Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Nakómá na kimya elongo na Nzambe mpe elongo na mama na ngai

Nakómá na kimya elongo na Nzambe mpe elongo na mama na ngai

MOKOLO moko, mama atunaki ngai boye: “Mpo na nini olingi kosambela bankɔkɔ te? Oyebi te ete soki ozali na bomoi ezali mpo na bango? Olingi komonisela bango botɔndi te? Ndenge nini okoki kotika mimeseno ya kala oyo bankɔkɔ batikelá biso? Koboya kopesa bankɔkɔ na biso lokumu ezali lokola koloba ete losambo na biso ezali bozoba.” Nsima ya koloba bongo, mama abandaki kolela.

Mwa basanza liboso ya likambo wana, Batatoli ya Yehova basɛngaki ete báyekola na mama Biblia. Mama alingaki koyekola te, kasi mpo na komonisa limemya ayebisaki bango báyekola nde na ngai. Kasi likambo ya kokamwa, akómaki lisusu kosilikela ngai, atako nazalaki kotosa ye ntango nyonso. Lokola nalingaki kosepelisa Yehova, mbala oyo nakokaki kotosa mama te. Ezalaki pɛtɛɛ te, kasi Yehova apesaki ngai makasi.

NAYEKOLI MAKAMBO YA YEHOVA

Libota na ngai ezalaki kosambela na lingomba ya Bouddha, lokola bato mingi ya Japon. Kasi, nsima ya koyekola na Batatoli ya Yehova sanza mibale, nandimisamaki ete Biblia ezali solo. Ntango nayekolaki ete nazali na Tata oyo afandaka na likoló, nalingaki mpenza koyeba ye malamumalamu. Na ebandeli, mama azalaki kosepela ntango nazalaki koyebisa ye makambo oyo nazalaki koyekola. Nabandaki koyangana na makita na mokolo ya lomingo na Ndako ya Bokonzi. Lokola nayekolaki makambo mingi, nayebisaki mama ete nakotika kosangana na milulu ya lingomba ya Bouddha. Mbala moko mama abongolaki makanisi. Alobaki ete: “Kozala na moto oyo alingaka bankɔkɔ te na libota ezali likambo ya nsɔni.” Apekisaki ngai koyekola Biblia mpe koyangana na makita. Nakanisaki ata moke te ete mama akokaki koloba na ngai bongo! Akómaki mpenza moto mosusu.

Tata mpe andimelaki mama. Baefese mokapo 6 eteyaki ngai ete Yehova alingi natosaka baboti na ngai. Nalingaki ete kimya ezonga na libota na biso, mpe nakanisaki ete soki nayokeli bango, nsukansuka bango mpe bakoyokela ngai. Lokola na ntango wana, nasengelaki komibongisa mpo na baekzamɛ ya kelasi, nandimaki kosala ndenge baboti na ngai balobaki, mpo na sanza misato. Kasi, nalakaki Yehova ete nakozongela koyangana na makita soki ntango wana eleki.

Ekateli na ngai ezalaki mabe mpo na bantina mibale. Ya liboso, nakanisaki ete nsima ya sanza misato nakozala kaka na mposa makasi ya kosalela Yehova. Nzokande, boyokani na ngai na Yehova ekómaki kolɛmba nokinoki. Ya mibale, tata ná mama basalaki lisusu makasi mpo na kondimisa ngai ete natika kosalela Yehova.

LISALISI MPE BOTƐMƐLI

Na Ndako ya Bokonzi, nakutanaki na Batatoli mingi oyo bakutanaki mpe na botɛmɛli na mabota na bango. Bayebisaki ngai ete Yehova akopesa ngai makasi. (Matai 10:34-37) Balimbolelaki ngai ete soki natikali sembo epai ya Yehova, libota na ngai ekoki mpe koyekola makambo ya Yehova. Nazalaki na mposa ya kotyela Yehova motema, yango wana nakómaki kobondela ye mingi.

Libota na ngai ekómaki kotɛmɛla ngai na ndenge mosusu. Mama abondelaki ngai natika koyekola mpe asalaki nyonso mpo na kondimisa ngai. Mbala mingi, nazalaki kaka kofanda nyɛɛ. Soki nalobi mwa likambo, tozalaki kaka kobendana mpo moto na moto azalaki koluka komilongisa. Sikoyo, namonaka ete soki namonisaka limemya mpo na bindimeli ya mama mpe ndenge oyo azalaki komiyoka, mbala mosusu tolingaki kozala na kimya. Baboti na ngai bakómaki kopesa ngai misala mingi mpo nafanda kaka na ndako. Na bantango mosusu, bazalaki kokanga ngai na ndako to kotikela ngai bilei te.

Mama asɛngaki bato mosusu básalisa ye mpo na kondimisa ngai. Asololaki na molakisi na ngai, kasi esimbaki te. Amemaki ngai epai ya mokonzi na ye ya mosala, mpo andimisa ngai ete mangomba nyonso mosusu ezali na ntina te. Lisusu abengaki bandeko mosusu ya libota na telefone mpe azalaki kolela ntango azali kobondela bango básalisa ngai. Likambo yango etungisaki ngai mingi. Kasi na makita, bankulutu bakundwelaki ngai ete ntango mama azalaki koyebisa bato mosusu likambo yango, azalaki nde kopesa bango litatoli.

Baboti na ngai balingaki ete nakende kotánga na iniversite mpo nazwa mosala ya malamu. Lokola tozalaki koyokana te, tozalaki kokoka te kosolola likambo yango na kimya; yango wana, nakomelaki bango mikanda mingi mpo na kolimbola mikano na ngai. Tata asilikaki makasi mpe alobaki boye: “Soki okanisi ete okoki kozwa mosala, zwá yango lobi, soki te okobima na ndako oyo.” Nabondelaki Yehova mpe nasɛngaki ye asalisa ngai. Kaka mokolo oyo elandaki, ntango nazalaki na mosala ya kosakola, bandeko basi mibale basɛngaki ngai natángisaka bana na bango. Tata asepelaki na likambo yango te, yango wana azalaki kolobisa ngai lisusu te mpe kokipe ngai te. Mama alobaki ete elingaki kutu kozala malamu nazala mobomi-bato na esika ya kozala Motatoli ya Yehova.

Yehova asalisaki ngai nasembola makanisi na ngai mpe nayeba oyo nasengeli kosala

Ntango mosusu nazalaki komituna soki Yehova alingaki ete natɛmɛla baboti na ngai ndenge wana. Na yango, nabondelaki Yehova mpe namanyolaki na makambo oyo Biblia elobi mpo na bolingo ya Nzambe. Yango esalisaki ngai nakóma na makanisi ya malamu mpe nayeba ete baboti na ngai bazalaki kotɛmɛla ngai mpo bazalaki komitungisa mpo na ngai. Yehova asalisaki ngai nasembola makanisi na ngai mpe nayeba oyo nasengeli kosala. Longola yango, lokola nazalaki kobima mingi na mosala ya kosakola, nakómaki kosepela mingi na mosala yango. Nakómaki na mposa ya kokóma mobongisi-nzela.

MOSALA YA MOBONGISI-NZELA

Ntango bandeko basi mosusu bayokaki ete nalingi kokóma mobongisi-nzela, bayebisaki ngai ete nasengeli kozela naino tii ntango baboti na ngai bakokitisa mitema. Nabondelaki Yehova apesa ngai bwanya, nalukaki na mikanda na biso, nalukaki koyeba ntina oyo nalingi kokóma mobongisi-nzela, mpe nasololaki na bandeko basi mpe mibali oyo bakɔmeli na elimo. Na nsima, nazwaki ekateli ya kosepelisa Yehova. Nayebaki mpe ete ata soki nazelaki lisusu liboso ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela, baboti na ngai balingaki kaka kotɛmɛla ngai.

Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na mbula ya nsuka ya eteyelo ya ntei. Nsima ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mpo na mwa ntango, nakómaki na mposa ya kokende kosakola esika mposa ezali monene. Kasi tata ná mama balingaki te ete nalongwa na ndako. Yango wana, nazelaki tii ntango nakómaki na mbula 20. Na nsima, nasɛngaki biro ya filiale etinda ngai na teritware moko na sudi ya Japon mpo nazala mosika te na libota na ngai, mpo mama amitungisa mingi te.

Ntango nazalaki na teritware wana, nasepelaki komona ndenge bato mingi oyo nayekolaki na bango Biblia bazali kozwa batisimo. Nabandaki koyekola Lingelesi mpo nalingaki kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola. Na nsima, ntango namonaki molende ya babongisi-nzela monene mibale oyo tozalaki na bango lisangá moko mpe ndenge oyo bazalaki kosalisa basusu, ngai mpe nazwaki ekateli ya kokóma mobongisi-nzela monene. Na ntango wana, mama abɛlaki makasi mbala mibale, mpe mbala yango nyonso nazongaki na ndako mpo na kosalisa ye. Likambo yango ekamwisaki ye mpe akómaki komonisela ngai mwa boboto.

EBELE YA MAPAMBOLI OYO EUTI NA YEHOVA

Mbula 7 na nsima, ndeko mobali Atsushi, moko ya babongisi-nzela monene oyo nauti kolobela, atindelaki ngai mokanda. Akómaki na mposa ya kobala mpe atunaki ngai soki nakosepela ete tóbalana. Nakanisaki ata mokolo moko te ete ndeko Atsushi akokaki kozala na likanisi ya kolinga ngai, ngai mpe nazalaki na likanisi ya kolinga ye te. Sanza moko na nsima, nayanolaki ye ete nandimi koyeba ye malamu. Tomonaki ete tozali na mikano ndenge moko. Tozalaki na mposa ya kokoba na mosala ya ntango nyonso mpe kondima kokende esika nyonso oyo bakotinda biso. Nsukansuka, tobalanaki. Nasepelaki mingi mpo tata ná mama mpe bandeko mosusu ya libota bazalaki na fɛti ya libala na biso.

Népal

Mwa moke na nsima, ntango tozalaki babongisi-nzela ya sanza na sanza, Atsushi akómaki mokɛngɛli ya zongazonga mosungi. Na nsima, tokómaki babongisi-nzela monene, nsima na yango batindaki biso na mosala ya zongazonga. Ntango tosilisaki kotala masangá nyonso ya zongazonga na biso mpo na mbala ya liboso, biro ya filiale ebengaki biso na telefone. Etunaki biso soki tokondima kokende na Népal mpe kokoba na mosala ya zongazonga kuna.

Kosala na mikili ebele eteyi ngai makambo mingi mpo na Yehova

Nazalaki komitungisa mpo nayebaki te oyo baboti na ngai bakokanisa soki tokei mosika na bango ndenge wana. Ntango nabengaki bango na telefone, tata alobaki boye: “Bozali kokende na esika moko ya kitoko.” Pɔsɔ moko liboso, moninga na ye moko apesaki ye buku moko oyo ezalaki kolobela Népal mpe tata azalaki kutu kokana kokende kotala mboka yango.

Tosepelaki mingi kozala elongo na bato ya Népal, oyo bayebi kofanda na bato. Na nsima, masangá ya Bangladesh ekɔtaki mpe na zongazonga na biso. Atako ezalaki pene na Népal, kuna makambo ezalaki ndenge mosusu. Na mosala na biso ya kosakola, tozalaki kokutana na makambo ndenge na ndenge. Nsima ya mbula 5, bazongisaki biso lisusu na Japon, esika tozali kosala mosala ya zongazonga lelo oyo.

Nayekoli makambo mingi mpo na Yehova na mosala oyo tosali na Japon, Népal, mpe Bangladesh. Na bikólo yango, bato na bato bazali na bonkɔkɔ na bango, bizaleli na bango, mpe mimeseno na bango. Lisusu, moto na moto azali na lolenge na ye. Namoni ndenge oyo Yehova akipaka moto na moto, andimaka bato, asalisaka bango mpe apambolaka bango.

Nazali na makambo ebele oyo etindaka ngai napesa Yehova matɔndi. Apesi ngai likoki ya koyeba ye, kosalela ye mpe apesi ngai mobali moko ya malamu. Yehova asalisaki ngai nazwa bikateli ya malamu, mpe sikoyo nazali na boyokani ya malamu elongo na ye mpe na libota na ngai. Na lisalisi ya Yehova, ngai ná mama tókómá lisusu baninga ya malamu. Nazali mpenza na botɔndi ndenge nakómá na kimya elongo na Nzambe mpe elongo na mama na ngai.

Tozwi esengo mingi na mosala ya zongazonga