola Biblia?

6 Ezali solo ete ntango totángaka Biblia, toyekolaka bambongwana oyo tokoki kosala mpo na kosalela Yehova malamu mpenza. Kasi, toyekolaka mpe makambo kitoko oyo asalaka, bomoto na ye ya malamu oyo etindaka biso tólinga ye lisusu mingi. Ntango bolingo na biso mpo na Yehova ezali kokola, bolingo na ye mpe mpo na biso ekolaka mpe kutu boninga na biso ekómaka mpenza makasi.​—Tángá 1 Bakorinti 8:3.

7 Soki tolingi kopusana penepene na Yehova, ezali mpenza na ntina ete tóyekola Biblia na makanisi ya malamu. Yesu alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoane 17:3) Tokoki koyekola makambo mingi ya sika mpe ya kitoko ntango tozali kotánga Biblia, kasi mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya koyeba Yehova malamumalamu lokola moto mpenza.​—Tángá Kobima 33:13; Nzembo 25:4.

8. (a) Bato mosusu bakoki kokanisa nini na likambo oyo Yehova asalaki Azaria? (b) Soki oyebi Yehova, okoyoka ndenge nini mpo na oyo asalaka?

8 Ntango tokómisi Yehova moninga na biso ya motema, tokotungisama te soki Biblia elimboli te na ntango mosusu ntina oyo asali likambo boye to boye. Na ndakisa, ntango Azaria azalaki mokonzi ya Yuda, bato bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Azaria alandaki bango te. “Akobaki kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova.” (2 Bakonzi 15:1-5) Kasi Yehova apesaki Azaria etumbu ya maladi ya maba. Mpo na nini? Mwa lisolo yango eyebisi biso ntina te. Na yango, okanisi nini na likambo wana oyo Yehova asalaki? Epesi yo mpasi mpe etindi yo okanisa ete Yehova azalaki makambo makasimakasi, mpe ete apesaki Azaria etumbu kaka mpamba? Te. Soki oyebi Yehova malamumalamu, oyebi ete disiplini na ye ezalaka ntango nyonso sembo. Apesaka ntango nyonso disiplini “na ndenge oyo ekoki.” (Yirimia 30:11) Na yango, ata soki okoki koyeba te mpo na nini Yehova apesaki Azaria etumbu, okoki kondimisama ete Yehova asalaki oyo ezali sembo.

9. Makambo nini mosusu esalisi biso tóyeba ntina oyo Yehova apesaki Azaria etumbu ya maladi ya maba?

9 Biblia eyebisi biso makambo mosusu mpo na bomoi ya mokonzi Azaria, oyo ayebanaki mpe na nkombo ya mokonzi Uzia. (2 Bakonzi 15:7, 32) Lisolo oyo ezali na 2 Ntango 26:3-5, 16-21 elobi mpe ete asalaki “oyo ezali sembo na miso ya Yehova.” Kasi elobi lisusu ete “motema na ye ekómaki na lolendo kino ememelaki ye libebi.” Mokonzi alukaki kosala likambo moko oyo kaka banganga-nzambe nde basengelaki kosala yango. Banganga-nzambe 81 bayebisaki ye ete azali na libunga mpe bamekaki kopekisa ye. Asalaki nini? Akómaki na lolendo mingi mpe asilikelaki bango! Makambo oyo mosusu esalisi biso tóyeba ntina oyo Yehova apesaki mokonzi yango etumbu ya maladi ya maba.

Wana ozali kokoba koyeba Yehova, okokóma kotyela ye motema ete asalaka ntango nyonso makambo ya sembo

10. Mpo na nini ezali na ntina te tóyeba bantina ya makambo nyonso oyo Yehova asali? Ndenge nini tokoki mpenza kotya motema ete Yehova asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo?

10 Liteya nini ya ntina tozwi? Na lisolo ya mokonzi Azaria, tozali na makambo mingi oyo esalisi biso tóyeba ntina oyo Yehova apesaki ye etumbu. Kasi okosala nini soki Biblia eyebisi te makambo mosusu nyonso mpo na likambo moko boye? Okomituna soki Yehova asali mpenza oyo ezali sembo? To okondima ete Biblia ezali na makambo mingi oyo endimisaka yo ete Nzambe asalaka ntango nyonso makambo oyo ezali sembo? (Kolimbola mibeko 32:4) Wana ozali kokoba koyeba Yehova lokola moto mpenza, okolinga ye mpe okotyela ye motema mingi. Mpe na nsima okozala te na mposa ya koyeba makambo nyonso oyo etindi ye asala boye to boye. Wana ozali koyekola Biblia, Yehova akokóma mpenza moto ya solo epai na yo mpe okopusana penepene na ye.​—Nzembo 77:12, 13.

OSOLOLAKA NA YEHOVA NTANGO OBONDELAKA

11-13. Ndenge nini oyebi ete Yehova ayokaka mabondeli? (Talá elilingi ya ebandeli.)

11 Ntango tobondelaka, topusanaka penepene na Yehova. Tosanzolaka ye, topesaka ye matɔndi, mpe tosɛngaka ye asalisa biso. (Nzembo 32:8) Kasi soki olingi kozala na boninga makasi ná Yehova, osengeli kondimisama ete ayokaka mabondeli.

12 Bato mosusu balobaka ete Nzambe ayokaka mabondeli te mpe balobaka ete kosala libondeli ezali kaka mwa likambo ya kosala mpo omiyoka malamu. Bakanisaka ete libondeli ezali kaka mpo na kosalisa yo okanisa malamumalamu na mitungisi na yo mpe oluka yo moko ndenge ya kosilisa yango. Ezali solo ete libondeli ekoki kosalisa yo na makambo wana. Kasi ntango osololaka na Yehova na libondeli, ayokaka yo mpenza. Nini ekoki kondimisa yo ete ezali bongo?

Okoki kondimisama ete Yehova ayokaka mabondeli na yo

13 Kanisá naino: Liboso Yesu aya awa na mabele, amonaki ete Yehova ayanolaka na mabondeli ya basaleli na ye awa na mabele. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu abondelaki Tata na ye na likoló mpo na koyebisa ye makanisi na ye mpe ndenge azalaki komiyoka. Kutu mokolo moko, abondelaki butu mobimba. (Luka 6:12; 22:40-46) Yesu alingaki nde kosala bongo soki akanisaki ete Yehova azalaki mpenza koyoka ye te? Yesu ateyaki mpe bayekoli na ye ndenge ya kobondela Yehova. Akokaki nde kosala bongo soki akanisaki ete Yehova ayokaka mabondeli te? Emonani polele ete, Yesu ayebaki ete Yehova ayokaka mpenza mabondeli. Kutu alobaki ete: “Tata, natɔndi yo na ndenge oyoki ngai. Ya solo, nayebi ete oyokaka ngai ntango nyonso.” Biso mpe tosengeli kondimisama mpenza ete Yehova ayokaka mabondeli na biso.​—Yoane 11:41, 42; Nzembo 65:2.

14, 15. (a) Matomba nini tozwaka soki tozali kosɛnga makambo ya sikisiki na mabondeli na biso? (b) Ndenge nini mabondeli ya Kathy esalisaki ye apusana penepene na Yehova?

14 Biyano na mabondeli na yo ekoki ntango nyonso komonana polele te. Kasi ntango ozali kosɛnga makambo ya sikisiki na mabondeli na yo, okozala na likoki ya komona polele ndenge Yehova akoyanola, mpe akokóma mpenza moto ya solo epai na yo. Soki na motema mobimba oyebisi Yehova makambo nyonso oyo ezali kotungisa yo, akopusana mpenza penepene na yo.

15 Na ndakisa, Kathy * azalaki mbala na mbala kobima mosala ya kosakola, kasi azalaki kosepela na yango te. Alobi ete: “Nazalaki kosepela te na mosala ya kosakola. Mpo na koloba solo, nazalaki mpenza te kolinga yango.” Ntango azwaki pansiɔ, nkulutu moko alendisaki ye akóma mobongisi-nzela. Alobi boye: “Kutu apesaki ngai formilɛrɛ. Nazwaki ekateli ya kokóma mobongisi-nzela, kasi nabandaki mpe kobondela mokolo na mokolo ete Yehova asalisa ngai nalinga mosala ya kosakola.” Yehova ayanolaki na mabondeli na ye? Nsima ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mbula misato, alobi sikoyo boye: “Lokola nazalaki kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola mpe koyekola makambo epai ya bandeko basi mosusu, nakolisaki mokemoke makoki na ngai ya kosakola. Lelo oyo, nasepelaka na mosala ya kosakola kutu nalingaka yango mingi. Likambo eleki ntina, boninga na ngai ná Yehova ekómá lisusu makasi koleka ndenge ezalaki liboso.” Mabondeli ya Kathy esalisaki ye mpenza apusana penepene na Yehova.

Kobá kopusana penepene na Yehova (Talá paragrafe 16, 17)

KOKANGA MABƆKƆ TE

16, 17. (a) Tosengeli kosala nini mpo na kokoba kokómisa boninga na biso ná Yehova makasi? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

16 Tokoki kopusana penepene na Yehova mpo na libela. Na yango, tiká ete tókoba koyoka ye mbala na mbala na nzela ya boyekoli na biso ya Biblia, mpe tókoba kosolola na ye na libondeli. Soki tosali bongo, boninga na biso ná Yehova ekokóma lisusu makasi koleka, mpe na lisalisi na ye tokozala na likoki ya koyikela mikakatano mpiko.

Tokoki kopusana penepene na Yehova mpo na libela

17 Kasi na ntango mosusu tobundaka na mitungisi na biso moko, ata soki tozali kokoba kobondela Yehova. Na bantango wana, kondima na biso epai ya Yehova ekoki kobanda kolɛmba. Mbala mosusu tokoki komona ete Yehova azali koyoka mabondeli na biso te mpe tokoki komituna soki mpenza tozali baninga na ye. Okoki kosala nini soki okómi na makanisi ya ndenge wana? Lisolo oyo elandi ekosalisa yo.

^ par. 2 Boninga ezali lolenge oyo bato mibale batalelanaka mpe basalelanaka makambo. Bango nyonso mibale basengeli kosala mwa likambo moko mpo boninga na bango ezala makasi.

^ par. 15 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.