Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Bókoba kolɛngɛla bato ya ndenge wana”

“Bókoba kolɛngɛla bato ya ndenge wana”

KOBANDA na mobu 1992, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyá bankulutu oyo bakɔmɛli mpo na kosalisa bakomite na yango mpo ekokisa mosala na yango. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Bandeko yango, oyo bazali na kati ya “bampate mosusu,” basungaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi to bapesaka yango mpenza mabɔkɔ. (Yoane 10:16) Pɔsɔ na pɔsɔ bakɔtaka na likita ya komite oyo batyá bango. Mokumba ya bandeko yango ezali ya koyebisa makambo oyo esengeli mpe kopesa makanisi. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaka bikateli ya nsuka, mpe bandeko wana oyo basungaka yango, balandelaka mpo na koyeba soki bikateli oyo ezwamaki ezali kokokisama. Bandeko yango bandimaka mikumba nyonso oyo bapesaka bango. Bakendaka elongo na bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi na mayangani ya etúká ya minene mpe na mayangani oyo esangisaka mikili mingi. Batindaka bango mpe bákenda kotala babiro ya filiale lokola bamonisi ya biro monene ya Batatoli ya Yehova.

Ndeko moko oyo asali mosala yango kobanda mobu 1992 alobi boye: “Ntango nakokisaka mokumba na ngai, bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazalaka na ntango ya kotya makanisi na bango nyonso na makambo ya elimo.” Ndeko mosusu oyo aumeli na mosala yango mbula 20 alobi ete: “Ezali mpenza libaku moko malamu oyo nakokaki kutu kokanisa te.”

Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesi bandeko oyo basungaka bango mokumba monene mpe ezalaka na botɔndi mingi mpo na mosala makasi oyo bandeko wana ya sembo basalaka. Tiká ete ‘tókoba kolɛngɛla bato ya ndenge wana.’​—Bafilipi 2:29.

^ par. 2 Talá etanda “Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kotambwisa mosala ya Bokonzi” na mokapo 12 ya buku Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela! mpo na koyeba mikumba ya bakomite motoba ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.