Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mibongisá banda sikoyo mpo na kozala na bomoi na mokili ya sika

Mibongisá banda sikoyo mpo na kozala na bomoi na mokili ya sika

“Básala makambo ya malamu, . . . mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.”​—1 TIMOTE 6:18, 19.

NZEMBO: 125, 40

1, 2. (a) Likambo nini ozali kozela na motema esengo na Paradiso? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Nini ekopesa biso esengo mingi koleka na mokili ya sika?

TOZALI mpenza kozela “bomoi ya seko” na motema esengo. Ntoma Paulo abengaki yango “bomoi ya solosolo.” (Tángá 1 Timote 6:12, 19.) Mpo na bato mingi, yango elakisi kozala na bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele. Kanisá naino ndenge okobanda kolamuka na nzoto kolɔngɔnɔ, na esengo ntɔngɔ nyonso. (Yisaya 35:5, 6) Kanisá naino esengo oyo okozala na yango ndenge okobanda kolekisa ntango ná libota na yo, baninga, ata mpe baoyo bakosekwa. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Okozala na ntango ya koyekola makambo ya sika mpe koyeba malamu makambo oyo olingaka. Na ndakisa, okoki koyekola makambo mingi ya siansi. To mpe okoki koyekola ndenge ya kobɛta bisaleli ya miziki to ndenge ya kosala plan ya ndako na yo.

2 Atako tozali kozela na motema esengo makambo nyonso wana ya kitoko, kosambela Yehova ekopesa biso esengo mingi koleka. Kanisá ndenge bomoi ekozala ntango bato nyonso bakotalela nkombo ya Yehova ete ezali mosantu mpe bakondima ye lokola Mokonzi na bango. (Matai 6:9, 10) Tokozala mpenza na esengo komona mabele etondi na bato ya kokoka, kaka ndenge Nzambe alingaki. Lisusu, moná na makanisi ndenge tokokóma na boyokani ya malamu mpenza ná Yehova mpe tokokóma mokemoke bato ya kokoka!​—Nzembo 73:28; Yakobo 4:8.

3. Tosengeli komibongisa banda sikoyo mpo na likambo nini?

3 Tondimaka ete Yehova akosala makambo nyonso oyo kitoko, “mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.” (Matai 19:25, 26) Soki tolingi kofanda na mokili ya sika, oyo nde ntango ya ‘kosimba makasi’ bomoi ya seko. Toyebi ete nsuka ezali koya mosika te, yango wana tosengeli kozala na bomoi oyo ekomonisa ete tozali kozela ete nsuka eya ata na ntango nini. Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki kosala sikoyo mpo tómibongisa mpo na kokɔta na mokili ya sika. Tótala ndenge ya kosala yango.

NDENGE YA KOMIBONGISA

4. Ndenge nini tokoki komibongisa banda sikoyo mpo na kokɔta na mokili ya sika? Pesá ndakisa.

4 Ndenge nini tokoki komibongisa banda sikoyo mpo na kokɔta na mokili ya sika? Soki tozali kokana kokende kofanda na ekólo mosusu, na ntembe te ekozala na makambo oyo tokoki kosala mpo na komibongisa mpo tókoka kofanda kuna. Na ndakisa, tokoki mbala mosusu kobanda koyekola monɔkɔ mpe makambo ya bato ya ekólo yango. Tokoki komeka kolya biloko mosusu ya bato ya ekólo yango. Ndenge moko mpe, tokoki komibongisa banda sikoyo mpo na kokɔta na mokili ya sika soki tozali kosala makambo lokola nde tozali mpenza kuna. Tótalela mwa balolenge oyo tokoki kosala yango.

5, 6. Na ndenge nini kotosa malako ya ebongiseli ya Yehova ekosalisa biso tómibongisa mpo na kokɔta na mokili ya sika?

5 Na mokili oyo, Satana alingaka bato bákanisaka ete bakoki kosala nyonso oyo balingi. Bato mingi bakanisaka ete ezali malamu mingi kosala nyonso oyo olingi, mpe kotosa Nzambe ezali na ntina te. Yango ebimisi makambo nini? Mpasi mpe mawa. (Yirimia 10:23) Kasi Yehova azali Mokonzi moko ya bolingo. Bomoi ekozala mpenza malamu na mokili ya sika ntango moto nyonso akobanda kotosa ye!

6 Na mokili ya sika, tokozala na esengo ya kotosa malako ya ebongiseli ya Yehova oyo ekosalisa biso tókómisa mabele paradiso moko kitoko mpe tóteya baoyo bakosekwa. Yehova akopesa biso misala mingi. Kasi tokosala nini soki baoyo bazali kokamba basɛngi biso tósala likambo moko oyo tosepelaka na yango mpenza te? Tokotosa? Tokolinga kosala nyonso mpo na kokokisa mosala na biso mpe kosepela na yango? Mpo na komibongisa mpo na kokɔta na mokili ya sika, tosengeli kotosa malako ya ebongiseli ya Yehova banda sikoyo.

7, 8. (a) Mpo na nini tosengeli kosala na bomoko ná baoyo bazali kokamba biso? (b) Bambongwana nini bakristo mosusu bakutanaki na yango? (c) Tosengeli kondimisama na likambo nini na mokili ya sika?

7 Soki tolingi komibongisa mpo na kozala na bomoi na mokili ya sika, tosengeli koyekola ndenge ya kozala na esengo mpe kosala na bomoko elongo na ebongiseli ya Yehova ná basusu. Na ndakisa, ntango bapesi biso mokumba ya sika, tosengeli mpenza kosepela kosala elongo na basusu mpe kosala nyonso mpo na kozala na esengo. Soki toyekoli kosala na bomoko ná baoyo bazali kokamba biso sikoyo, na ntembe te tokosala mpe bongo na mokili ya sika. (Tángá Baebre 13:17.) Ntango Bayisraele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, Yehova ayebisaki bango bisika oyo basengelaki kofanda. (Mitángo 26:52-56; Yosua 14:1, 2) Toyebi te esika nini bakopesa mokomoko na biso na mokili ya sika. Kasi soki tozali koyekola kosala na bomoko, tokozala na esengo ya kosala mokano ya Yehova ezala epai nini tokozala.

8 Kanisá lokumu oyo tokozala na yango ya kosalela Nzambe na mokili na ye ya sika ntango Bokonzi ekoyangela! Mpo na ntina yango, tosepelaka kosala na bomoko ná ebongiseli ya Yehova banda sikoyo mpe kokokisa mokumba nyonso oyo bapesi biso. Kasi, ntango mosusu mbongwana ekoki kosalema na mikumba na biso. Na ndakisa, na États-Unis, basɛngaki bandeko mosusu ya Betele bázonga na masangá. Bakɛngɛli mosusu ya zongazonga bakómaki babongisi-nzela monene mpo bakómi mikóló to mpo na makambo mosusu ya bomoi. Basepelaka na mikumba na bango wana mpe Yehova azali kopambola bango. Soki tozali kobondela Yehova mpo asalisa biso, tozali kosala nyonso mpo na kosalela ye, mpe tozali kosepela na mokumba nyonso oyo apesi biso, tokozala na esengo mpe Yehova akopambola biso. (Tángá Masese 10:22.) Ekozala boni soki na mokili ya sika, tokolinga kofanda na esika moko boye, kasi ebongiseli ya Yehova esɛngi biso tókende nde epai mosusu? Na ntango wana, esika tokofanda to makambo oyo tokosala ekozala na ntina te. Tokozala nde na botɔndi mpo tozali na mokili ya sika.​—Nehemia 8:10.

9, 10. (a) Mpo na nini ekoki kosɛnga ete tózala motema molai na mokili ya sika? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali motema molai lelo oyo?

9 Na mokili ya sika, ekosɛnga mbala mosusu ete tózala motema molai na bantango mosusu. Na ndakisa, tokoki koyoka ete bato mosusu bazali kosepela makasi mpo bandeko mpe baninga na bango basekwi. Nzokande, esengeli biso tózela ete bato na biso oyo bakufá básekwa. Soki esalemi bongo, tokosepela ná basusu mpe tokozala motema molai? (Baroma 12:15) Soki toyekoli banda sikoyo kozela na motema molai ete Yehova akokisa bilaka na ye, ekosalisa mpe biso tózala motema molai na ntango wana.​Mosakoli 7:8.

10 Tokomonisa ete tozali komibongisa mpo na kokɔta na mokili ya sika soki tozali motema molai ntango tozwi bingɛngiseli ya sika na ntina etali boyebi na biso ya solo ya Biblia. Toyekolaka mateya yango ya sika mpe tozalaka motema molai soki tokangi ntina na yango malamumalamu te? Soki tosali bongo, na mokili ya sika, ekozala mpasi te tózala motema molai ntango nyonso oyo Yehova akopesa biso malako ya sika.​—Masese 4:18; Yoane 16:12.

11. Mpo na nini tosengeli koyekola kolimbisa basusu banda sikoyo, mpe ndenge nini yango ekosalisa biso na mokili ya sika?

11 Kolimbisa basusu ezali lolenge mosusu oyo tokoki komibongisa mpo na kokɔta na mokili ya sika. Na boumeli ya mbula nkóto ya boyangeli ya Kristo, ekozwa mwa ntango mpo bato nyonso bákóma bato ya kokoka. (Misala 24:15) Tokolingana mpe tokolimbisana? Soki banda sikoyo toyekoli kolimbisa basusu mpe tozali na boyokani malamu ná bango, ekozala mpasi te mpo tósala bongo na mokili ya sika.​—Tángá Bakolose 3:12-14.

Na mokili ya sika, tokozala na mposa ya komonisa kaka bizaleli oyo Yehova azali koteya biso ete tómonisa banda sikoyo

12. Mpo na nini tosengeli komibongisa banda sikoyo mpo na kokɔta na mokili ya sika?

12 Na mokili ya sika, mbala mosusu tokozwa ntango nyonso te eloko oyo tolingi, to ekosɛnga ntango mosusu tózela. Ekosɛnga tózala na botɔndi mpe tósepela na ndenge nyonso oyo tokozala. Mpo na yango, tokozala na mposa ya komonisa kaka bizaleli oyo Yehova azali koteya biso ete tómonisa banda sikoyo. Na yango soki toyekoli komonisa bizaleli wana malamu banda sikoyo, tokomonisa ete mokili ya sika ezali mpenza likambo ya solo mpo na biso mpe ete tozali komibongisa mpo na bomoi ya seko. (Baebre 2:5; 11:1) Lisusu, tokomonisa ete tozali mpenza na mposa ya kofanda na mokili oyo bato nyonso bakotosa Yehova.

TYÁ MAKANISI NA YO NYONSO NA MOSALA YA YEHOVA

Sakolá nsango malamu na molende

13. Likambo nini tokotya na esika ya liboso ntango tokozala na mokili ya sika?

13 Na mokili ya sika, tokozala na eloko nyonso oyo esengeli mpo tósepela na bomoi. Kasi esengo na biso monene ekouta nde na boyokani makasi oyo tokozala na yango ná Yehova. (Matai 5:3) Tokozala na mingi ya kosala na mosala ya Yehova, mpe tokozala na esengo ya kosalela ye. (Nzembo 37:4) Na yango, soki tozali kotya Yehova na esika ya liboso banda sikoyo, tozali komibongisa mpo na kokɔta na mokili ya sika.​—Tángá Matai 6:19-21.

14. Mikano nini oyo etali mosala ya Yehova bilenge bakoki komityela?

14 Ndenge nini tokoki kosepela kosalela Yehova lisusu mingi? Komityela mikano ezali moko ya balolenge ya kosala yango. Soki ozali elenge, kanisá malamumalamu na ndenge okoki kosalela bomoi na yo mpo na mosala ya Yehova. Mpo na nini te kosala bolukiluki na mikanda na biso mpo na koyeba balolenge ekeseni ya mosala ya ntango nyonso? Okoki komityela mokano ya kosala moko na yango. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Sololá na bandeko mosusu oyo basaleli Yehova na mosala ya ntango nyonso na boumeli ya bambula ebele. Soki oponi kosalela bomoi na yo mpo na Yehova, okozwa formasyo ya malamu mpenza. Yango ekosalisa yo osalela Yehova na mokili ya sika.

Mityelá mikano na mosala ya Yehova

15. Mikano mosusu nini tokoki komityela na mosala ya Yehova?

15 Ezali na mikano mingi oyo tokoki komityela na mosala ya Yehova. Na ndakisa, tokoki komityela mokano ya koyekola mayele moko ya sika ya mosala ya kosakola. To mpe tokoki koluka koyeba malamumalamu mitinda ya Biblia mpe koyekola ndenge oyo tokoki kosalela yango na bomoi na biso. Tokoki mpe kobongisa lolenge na biso ya kotánga liboso ya bato, kosala masolo mpe kopesa biyano na makita. Likambo ya ntina yango oyo: Soki omityeli mikano na mosala ya Yehova, yango ekosalisa yo ozala na molende mingi mpe omibongisa ndenge okozala na mokili ya sika.

LOLENGE YA BOMOI OYO ELEKI MALAMU BANDA SIKOYO

Zaláká na botɔndi mpo na eloko nyonso oyo Yehova apesaka yo

16. Mpo na nini kosalela Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu?

16 Soki tozali kosalela ntango na biso mpo na komibongisa mpo na kokɔta na mokili ya sika ya Nzambe, yango elingi koloba tozali kozanga bomoi moko ya malamu lelo oyo? Te! Kosalela Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Tosalelaka ye te mpo moto moko atindikaka biso na makasi to kaka mpo tóbika na bolɔzi monene. Soki tozali na boyokani malamu ná Yehova, bomoi na biso ekozala malamu mingi mpe tokozala na esengo mpenza. Akelaki biso mpo tózala na bomoi ya ndenge wana. Kolingama na Yehova mpe kotika ye atambwisa bomoi na biso ezali malamu mingi koleka eloko mosusu nyonso. (Tángá Nzembo 63:1-3.) Biso nyonso tokoki koyoka esengo oyo eutaka na kosambela Yehova na motema na biso mobimba. Bandeko mosusu oyo basaleli Yehova banda bambula mingi bakoki mpenza koloba ete yango nde lolenge ya bomoi oyo eleki malamu.​—Nzembo 1:1-3; Yisaya 58:13, 14.

Luká litambwisi na Biblia

17. Kosala makambo na biso moko mpe kominanola ekozala na esika nini na Paradiso?

17 Na Paradiso, tokosepela kolekisa ntango na biso mosusu na makambo na biso moko mpe kominanola. Na nyonso, Yehova nde akelá biso na mposa ya kosepela, mpe alaki biso ete akokokisa “mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.” (Nzembo 145:16; Mosakoli 2:24) Tozalaka na mposa ya kominanola mpe kopema, kasi tokosepela na yango lisusu mingi soki totye boyokani na biso ná Yehova na esika ya liboso. Ekozala mpe bongo na mokili ya sika. Yango wana, ezali malamu kokoba “koluka liboso bokonzi” mpe kotya makanisi mobimba na mapamboli oyo tozwaka na kosalela Yehova.​—Matai 6:33.

Soki tozali na boyokani malamu ná Yehova, bomoi na biso ekozala malamu mingi mpe tokozala na esengo mpenza

18. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali komibongisa mpo na kozala na bomoi ya seko na Paradiso?

18 Na mokili ya sika, bomoi ekozala malamu mingi koleka kutu ndenge tokoki kokanisa. Tokomonisa mpenza ete tozali na mposa ya kozala kuna soki tozali komibongisa mpo na “bomoi ya solosolo” banda sikoyo. Tiká ete tókolisa bizaleli malamu oyo Yehova azali koteya biso ete tómonisaka, mpe tika ete tósakolaka nsango malamu na molende mpenza. Tokozwa esengo oyo eutaka na kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso. Tozali mpenza na kondima ete na mokili ya sika, Yehova akokokisa bilaka na ye nyonso. Na yango, tiká ete tómonisaka na bomoi na biso lokola nde tozali kuna!