Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu

Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu

NTANGO nakómaki na mbula 9, nazalaki kokóla lisusu te. Lelo nazali na mbula 43, kasi molai na ngai ezali kaka mɛtrɛ moko. Ntango baboti na ngai bamonaki ete nakokóma lisusu molai te, balendisaki ngai nasalaka mingi mpo nakanisaka te likambo yango. Mpo nazanga mosala te, natyaki mesa liboso ya lopango mpo na kotɛka bambuma mpe nazalaki kobongisa esika yango. Yango ezalaki kobenda bakiliya mingi.

Kasi, kosala mingi ebongolaki makambo nyonso te. Nazalaki kaka mokuse mpenza, nasengelaki kobundana ata na mwa makambo ya mikemike ya bomoi, na ndakisa kozwa eloko oyo batye likoló ya mesa ya mwa molai. Nazalaki komona ete biloko nyonso esalemá kaka mpo na bato oyo baleki ngai na molai mbala mibale. Nazalaki komiyokela mawa, kasi makambo ebongwanaki ntango nakómaki na mbula 14.

Mokolo moko, basi mibale oyo bazalaki Batatoli ya Yehova basombaki mwa bambuma mpe na nsima basɛngaki soki bakoki koyekola na ngai Biblia. Eumelaki te, namonaki ete koyeba Yehova mpe mokano na ye ezali na ntina mingi koleka molai na ngai. Likambo yango esalisaki ngai mingi. Mokanda ya Nzembo 73:28 ekómaki mokapo oyo nalingaka mingi. Eteni ya liboso ya vɛrsɛ yango elobaka: “Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu.”

Libota na biso elongwaki na Côte d’Ivoire mpe tokendaki na Burkina Faso, mpe bomoi na ngai ebongwanaki mpenza. Epai toutaki, bato ya kartye na biso bazalaki komona ngai pembeni ya mesa ya bambuma. Kasi epai tokómaki, nazalaki mopaya, mpe bato mingi bazalaki komituna soki nauti wapi. Bato bazalaki kotalatala ngai, yango wana nazalaki kobima te na boumeli ya bapɔsɔ mingi. Na nsima, namonaki ete ekozala malamu mpo na ngai napusana pene na Yehova. Nakomelaki biro ya Batatoli ya Yehova, mpe batindelaki ngai moto oyo abongi mpenza. Ndeko moko ya misionɛrɛ na nkombo Nani ayaki kotala ngai na tukutuku.

Banzela ya kartye na biso ezalaki zɛlozɛlo, mosɛlumosɛlu, mpe na eleko ya mbula, ezalaki pɔtɔpɔtɔ. Ndeko Nani akweaki mbala ebele na tukutuku na ye ntango azalaki koya koyekola na ngai, kasi alɛmbaki te. Mokolo moko, asɛngaki ngai tókende na makita. Namonaki ete esengeli natika kofanda na kati ya ndako mpe nandima koyoka nsɔni ndenge bato bazalaki kotalatala ngai. Lisusu, komema ngai na tukutuku wana elingaki kobakisa kilo mpe ezalaki mpasi mpo na kotambwisa yango. Atako bongo, nandimaki, nakanisaki lisusu eteni ya mibale ya mokapo oyo nalingaka mingi: “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azali esika na ngai ya kokima.”

Ngai ná ndeko Nani, ntango mosusu tokweaki na pɔtɔpɔtɔ, kasi lokola tozalaki kosepela na makita, tozalaki kokipe te. Na libándá, bato bazalaki kotalatala ngai, kasi na Ndako ya Bokonzi, nazalaki komona nde bato bazali na esengo mpe bazali komungamunga. Sanza libwa na nsima, nazwaki batisimo.

Eteni ya misato ya mokapo oyo nalingaka mingi elobi: “Mpo nasakola misala na yo nyonso.” Nayebaki ete mosala ya kosakola ekozala mama ya likambo mpo na ngai. Nayebaka lisusu mokolo ya liboso oyo nabimaki mosala ya kosakola ndako na ndako. Ezala bana mike to mikóló bazalaki kotalatala ngai, kolanda ngai, mpe bazalaki kosɛka ndenge nazali kotambola. Likambo yango esalaki ngai mpasi, kasi namikundolaki ete bato yango basengeli na Paradiso, ndenge ngai mpe nazali na mposa na yango, yango nde epesaki ngai makasi ya koyika mpiko.

Mpo makambo ekóma mwa pɛtɛɛ, nazwaki mwa tukutuku moko ya makolo misato. Moninga na ngai ya mosala azalaki kotindika ngai likoló ya ngomba mpe nazalaki komata na mwa tukutuku yango ntango ya kokita. Atako mosala yango ezalaki mpasi na ebandeli, eumelaki te nasepelaki na yango makasi mpe na 1998, nakómaki mobongisi-nzela.

Natambwisaki bayekoli ya Biblia ebele, mpe minei kati na bango bazwá batisimo. Lisusu, moko ya bandeko na ngai ya makila andimaki mpe solo! Koyoka ndenge basusu bakendaki liboso na solo, ezalaki kolendisa ngai na ntango oyo nazalaki mpenza na mposa na yango. Mokolo moko ntango nazalaki kobɛla malaria, nazwaki mokanda moko euti na Côte d’Ivoire. Nabandaki koyekola Biblia na moyekoli moko ya iniversite na Burkina Faso mpe napesaki ye epai ya ndeko mobali moko. Na nsima, moyekoli yango akendeki na Côte d’Ivoire. Nasepelaki koyoka ete akómi mosakoli oyo azwi naino batisimo te!

Ndenge nini nazwaka mwa mbongo ya kobikela? Ebongiseli moko oyo esalisaka bibɔsɔnɔ esɛngaki ete nayekola kotonga bilamba. Molakisi moko amonaki ndenge nazalaki kosala mpe alobaki ete: “Tosengeli kolakisa yo ndenge ya kosala sabuni.” Yango nde basalaki. Sikoyo, nasalaka sabuni ya kosukola bilamba mpe ndako. Bato basepelaka na sabuni na ngai mpe basalelaka yango piblisite epai ya bato mosusu. Ngai moko nakendaka na mwa tukutuku na ngai kotika sabuni yango epai ya bato.

Likambo ya mawa, na mobu 2004, natikaki mosala ya mobongisi-nzela mpo na maladi moko na mokɔngɔ. Kasi nabimaka na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ.

Bato balobaka ete nayebani mpo na ezaleli na ngai ya komungamunga. Nasengeli mpenza kozala na esengo mingi mpamba te, mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu.​—Lisolo ya Sarah Maiga.