Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Salá nyonso mpo na kokómisa paradiso ya elimo kitoko

Salá nyonso mpo na kokómisa paradiso ya elimo kitoko

“Nakokumisa esika ya makolo na ngai.”​—YISAYA 60:13.

NZEMBO: 102, 75

1, 2. Na Makomami ya Ebre maloba “ebonga ya makolo” elimboli nini?

YEHOVA NZAMBE alobaki ete: “Likoló ezali kiti na ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali ebonga ya makolo na ngai.” (Yisaya 66:1) Nzambe alobelaki mpe “ebonga ya makolo” na ye ntango alobaki ete: “Nakokumisa esika ya makolo na ngai.” (Yisaya 60:13) Ndenge nini akumisaki ebonga ya makolo na ye, to akómisaki yango kitoko mingi? Mpe yango elingi koloba nini mpo na baoyo bazali na ebonga ya makolo na ye, elingi koloba na mabele?

2 Na Makomami ya Ebre, maloba “ebonga ya makolo” esalelami mpe mpo na kolobela tempelo ya kala ya Yisraele. (1 Ntango 28:2; Nzembo 132:7) Tempelo ezalaki kitoko mingi mpo na Yehova mpo ezalaki esika mpenza ya losambo ya solo. Mpe bazalaki kosalela yango mpo na kokumisa Yehova awa na mabele.

3. Esika mpenza ya losambo ya solo lelo ezali wapi, mpe ebandaki ntango nini?

3 Esika mpenza ya losambo ya solo lelo oyo ezali nini? Ezali te ndako lokola tempelo. Ezali tempelo ya elimo, mpe ekumisaka Yehova koleka ndako mosusu nyonso. Tempelo ya elimo ezali nini? Ezali ebongiseli oyo Nzambe azwi mpo bato bákóma baninga na ye mpe básambela ye. Lisiko ya Yesu nde ezali kosalisa mpo ete ebongiseli yango elonga. Ebongiseli yango ebandaki na mobu 29 ntango Yesu azwaki batisimo mpe atyamaki mafuta na elimo mpo na kokóma Nganga-nzambe monene ya tempelo ya Yehova ya elimo.​—Baebre 9:11, 12.

Basaleli ya Yehova basengeli kosanzola ye awa mpe banda sikoyo

4, 5. (a) Na kotalela Nzembo 99, basambeli nyonso ya solo ya Yehova bazalaka na mposa ya kosala nini? (b) Motuna nini tosengeli komituna?

4 Tozali mpenza na botɔndi epai ya Nzambe mpo na ebongiseli oyo azwi mpo na losambo ya solo. Tomonisaka botɔndi na biso ntango toyebisaka basusu nkombo ya Yehova mpe lisiko, likabo kitoko mpenza oyo apesá biso. Tozali mpenza na esengo ete bakristo ya solo koleka milio mwambe bazali kosanzola Yehova mokolo na mokolo. Wana ebele ya bakristo ya mangomba bakanisaka ete bakosanzola Nzambe na likoló nsima ya liwa na bango, basaleli ya Yehova bayebi ete ezali na ntina mpenza kosanzola ye awa mpe banda sikoyo.

5 Ntango tosanzolaka Yehova, tomekolaka ndakisa ya basaleli na ye ya sembo oyo Nzambe alobeli na Nzembo 99:1-3, 5. (Tángá.) Bato ya sembo lokola Moize, Arona mpe Samwele bapesaki mabɔkɔ mingi na likambo etali ebongiseli oyo Nzambe azwaki mpo na losambo ya solo na ntango ya kala. (Nzembo 99:6, 7) Lelo oyo, liboso bakristo oyo batyami mafuta na elimo bábanda kosala lokola banganga-nzambe elongo na Yesu kuna na likoló, basalelaka Yehova na bosembo nyonso na eteni ya tempelo ya elimo awa na mabele. Bamilio ya “bampate mosusu” bapesaka bango mabɔkɔ na bosembo nyonso. (Yoane 10:16) Bituluku yango nyonso mibale esambelaka Yehova na bomoko. Kasi, mokomoko na biso asengeli komituna motuna oyo, ‘Napesaka mpenza mabɔkɔ na ebongiseli oyo Yehova azwi mpo na losambo ya solo?’

NDENGE BAOYO BAZALI KOSALA NA TEMPELO YA ELIMO BAYEBANAKI

6, 7. Likambo nini ebimaki na lisangá ya bokristo ya liboso, mpe likambo nini elekaki na mobu 1919?

6 Mbula ata 100 ekokaki te nsima ya kosalema ya lisangá ya bokristo, lipɛngwi emonanaki ndenge kaka esakolamaki. (Misala 20:28-30; 2 Batesaloniki 2:3, 4) Nsima ya eleko yango, ekómaki mpasi mpenza mpo na koyeba basambeli ya solo ya Nzambe. Bankama ya bambula elekaki liboso Yehova asalela Yesu mpo na komonisa soki banani mpenza bazalaki kosalela Nzambe na tempelo na ye ya elimo.

7 Na mobu 1919, baoyo Nzambe andimaki mpe bazalaki kosala na tempelo na ye ya elimo bayebanaki polele mpenza. Basalaki bambongwana mpo ete losambo na bango ekoka kondimama epai ya Yehova. (Yisaya 4:2, 3; Malaki 3:1-4) Na yango, emonaneli moko oyo ntoma Paulo amonaki bankama ya bambula liboso ebandaki kokokisama.

8, 9. “Paradiso” oyo ntoma Paulo amonaki na emonaneli ezali nini?

8 Emonaneli oyo ntoma Paulo amonaki elobelami na 2 Bakorinti 12:1-4. (Tángá.) Na emonaneli yango, Yehova alakisaki ntoma Paulo likambo moko oyo esengelaki kozala na mikolo oyo ekoya. “Paradiso” oyo ntoma Paulo alobelaki ezali nini? Ya liboso, ekoki kozala mpenzampenza Paradiso oyo ekozala na mabele mosika te. (Luka 23:43) Ya mibale, ekoki kozala paradiso ya elimo ya kokoka na mokili ya sika. Mpe ya misato, ekoki kozala makambo kitoko na likoló na “paradiso ya Nzambe.”​—Emoniseli 2:7.

9 Kasi, mpo na nini ntoma Paulo alobaki ete “ayokaki maloba oyo ekoki kolobama te, oyo epesami nzela te na moto aloba yango”? Mpo ete ezalaki te ntango mpo na ye kolimbola na mozindo makambo kitoko oyo amonaki na emonaneli. Kasi lelo oyo Yehova apesi biso nzela ete tóyebisa basusu mapamboli oyo basaleli na ye bazali na yango uta sikoyo!

10. Mpo na nini paradiso ya elimo mpe tempelo ya elimo ezali eloko moko te?

10 Mbala mingi tolobelaka paradiso ya elimo, kasi ezali mpenza nini? Ezali ebongiseli moko ya ntina mingi ya kimya oyo Nzambe azwi mpo na basaleli na ye. Na yango, paradiso ya elimo mpe tempelo ya elimo ezali eloko moko te. Tempelo ya elimo ezali ebongiseli oyo Nzambe azwi mpo na losambo ya solo. Paradiso ya elimo emonisaka polele mpenza baoyo Nzambe andimi mpe oyo basambelaka ye na tempelo na ye ya elimo.​—Malaki 3:18.

11. Libaku malamu nini tozali na yango lelo oyo?

11 Ezali mpenza likambo ya esengo koyeba ete kobanda na mobu 1919, Yehova apesi nzela ete bato ya kozanga kokoka bákolisa paradiso ya elimo to bákómisa yango kitoko. Ozali mpenza kopesa mabɔkɔ mpo na kosala mosala wana kitoko? Ozali na botɔndi na libaku oyo ozali na yango ya kosala elongo na Yehova mpo na kokumisa ye awa na mabele?

YEHOVA AZALI KOKÓMISA EBONGISELI NA YE KITOKO MINGI KOLEKA

12. Ndenge nini toyebi ete Yisaya 60:17 ezali kokokisama? (Talá elilingi ya ebandeli.)

12 Mosakoli Yisaya asakolaki ete bambongwana ebele ekosalema na eteni ya ebongiseli ya Nzambe awa na mabele. (Tángá Yisaya 60:17.) Bilenge to bandeko mosusu oyo bakómi bakristo sika basuká kaka na kotánga to koyoka bambongwana yango. Kasi ezali na bandeko oyo bazwaki libaku ya komona bambongwana kitoko wana! Basaleli yango ya sembo bandimisami ete Nzambe azali kosalela mokonzi na biso Yesu, mpo na kotambwisa to kokamba ebongiseli ya Nzambe! Ntango tozali koyoka masolo ya bandeko na biso wana, kondima mpe elikya na biso epai ya Yehova ekokóma lisusu makasi.

Paradiso ya elimo ezali ebongiseli moko ya ntina mingi ya kimya oyo Nzambe azwi mpo na bakristo ya solo lelo oyo

13. Na kotalela Nzembo 48:12-14, tosengeli kosala nini?

13 Bakristo nyonso ya solo basengeli koyebisa basusu makambo etali ebongiseli ya Yehova. Ezali likamwisi komona ete atako tozali na kati ya mokili ya Satana, kasi tozali na kimya mpe bomoko ná libota ya bandeko ya mokili mobimba! Tosengeli koyebisa na esengo nyonso “mabota oyo ekoya na nsima” makambo etali ebongiseli ya Yehova mpe paradiso ya elimo!​—Tángá Nzembo 48:12-14.

14, 15. Bambongwana nini esalemaki nsima ya mobu 1970, mpe matomba nini ebongiseli ya Yehova ezwi?

14 Bandeko mingi ya mikóló na masangá na biso bamoni bambongwana oyo ekómisi eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele kitoko mingi. Bazali koyeba lisusu ntango oyo masangá ezalaki kotambwisama kaka na mosaleli moko na esika ya lisangani ya bankulutu, ntango oyo bikólo ezalaki kotambwisama kaka na mosaleli moko na esika ya Komite ya filiale, mpe ntango prezida ya Société Watch Tower azalaki kotambwisa makambo na esika ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Atako bandeko wana nyonso bazalaki na bandeko mosusu oyo bazalaki kosunga bango na bosembo nyonso, kasi kaka moto moko nde azalaki kozwa bikateli na masangá, na babiro ya filiale mpe na biro monene ya Batatoli. Nsima ya mobu 1970, bambongwana esalemaki mpo ete etuluku ya bankulutu ezala na mokumba ya kozwaka bikateli na esika ya moto moko.

15 Mpo na nini bambongwana yango ememelaki ebongiseli ya Yehova matomba? Mpo ete eutaki mpenza na bososoli ya malamu ya Makomami. Na esika ya kotika moto moko azwaka bikateli nyonso, ebongiseli ya Yehova ezwi matomba mpo na bizaleli malamu ya bankulutu nyonso, to “makabo oyo ezali bato,” oyo Yehova apesi.​—Baefese 4:8; Masese 24:6.

Yehova azali kopesa bato ya mokili mobimba litambwisi oyo basengeli na yango na bomoi (Talá paragrafe 16, 17)

16, 17. Bambongwana nini esepelisi yo, mpe mpo na nini?

16 Kanisá lisusu na bambongwana oyo euti kosalema na mikanda na biso. Na mosala na biso ya kosakola, tosepelaka kopesa bato mikanda oyo ekoki kosalisa bango mpe ekoki kobenda likebi na bango. Kanisá lisusu ndenge tozali kosalela baaparɛyi oyo ebimi sika mpo na kosakola nsango malamu. Na ndakisa, bato mingi bazali kosalela site na biso jw.org mpo bázwa lisalisi oyo basengeli na yango. Na bambongwana oyo nyonso, tomoni ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na bato mpe alingaka bango.

Tozali na botɔndi mpo na formasyo kitoko oyo tozali kozwa na ebele ya biteyelo na biso ya Biblia

17 Tosepelaka mpe na mbongwana oyo esalemi mpo na makita na biso mpo ete tózala na ntango mpo na kosalaka losambo na kati ya libota to boyekoli na biso moko. Mpe tosepelaka na bambongwana oyo esalemi na mayangani na biso mpe baprogramɛ na yango. Makambo ezali kaka kokóma kitoko mbula nyonso! Tozali mpe na botɔndi mpo na formasyo kitoko oyo tozali kozwa na ebele ya biteyelo na biso ya Biblia. Na bambongwana wana nyonso, emonani polele ete Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye mpe azali kokoba kokómisa paradiso ya elimo lisusu kitoko mingi!

OYO TOSALAKA MPO NA KOKÓMISA PARADISO YA ELIMO KITOKO MINGI

18, 19. Tokoki kosala nini mpo paradiso ya elimo ekóma lisusu kitoko mingi?

18 Yehova apesi biso lokumu ya kopesa mabɔkɔ mpo ete paradiso na biso ya elimo ekóma lisusu kitoko mingi. Kasi ndenge nini tosalaka yango? Ntango tozali kosakola nsango malamu na molende mpe tozali kokómisa bato mingi bayekoli. Ntango nyonso oyo tosalisi moto akómi mosaleli ya Nzambe, tozali kopesa mabɔkɔ mpo ete paradiso ya elimo ekende liboso.​—Yisaya 26:15; 54:2.

19 Tokosala mpe ete paradiso ya elimo ekóma kitoko soki tozali kosala makasi mpo ete tóbongisa bomoto oyo ebongi na biso bakristo. Yango ekosala ete bato mingi básepela na paradiso ya elimo. Mbala mingi, eloko oyo ebendaka bato libosoliboso na ebongiseli ya Yehova, epai ya Yehova mpe Yesu ezali te boyebi na biso ya Biblia, kasi nde bizaleli na biso ya pɛto mpe ya kimya.

Okoki kopesa mabɔkɔ mpo ete paradiso ya elimo ekende liboso (Talá paragrafe 18, 19)

20. Na kotalela Masese 14:35, mposa na biso esengeli kozala nini?

20 Yehova ná Yesu basepelaka mingi ntango bazali komona ete paradiso na biso ya elimo ezali kitoko mingi lelo oyo. Esengo oyo tozali koyoka sikoyo ndenge tozali kosala mpo ete paradiso yango ezala kitoko mingi ezali komonisa esengo oyo tokozala na yango ntango tokopesa mabɔkɔ na nsima mpo na kokómisa mabele paradiso ya solosolo. Tosengeli ntango nyonso kobosanaka te Masese 14:35, oyo elobi ete: “Mokonzi asepelaka na mosaleli oyo azali kosala na mayele ya kososola.” Tiká ete tózala na bwanya wana tozali kosala nyonso mpo ete tókómisa paradiso ya elimo kitoko mingi!