Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobá komanyola na makambo ya elimo

Kobá komanyola na makambo ya elimo

“Okanisaka malamu mpenza makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.”​—1 TIMOTE 4:15.

NZEMBO: 57, 52

1, 2. Makambo nini ekesenisi bato na banyama?

BƆƆNGƆ na biso bato eleki biloko mosusu nyonso. Na ndakisa, bato bazali na likoki ya koyekola monɔkɔ. Mpe monɔkɔ to lokota esalisaka biso na kotánga, kokoma, koloba mpe kokanga ntina ya likambo oyo tozali koyoka. Epesaka mpe biso likoki ya kobondela Yehova mpe kokumisa ye na nzembo. Makambo wana nyonso ekesenisaka biso na banyama. Bato ya mayele bayebaka malamu mpenza te ndenge oyo bɔɔngɔ na biso ezalaka na likoki ya kosala makambo wana ya kokamwa.

2 Likoki oyo tozali na yango ya kosalela monɔkɔ ezali likabo ya Yehova. (Nzembo 139:14; Emoniseli 4:11) Apesá biso mpe likabo mosusu oyo ekesenisaka biso na banyama. Bato bakelamá “na elilingi ya Nzambe.” Tozali na bonsomi ya kopona, elingi koloba bonsomi ya kozwa bikateli biso moko. Mpe tokoki kopona kosalela monɔkɔ mpo na kosalela Yehova mpe kokumisa ye.​—Ebandeli 1:27.

3. Mpo tókóma bato ya bwanya, Yehova apesi biso nini?

3 Yehova alakisi biso ndenge ya kosalela ye mpe kosanzola ye na ndenge apesi biso Biblia. Biblia ezali na mobimba to na ndambo na minɔkɔ koleka 2 800. Soki tokanisi na oyo Biblia elobaka, tokoki kobanda kokanisa ndenge Nzambe akanisaka. (Nzembo 40:5; 92:5; 139:17) Mpe makanisi ya Yehova ekómisaka biso bato ya bwanya mpe ezali komema biso na bomoi ya seko.​—Tángá 2 Timote 3:14-17.

4. Liloba komanyola elimboli nini, mpe mituna nini tokolobela?

4 Komanyola elimboli kotya makanisi mobimba na likambo moko to mpe kokanisa na mozindo na likambo yango. (Nzembo 77:12; Masese 24:1, 2) Tozwaka litomba mingi ntango tozali kokanisa na makambo oyo toyekoli mpo na Yehova mpe Yesu. (Yoane 17:3) Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna oyo elandi: Wapi lolenge ya kotánga oyo ekoki kosalisa biso tómanyolaka? Tokoki komanyola makambo nini? Mpe nini ekoki kosalisa biso tómanyolaka mokolo na mokolo mpe tósepelaka na yango?

OMINDIMISA ETE BOTÁNGI NA YO EMEMELAKA YO LITOMBA

5, 6. Nini ekoki kosalisa yo obosana te makambo oyo ozali kotánga mpe okanga ntina na yango?

5 Ekómelá yo omona ete ezali na makambo mosusu oyo okoki kosala kozanga kutu okanisa mpo na yango, na ndakisa kobenda mpema, kotambola to kotambwisa velo? Kasi, ntango mosusu okoki kotánga kozanga ete okanisa. Ekoki kosalema ete obanda kokanisa na makambo mosusu ntango ozali kotánga. Okoki kosala nini mpo na kopɛngola makambo ya ndenge wana? Ekozala malamu mingi kotya makanisi nyonso na oyo ozali kotánga mpe komanyola na ndimbola na yango. Na yango, ntango okómi na nsuka ya paragrafe to na motó ya likambo moke ya mokanda moko, pemá mpe kanisá na makambo oyo outi kotánga. Kanisá na makambo oyo oyekoli, mpe omindimisa mpenza ete okangi ntina na yango.

Kotánga Biblia na mongongo makasi ekosalisa yo otya makanisi nyonso na makambo oyo ozali kotánga mpe obosana yango noki te

6 Bato ya mayele bamoni ete ezalaka mpasi te moto akanga likambo moko soki atángi yango na mongongo makasi. Mozalisi na biso ayebi likambo yango, yango wana ayebisaki Yosua atángaka buku ya Mobeko “na mongongo ya nse,” elingi koloba ye moko ayokaka mongongo na ye ntango azali kotánga. (Tángá Yosua 1:8.) Kotánga Biblia na mongongo makasi ekosalisa mpe yo otya makanisi nyonso na makambo oyo ozali kotánga mpe obosana yango noki te.

7. Ntango nini ebongi mpo na komanyola na makambo ya Biblia? (Talá elilingi ya ebandeli.)

7 Esɛngaka milende mpenza mpo na komanyola makambo oyo tozali koyekola. Yango wana, ezali malamu mingi komanyola te na ntango oyo tolɛmbi, kasi nde na esika oyo ezali kimya, oyo ezali te na makambo mingi oyo ekoki kolongola likebi na yo. Davidi, mokomi moko ya nzembo azalaki komanyola ntango azalaki kolamuka na butu. (Nzembo 63:6) Yesu, oyo azalaki moto ya kokoka, azalaki kopona bisika oyo ezali na makelele te mpo na komanyola mpe kobondela.​—Luka 6:12.

MAKAMBO YA MALAMU OYO TOKOKI KOMANYOLA

8. (a) Tokoki komanyola na makambo nini? (b) Yehova ayokaka ndenge nini ntango tolobelaka ye epai ya basusu?

8 Longola makambo oyo otángaka na Biblia, ezali na makambo mosusu oyo okoki komanyola na yango. Na ndakisa, ntango omoni moko ya biloko ya kokamwa oyo Yehova akelá, tɛlɛmá mpe mituna boye: ‘Yango eteyi ngai nini mpo na Yehova?’ Makanisi ya ndenge wana ekotinda yo mpenza opesa Yehova matɔndi na libondeli. Mpe soki ozali elongo na basusu, okosepela koyebisa bango ndenge ozali koyoka. (Nzembo 104:24; Misala 14:17) Yehova atyaka likebi mpe asepelaka ntango tozali komanyola, kobondela, mpe koyebisana makambo oyo etali ye. Biblia eyebisi biso ete: “Buku ya kokanisama ebandaki kokomama liboso na ye mpo na baoyo babangaka Yehova mpe mpo na baoyo bakanisaka nkombo na ye.”​—Malaki 3:16.

Omanyolaka na lolenge oyo okoki kosalisa bayekoli na yo ya Biblia? (Talá paragrafe 9)

9. (a) Ntoma Paulo ayebisaki Timote amanyola na makambo nini? (b) Tokoki komanyola na nini ntango tozali komibongisa mpo na mosala ya kosakola?

9 Ntoma Paulo ayebisaki Timote akanisa malamu ndenge maloba, etamboli mpe mateya na ye ekoki kosala basusu. (Tángá 1 Timote 4:12-16.) Yo mpe okoki komanyola na makambo yango. Na ndakisa, osengeli kozwa ntango mpo na komanyola ntango ozali komibongisa mpo na kokende koyekola na moto Biblia. Kanisá moyekoli na yo mpe luká motuna to ndakisa moko oyo ekosalisa ye akende liboso. Soki ozali komibongisa mpo na koyekola na bato ndenge wana, kondima na yo moko ekokóma makasi mpe okokóma moteyi ya Biblia oyo abongi mpe ateyaka na esengo. Okozwa mpe litomba soki ozali komanyola liboso ya kobima na mosala ya kosakola. (Tángá Ezera 7:10.) Ntango mosusu okoki kotánga mokapo moko na mokanda ya Misala mpo esalisa yo okóma na molende na mosala ya kosakola. Okoki mpe komanyola na bavɛrsɛ ya Biblia oyo ozali kokana kosalela mokolo wana mpe mikanda oyo ozali kokana kotikela bato. (2 Timote 1:6) Kanisáká bato ya teritware mpe makambo oyo okoki koloba, oyo ekoki kosepelisa bango. Soki ozali komibongisa bongo, okozala mpenza na likoki ya kosalela Biblia malamu mpo na kopesa litatoli epai ya basusu.​—1 Bakorinti 2:4.

Tiká makambo oyo otángi esimba motema na yo mpe pesá Yehova matɔndi mpo na makambo malamu oyo ozali koyekola

10. Wapi makambo mosusu ya malamu oyo tokoki komanyola na yango?

10 Okoki komanyola na likambo nini mosusu? Soki okomaki mwa makambo ntango ozalaki kolanda badiskur na mayangani, ekozala malamu ozwa ntango ya kozongela makambo yango. Ntango ozali kosala bongo, omituna boye: ‘Likambo nini nayekoli na Liloba ya Nzambe mpe ebongiseli na ye?’ Okoki mpe komanyola na makambo oyo ebimaka sanza na sanza na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe na mikanda oyo eutaki kobima na liyangani. Ntango otángi lisolo moko na Buku ya mobu, fandá mpe kanisá mpo na yango, mpe tiká ete esimba motema na yo. Ntango ozali kotánga mikanda na biso, okoki mbala mosusu kotya mikɔlɔtɔ na makanisi ya ntina to kokoma na mopanzi. Yango ekosalisa yo ntango ozali komibongisa mpo na kozongela bato, mpo na viziti pastorale to ntango ozali na lisolo. Likambo eleki ntina ezali ete, soki ozwi ntango mpo na komanyola na makambo oyo otángi, okotika ete makambo yango esimba motema na yo mpe okozwa ntango ya kobondela mpo na kopesa Yehova matɔndi mpo na makambo malamu oyo ozali koyekola.

MANYOLÁKÁ NA LILOBA YA NZAMBE MOKOLO NA MOKOLO

11. Wapi mokanda ya kitoko mingi oyo tosengeli komanyola na yango, mpe kosala bongo ekosalisa biso na nini? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

11 Na ntembe te, Biblia ezali mokanda ya kitoko mpenza oyo tokoki komanyola na yango. Kasi, tokoloba nini soki mokolo mosusu bapekisi yo ete ozala na Biblia? * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Moto moko te akoki kopekisa yo omanyola na makambo oyo obombá na motema, na ndakisa bavɛrsɛ to nzembo ya Bokonzi oyo olingaka mingi. (Misala 16:25) Mpe elimo ya Nzambe ekosalisa yo obosana te makambo oyo oyekoli, mpe yango ekosalisa yo otikala sembo.​—Yoane 14:26.

12. Wapi lolenge moko oyo okoki kosala programɛ na yo ya botángi ya Biblia mokolo na mokolo?

12 Wapi lolenge moko oyo okoki kosala programɛ na yo ya kotánga Biblia mokolo na mokolo? Mikolo mosusu ya pɔsɔ, mbala mosusu okoki kotánga mpe komanyola na botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ oyo ebimaka na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Mikolo mosusu okoki kotánga Evanzile ya Matai, Marko, Luka mpe Yoane, mpe kanisá na oyo Yesu alobaki mpe asalaki. (Baroma 10:17; Baebre 12:2; 1 Petro 2:21) Tozali mpe na mokanda oyo elobeli makambo oyo elekaki na bomoi ya Yesu na molɔngɔ mpenza. Mokanda yango ekoki kosalisa yo ozwa litomba mingi ntango ozali kotánga Baevanzile.​—Yoane 14:6.

MPO NA NINI KOMANYOLA EZALI NA NTINA MINGI?

13, 14. Mpo na nini ezali na ntina mpenza ete tókoba komanyola mpo na Yehova mpe Yesu, mpe yango ekotinda biso tósala nini?

13 Komanyola na makambo oyo etali Yehova mpe Yesu ekoki kosalisa moto akóma mokristo oyo akɔmɛli mpe akoba kozala na kondima makasi. (Baebre 5:14; 6:1) Moto oyo alekisaka kaka mwa ntango moke mpo na kokanisa mpo na Nzambe, akobebisa mokemoke boyokani na ye elongo na Yehova mpe nsukansuka akoki kotika ye. (Baebre 2:1; 3:12) Yesu akebisaki ete soki toyoki te to tondimi te Liloba ya Nzambe “na motema ya kitoko mpe ya malamu,” ‘tokosimba’ yango te. Kutu, “mitungisi mpe bomɛngo mpe bisengo ya bomoi” ekoki kotambwisa biso motó.​—Luka 8:14, 15.

14 Na yango, tiká ete tókoba komanyola na Biblia mpe tóyeba Yehova malamu mpenza. Yango ekotinda biso tómekola bizaleli mpe bomoto na ye malamumalamu. (2 Bakorinti 3:18) Tokoki kokoba koyekola makambo mingi mpo na Tata na biso ya likoló mpe komekola ye libela na libela. Yango ezali lokumu oyo eleki monene!​—Mosakoli 3:11.

Komanyola mpo na Yehova mpe Yesu ekosalisa yo ozala ntango nyonso na molende mpo na solo

15, 16. (a) Komanyola mpo na Yehova mpe Yesu ememeli yo litomba nini? (b) Mpo na nini ekoki kozala mpasi ntango mosusu mpo na komanyola, kasi mpo na nini tosengeli kokoba komeka?

15 Komanyola mpo na Yehova mpe Yesu ekosalisa yo ozala ntango nyonso na molende mpo na solo. Molende na yo ekolendisa bandeko mpe bato oyo ozali kokutana na bango na mosala ya kosakola. Mpe soki ozali komanyola na oyo Yehova asalá mpo na yo na ndenge apesá mbeka ya lisiko ya Yesu, okozwa na motuya boyokani malamu oyo ozali na yango elongo na Nzambe. (Baroma 3:24; Yakobo 4:8) Mark, ndeko moko ya Afrika ya Sudi oyo asalaki mbula misato na bolɔkɔ mpo na kondima na ye, alobaki ete: “Komanyola ezali lokola kosala mobembo moko oyo oyebi te ndenge ekosuka. Ntango tozali komanyola na makambo ya elimo, tokoyeba makambo mosusu ya sika oyo etali Yehova, Nzambe na biso. Na ntango oyo nayokaka lokola nalɛmbi nzoto to namitungisaka mpo na lobi, nazwaka Biblia mpe namanyolaka na mokapo moko ya Makomami. Nayokaka ete motema ekiti.”

16 Mokili oyo etondi mɛkɛ na makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso, mpe ezali mpasi tózwa ntango ya komanyola na Biblia. Patrick, ndeko moko ya Afrika, alobaki ete: “Makanisi na ngai ezali lokola sakosi oyo batye mikanda mpe ezali na bansango ndenge na ndenge, ezala oyo nalingaka mpe nalingaka te, mpe esengeli koponaka mokolo na mokolo. Ntango nazali koluka soki makambo nini ezali na makanisi na ngai, mbala mingi nakutaka ‘makanisi oyo etungisaka,’ mpe esɛngaka nabondela liboso Yehova mpo na yango mpo ete nazala na makanisi ya pɛto ntango nakomanyola. Atako kosala bongo ekoki kozwa mwa ntango liboso nabanda komanyola na masolo ya elimo, namonaka ete napusani mpenza penepene na Yehova. Yango efungolaka makanisi na ngai mpo nasosola solo malamu.” (Nzembo 94:19) Ya solo, tozwaka matomba mingi ntango totángaka mpe tomanyolaka na Biblia mokolo na mokolo.​—Misala 17:11.

OSALAKA NDENGE NINI MPO OZANGA NTANGO TE?

17. Osalaka ndenge nini mpo ozanga te ntango ya komanyola?

17 Bamosusu balamukaka na ntɔngɔ makasi mpo na kotánga, komanyola mpe kobondela. Basusu basalaka yango nsima ya kolya na midi. Ntango mosusu mpo na yo, ntango oyo ebongi mpo na kotánga Biblia ezalaka na mpokwa to liboso ya kolala. Basusu balingaka kotánga Biblia na ntɔngɔ mpe lisusu liboso ya komata na mbeto. (Yosua 1:8) Likambo eleki ntina mingi ezali ya ‘komisombela ntango oyo ebongi,’ elingi koloba kotika kobebisa ntango na makambo ezangi ntina mpo na komanyola na Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo.​—Baefese 5:15, 16.

18. Biblia elaki nini mpo na baoyo bamanyolaka na Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe basalelaka makambo oyo bayekolaka?

18 Biblia elaki ete Yehova akopambola baoyo nyonso bamanyolaka na Liloba na ye mpe oyo basalaka makasi básalela makambo oyo bazali koyekola. (Tángá Nzembo 1:1-3.) Yesu alobaki ete: “Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!” (Luka 11:28) Kasi likambo eleki ntina, komanyola na Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo ekosalisa biso tósalaka makambo oyo ekopesa ye nkembo. Soki tozali kosala bongo, Yehova akopesa biso esengo banda sikoyo mpe bomoi ya seko na mikolo ezali koya na mokili na ye ya sika.​—Yakobo 1:25; Emoniseli 1:3.

^ par. 11 Talá lisolo “Milende oyo tosalaki mpo na kotikala makasi na elimo,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/2006.