LISOLO YA BOMOI
Kokanisa na bolingo oyo nazalaki na yango liboso esalisaki ngai nayika mpiko
NA SANZA ya motoba ya mobu 1970, nazalaki na mbeto ya lopitalo na Pennsylvanie, États-Unis. Nazalaki na mbula 20, mpe nazalaki soda. Kasi nabɛlaki maladi moko ya mabe mpenza. Lifulume moko ya mobali azalaki koluka kotala ngai tansiɔ nsima ya miniti 30 nyonso. Lifulume yango alekaki ngai mwa moke na bambula, mpe namonaki lokola ete azalaki komitungisa. Lokola tansiɔ na ngai ezalaki kaka kokita, natunaki ye ete: “Omoná naino te moto akufi?” Elongi na ye ekómaki malili, mpe ayanolaki ngai ete: “Namoná naino te moto akufi.” Emonanaki lokola nakozala lisusu na bomoi te, kasi nabikaki. Tiká nabɛtɛla bino mwa moke lisolo ya bomoi na ngai.
MAKAMBO OYO NAKUTANAKI NA YANGO LIBOSO NA BITUMBA
Nabɛlaki ntango nazalaki kosala lokola monganga na ndako oyo ebongisamaki mpo na koyamba bato ya maladi na etumba ya Vietnam. Nazalaki kosepela kosalisa bato ya maladi, oyo bazalaki kozoka mpe nazalaki na mokano ya kokóma monganga oyo apasolaka bato. Nakómaki na Vietnam na sanza ya nsambo ya mobu 1969. Ndenge ezalaki kosalema mpo na soda nyonso ya sika, batikelaki ngai pɔsɔ moko mpo namesana na ngonga mpe klima ya mboka yango.
Batyaki ngai nasala na lopitalo ya basoda na Mekong Delta. Baaviɔ ezalaki komema basoda oyo bazoki na lopitalo. Nazalaki kolinga ekólo na biso mpe nazalaki kolinga mosala, yango wana nazalaki na mposa ya kosalisa bana-mboka na biso mbala moko. Basoda oyo bazokaki bazalaki kobongisama mpo bázwa lipaso mpe bazalaki kotindama mbala moko na mwa bandako oyo ebongisamaki mpo na kosala lipaso. Minganga mibale mpe balifulume mibale basalaki nyonso mpo na kobikisa bato. Namonaki basaki ya minene ya moindo oyo etikalaki kaka na baaviɔ. Bayebisaki ngai ete basaki yango ezali na biteni ya nzoto ya bato oyo babɔmbi ekatakataki bango na bitumba. Wana likambo ya liboso oyo namonaki na etumba.
NABANDI KOLUKA NZAMBE
Nayokaki solo epai ya Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso ntango nazalaki elenge. Batatoli ya Yehova bazalaki koyekola na mama Biblia, kasi azwaki naino batisimo te. Kasi, nazalaki kosepela kozala wana ntango bazalaki koyekola. Mokolo moko, ngai ná mobali ya mama na biso tolekaki pembeni ya Ndako ya Bokonzi. Natunaki ye, “Oyo nini?” Ayanolaki ngai ete, “Komeka kopusana te pene ya bato wana!” Lokola nazalaki kolinga ye mpe
kotyela ye motema, natosaki mpe nakutanaki lisusu na Batatoli ya Yehova te.Kasi, ntango nalongwaki na Vietnam, ezalaki na makambo oyo soki nakanisi, ezalaki kopesa ngai mpasi. Makambo oyo namonaki na ntango ya bitumba, esalaki ete namona mokili mabe mpenza. Namonaki lokola moto ata moko te azali koyeba makambo oyo ezali koleka na Vietnam. Nazali koyeba lisusu ndenge nazalaki koyoka batomboki bazali kobenga basoda ya États-Unis babomi ya babebe mpo balapolo ezalaki komonisa ete bana oyo basali eloko te bazalaki kobomama. Makambo oyo nyonso emonisaki ngai ete nasengeli kozala na boyokani malamu ná Nzambe.
Lokola nazalaki koluka Nzambe, nabandaki kokende na mangomba ndenge na ndenge. Nazalaki kolinga Nzambe, kasi nazalaki kosepela te na makambo nazalaki komona na mangomba yango. Nsukansuka, nakendeki na Ndako ya Bokonzi moko na Delray Beach, na Floride. Mbala ya liboso oyo nakɔtaki na makita ezalaki mokolo ya lomingo, sanza ya mibale mobu 1971.
Ntango nakɔtaki na Ndako ya Bokonzi, diskur ya bato nyonso ezalaki pene ya kosila, kasi natikalaki mpo na kolanda boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nayebaka lisusu te lisolo oyo toyekolaki, kasi nazali koyeba ndenge bana bazalaki kozwa bavɛrsɛ na Babiblia na bango. Nakamwaki makasi! Nazalaki kaka koyoka mpe kotala. Ntango nabandaki kokende, ndeko mobali moko ya mbula soki 80 ayaki epai na ngai. Nkombo na ye ezalaki Jim Gardner. Apesaki ngai buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe atunaki, “Okosepela kozwa yango?” Nandimaki mpe toyokanaki tókutana mpo na kobanda koyekola Biblia mokolo ya lomingo.
Nasengelaki kokende mosala nsima ya makita ya lomingo. Nazwaki mosala na lopitalo moko na Boca Raton na Floride; mpe esengelaki nabanda mosala na ngonga ya 23 tii na ngonga ya 7 na ntɔngɔ. Lokola na butu wana bato ya maladi bazalaki mingi te, nazalaki kotánga buku wana oyo bapesaki ngai. Lifulume moko abendaki buku yango na mabɔkɔ na ngai, atalaki ezipeli na yango, mpe atunaki ngai soki nalingi kokóma Motatoli ya Yehova. Ngai mpe nabendaki buku yango na mabɔkɔ na ye mpe nayebisaki ye ete atako natángi yango kaka mwa ndambo, kasi nakómi mpenza na makanisi ya kokóma Motatoli ya Yehova. Atikaki ngai mpe nasilisaki kotánga buku yango kaka na butu wana.
Mokolo ndeko Gardner ayaki mpo tóbanda koyekola, natunaki ye, “Sikoyo, tokoyekola nini?” Ayanolaki ete, “Buku oyo napesaki yo.” Nalobaki ete, “Nasilisi kotánga yango nyonso.” Na boboto mpenza ndeko Gardner alobaki, “Likambo te, kasi tótalela naino kaka mokapo oyo ya liboso.” Nakamwaki ete nakangaki ntina te ya makambo mingi. Asɛngaki ngai natala bavɛrsɛ mingi na Biblia na ngai: King James Version. Nsukansuka nayekolaki solo na ntina na Nzambe ya solo, Yehova. Ndeko Jim ayekolaki na ngai mikapo misato ya buku yango na ntɔngɔ wana. Nsima na yango, tozalaki koyekola mikapo misato mokolo nyonso ya minei na ntɔngɔ. Nazalaki kosepela na boyekoli yango mingi. Nazwaki mpenza libaku malamu ya koteyama na ndeko wana oyo atyami mafuta na elimo oyo ayebaki ndeko Charles Taze Russel!
Misala 20:20) Na nzela ya lisalisi na ye, nayekolaki ndenge ya kolinga mosala ya kosakola. Namonaki ete mosala ya kosakola ezali libaku moko kitoko mpenza oyo nazali na yango. Nazali na esengo mingi ndenge nazali kosala elongo na Nzambe!—1 Bakorinti 3:9.
Nsima ya mwa bapɔsɔ ya boyekoli, nandimamaki lokola mosakoli ya nsango malamu. Kosakola ndako na ndako ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai, kasi Jim asalisaki ngai nalonga mikakatano yango. (BOLINGO NA NGAI YA LIBOSO MPO NA YEHOVA
Tiká nayebisa bino sikoyo likambo moko ya ntina mingi, bolingo na ngai ya liboso mpo na Yehova. (Emoniseli 2:4) Bolingo yango mpo na Yehova esalisaki ngai nayika mpiko liboso ya makambo ya mpasi oyo namonaki na bitumba mpe mikakatano mosusu.—Yisaya 65:17.
Bolingo na ngai mpo na Yehova esalisaki ngai nayika mpiko liboso ya makambo ya mpasi oyo namonaki na bitumba mpe mikakatano mosusu
Na mobu 1971, bayebisaki ngai ete nalongwa na apartema oyo baboti na ngai batikelaki ngai nafandaka. Mpo na nini? Mobali ya mama alingaki te ete Motatoli ya Yehova afanda kuna! Nazalaki na mbongo mingi te na ntango wana. Na lopitalo, bazalaki kofuta ngai nsima ya pɔsɔ nyonso mibale, mpe nautaki kosalela mingi mbongo oyo nazalaki na yango na kosomba bilamba mpo nabimaka na yango na mosala ya kosakola mpo nalingaki kozala momonisi ya Yehova oyo abongi. Nazalaki na mwa mbongo na banki, kasi ezalaki epai na biso na Michigan. Na yango, na boumeli ya mwa mikolo, nazalaki kolala na kati ya motuka na ngai. Mpo na komisukola mpe kokata mandɛfu, nazalaki kokende na bisika oyo babongisá mpo na bato nyonso na bapɔmpi ya esansi.
Mokolo moko ntango nazalaki naino kofanda na motuka, nasilisaki mosala na lopitalo mpe nakendeki na Ndako ya Bokonzi mwa bangonga liboso ya likita ya mosala ya kosakola. Ntango nafandaki nsima ya Ndako ya Bokonzi epai ata moto moko te akoki komona ngai, makambo ya Vietnam ezongelaki ngai na makanisi. Emonanaki lokola nazalaki koyoka nsolo ya bibembe oyo batumbaki mpe
komona makila, mpe nabandaki komitungisa. Ezalaki lokola nazalaki koyoka mpe komona bilenge mibali bazali koloba na ngai: “Tokobika? Tokobika solo mpenza?” Nayebaki ete bakokufa, kasi nazalaki koluka kolendisa bango mpe nalobaki ete makambo nyonso ekoleka malamu. Ntango nafandaki kuna, makanisi na ngai ekómaki mosika mpenza.Ezala nazali na mikakatano ya bomoi, nasalaka nyonso nabosana te bolingo na ngai ya liboso mpo na Yehova
Nabondelaki Yehova ntango nazalaki kolela. (Nzembo 56:8) Nabandaki kokanisa na mozindo na lisekwa. Na ntango wana nde namonaki mpenza ete elikya yango ezali kitoko mingi! Yehova akosekwisa bilenge wana, mpe bakozala na libaku ya koyekola solo na makambo etali ye. Lisekwa ekolongola bampasi mpe minyoko nyonso oyo tozali koyoka. (Misala 24:15) Ntango nakangaki ntina ya likambo yango, bolingo na ngai mpo na Yehova ekómaki lisusu makasi mingi. Nabosanaka mokolo wana ata moke te. Banda wana, ezala nazali na mikakatano ya bomoi, nasalaka nyonso nabosana te bolingo na ngai ya liboso mpo na Yehova.
YEHOVA AMONISELAKI NGAI MOTEMA BOBOTO
Bato basalaka makambo ya nsɔmɔ na ntango ya bitumba, mpe yango nde ngai mpe nasalaki. Kasi nazwaki makasi ntango nakanisaki na mozindo na bavɛrsɛ mibale ya Biblia oyo nalingaka mingi. Ya liboso ezali Emoniseli 12:10, 11, oyo elobaka ete kaka mosala na biso ya kosakola te nde ezali kolonga Zabolo, kasi mpe makila ya Yesu. Ya mibale ezali Bagalatia 2:20, oyo ekundwelaka ngai ete Yesu akufaki mpo na ngai. Na nzela ya mbeka ya Kristo, Yehova alimbisá ngai na makambo oyo nasalá. Na yango, nazali na lisosoli ya pɛto mpe mposa makasi ya koyebisa basusu ete Yehova azali Nzambe ya motema mawa!—Baebre 9:14.
Soki nakanisi na makambo oyo nakutani na yango na bomoi, emonani polele ete Yehova abateli ngai mpenza. Na ndakisa, mokolo ndeko Jim ayebaki ete nalalaka na kati ya motuka na ngai, alakisaki ngai epai ya ndeko mwasi moko oyo azalaki na bashambrɛ ya kofutela epai na ye. Nandimi mpenza ete Yehova asalelaki ndeko Jim ná ndeko mwasi wana mpo nazwa esika oyo ebongi mpo na kofanda. Yehova azali mpenza boboto! Amibanzabanzaka mpenza mpo na basaleli na ye ya sembo.
NAYEKOLI NDENGE YA KOZALA NA MOLENDE MPE KOLOBAKA NA MAYELE
Na sanza ya mitano ya mobu 1971, nalingaki kokende na Michigan. Liboso natika Floride, natondisaki motuka na ngai na mikanda mpe nakendeki na nɔrdi. Liboso nalongwa etúká oyo elandaki, elingi koloba Georgie, nasilisaki mikanda nyonso. Nasakolaki na molende nsango malamu ya Bokonzi bisika nyonso oyo nakendeki. Nasakolaki na babolɔkɔ mpe napesaki kutu batrakte epai ya mibali oyo bazalaki koya na bisika oyo babongisá mpo bato bápemaka. Namitunaka soki ata moto moko na kati ya bato oyo nasololaki na bango ayekolá solo.—1 Bakorinti 3:6, 7.
Nakoki koloba solo ete ntango nayekolaki liboso solo, nazalaki koloba na mayele te, mingimingi ntango nazalaki kosolola ná libota na ngai. Ntango mosusu nazalaki koloba maloba ya makasi. Nalingaka mingi bandeko na ngai, John ná Ron, mpe ntango nazalaki kosakwela bango, nazalaki koluka kondimisa bango na makasi bindimeli na ngai ya sika. Na nsima, nasɛngaki bolimbisi. Kasi nazali kobondela ete bándima solo mokolo mosusu. Banda wana, Yehova asalisi mpo ete nalobaka na mayele mpenza ntango nazali kosakola mpe koteya.—Bakolose 4:6.
BATO MOSUSU OYO NALINGAKA
Boyokani na ngai ná Yehova ekozala ntango nyonso na esika ya liboso na bomoi na ngai. Kasi, ezali mpe na bato oyo nalingaka mingi, mingimingi Susan, mwasi na ngai. Nazalaki koluka mwasi oyo akosalisa ngai nakoba kosalela Yehova. Susan azali mwasi moko oyo azali na ekateli ya kokoba kolinga Yehova mingi mpenza. Mokolo moko ntango tozalaki bafianse, nakendeki kotala ye epai ya baboti na ye na esanga Rhode. Afandaki na veranda, azali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Biblia ezalaki na mopanzi.
Eloko ekamwisaki ngai mingi ezali ete azalaki kotánga bavɛrsɛ nyonso, atako azalaki te kotánga lisolo ya boyekoli. Nakokaki komona ete boyokani na ye ná Yehova ezalaki likambo ya ntina mingi. Tobalanaki na sanza ya zomi na mibale ya mobu 1971. Nazali mpenza na botɔndi kozala na mwasi ya boye oyo asungaka ngai mingi. Eloko nasepelaka na yango mingi epai na ye ezali ete atako alingaka ngai mingi, kasi alingaka nde Yehova koleka.Yehova apesá biso bana mibale ya kitoko, Jesse ná Paul. Ntango bazalaki kokola, Yehova atambwisaki bango. (1 Samwele 3:19) Bango moko babongisaki boyokani na bango ná ye, mpe yango esepelisaki biso mingi koleka. Mokomoko na bango asaleli Yehova na mosala ya ntango nyonso na boumeli ya mbula koleka 20. Mpe bazali kokoba kosalela ye mpo bango mpe babosanaka te bolingo ya liboso oyo bazalaki na yango mpo na ye. Nasepelaka mpe mingi na basi ya bana na biso, Stephanie ná Racquel, mpe namonaka bango lokola bana na ngai mpenza. Nazali na botɔndi mingi mpo ete bana na biso babali basi oyo balingaka Yehova na motema na bango mobimba mpe basalelaka bomoi na bango mobimba mpo na kosalela ye.—Baefese 6:6.
Nasalaki na boumeli ya mbula 16 na esangaRhode, epai nakómaki na baninga ebele. Nabosanaka te bankulutu ya bolingo mpenza oyo nasalaki ná bango. Nazali mpe na botɔndi mpo na ebele ya bakɛngɛli batamboli oyo basalisaki ngai. Ezalaki mpenza libaku malamu kosalela Yehova elongo na bandeko oyo bazalaki kobatela bolingo oyo bazalaki na yango liboso mpo na Yehova. Na mobu 1987, *—Talá maloba na nse ya lokasa.
tokendeki na Caroline du Nord, epai mposa ezalaki monene, kuna mpe tozwaki baninga mingi ya malamu.Na sanza ya mwambe ya mobu 2002, ngai ná Susan, tondimaki ntango babengaki biso mpo tókóma kosala na Betele ya États-Unis, na Patterson. Nasalaki na departema ya mosala, mpe Susan asalaki na esika basukolaka bilamba, mpe alingaki mosala yango mingi! Na sanza ya mwambe ya mobu 2005, nazwaki libaku ya kokóma na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Namonaki ete nabongi te na mosala yango. Susan mpe amonaki mokumba, mosala mpe mibembo oyo tosengelaki kosala likambo ya pɛtɛɛ te. Azalaki kosepela te kosala mibembo na mpɛpɔ, atako bongo, yango nde tosalelaka mingi. Toli ya bolingo oyo bandeko basi mosusu oyo mibali na bango mpe bazali na kati ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bapesaki mwasi na ngai esalisaki ye mingi. Esalisaki ye azwa ekateli ya kopesa ngai mabɔkɔ, mpe nalingaka ye mingi mpo na likambo yango.
Na biro na ngai natyá bafɔtɔ mingi ya kitoko oyo esalisaka ngai nakanisaka bomoi malamu nalekisaki. Nazwi mapamboli mingi na ndenge nasalaka oyo nakoki mpo nakanisa bolingo oyo nazalaki na yango liboso mpo na Yehova!
^ par. 30 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali mosala ya ntango nyonso ya ndeko Morris, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2006, na lokasa 26.