Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libongoli ya Liloba ya Nzambe oyo ebongi

Libongoli ya Liloba ya Nzambe oyo ebongi

“Liloba ya Nzambe ezali na bomoi.”​—BAEBRE 4:12.

NZEMBO: 37, 116

1. (a) Mokumba nini Nzambe apesaki Adama? (b) Kobanda ntango wana, ndenge nini basaleli ya Nzambe basalelaki likabo ya koloba?

YEHOVA NZAMBE apesá bato likabo ya koloba. Na elanga ya Edene, Nzambe apesaki Adama mokumba ya kopesa banyama nyonso nkombo. Adama apesaki nyama mokomoko nkombo oyo ebongi. (Ebandeli 2:19, 20) Kobanda ntango wana, basaleli ya Nzambe basalelaka likabo ya koloba mpo na kokumisa Yehova mpe koyebisa basusu makambo na ye. Na mikolo euti koleka, basaleli ya Nzambe basalelaki likabo yango mpo na kobongola Biblia mpo ebele ya bato báyeba Yehova.

2. (a) Mitinda nini bandeko ya Komite ya bobongoli ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika balandaki mpo na kobongola yango? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Ezali na bankóto ya mabongoli ya Biblia, kasi mosusu ezali polele koleka mosusu. Mpo na kobongola Biblia na ndenge ya polele, Komite ya bobongoli ya Libongoli ya Mokili ya Sika ezwaki ekateli ya kolanda mitinda oyo misato ya ntina: (1) Kokumisa nkombo ya Nzambe mpe kozongisa yango na bisika nyonso oyo ezalaki ntango Biblia ekomamaki. (Tángá Matai 6:9.) (2) Kobongola liloba mokomoko soki esengeli mpo na kobimisa nsango ya ebandeli. Soki ebongi te, kobimisa likanisi oyo ezalaki na makomi ya ebandeli. (3) Kosalela elobeli oyo ezali mpasi te mpo na kotánga mpe kokanga ntina. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Tángá Nehemia 8:8, 12.) Bandeko oyo babongolaki Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ koleka 130 balandaki mitinda wana misato. Na lisolo oyo, tokomona ndenge mitinda wana esalelamaki mpo na Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu na 2013 na Lingelesi mpe na mabongoli na yango na minɔkɔ mosusu.

BIBLIA OYO EZALI KOKUMISA NKOMBO YA NZAMBE

3, 4. (a) Epai wapi tokoki kokuta Tetragrami? (b) Mabongoli mingi ya Biblia esalaki nini na nkombo ya Nzambe?

3 Nkombo ya Nzambe emonisami na balɛtrɛ minei ya Ebre oyo ebengami Tetragrami. Tokoki kokuta Tetragrami yango na bamaniskri mingi ya kala ya Ebre, na ndakisa Barulo ya Mbu Ekufá. Tokoki mpe kokuta yango na mabongoli mosusu ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki. Mabongoli yango esalemaki mbula soki 200 liboso ya Kristo mpe mbula soki 100 nsima ya Kristo. Bato mingi bakamwaka soki bamoni ndenge nkombo ya Nzambe ezali mbala ebele na bamaniskri ya kala.

Bato mingi bakamwaka soki bamoni ndenge nkombo ya Nzambe ezali mbala ebele na bamaniskri ya kala

4 Emonani polele ete nkombo ya Nzambe esengeli kozala na Biblia. Tii lelo, mabongoli mingi esalelaka nkombo ya Nzambe te. Na ndakisa, mbula mibale kaka nsima ya kobimisama ya Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, libongoli ya American Standard Version oyo ebongisamaki lisusu ebimaki. Libongoli yango oyo ebimaki na 1901 ezalaki na nkombo ya Nzambe, kasi oyo ebongisamaki lisusu na 1952 ezalaki na yango te. Mpo na nini? Babongoli na yango bamonaki ete “ebongaki ata moke te” kosalela nkombo ya Nzambe. Mabongoli mingi, ezala ya Lingelesi mpe ya minɔkɔ mosusu, esalaki mpe bongo.

5. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete nkombo ya Nzambe ezala na Biblia?

5 Ezali mpenza likambo soki babongoli batye to balongoli nkombo ya Nzambe na libongoli moko ya Biblia? Ɛɛ. Yehova, moto oyo akomisaki Biblia, alingi bato báyeba nkombo na ye. Mobongoli ya malamu asengeli koyeba oyo mokomi alingi mpe kobongola na kolanda makanisi ya mokomi. Bavɛrsɛ mingi emonisi ete nkombo ya Nzambe ezali na ntina mingi mpe esengeli kokumisama. (Kobima 3:15; Nzembo 83:18; 148:13; Yisaya 42:8; 43:10; Yoane 17:6, 26; Misala 15:14) Na litambwisi ya elimo na ye, Yehova atindaki bakomi ya Biblia bákoma nkombo na ye mbala koleka 7 000 na bamaniskri ya kala. (Tángá Ezekiele 38:23.) Yango wana, ntango babongoli balongolaka nkombo ya Nzambe, bamemyaka Yehova te.

6. Mpo na nini nkombo ya Nzambe ezongisami na bavɛrsɛ mosusu 6 na Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu?

6 Lelo oyo, makambo mingi emonisi ete tosengeli kosalela nkombo ya Yehova. Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu na 2013 esaleli nkombo ya Nzambe mbala 7 216. Elingi koloba nkombo yango ebakisami na bisika mosusu 6. Na bavɛrsɛ mitano, bazongisi yango mpo bamonaki nkombo ya Nzambe na Barulo ya Mbu Ekufá oyo euti komonana kala mingi te. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Bavɛrsɛ yango mitano ezali: 1 Samwele 2:25; 6:3; 10:26; 23:14, 16. Vɛrsɛ ya motoba ezali Basambisi 19:18; nkombo ya Nzambe ezongisami na vɛrsɛ yango nsima ya koyekola na mozindo bamaniskri ya kala ya Biblia.

7, 8. Nkombo Yehova elimboli nini?

7 Bakristo ya solo bayebi ete ezali na ntina mingi koyeba ndimbola mobimba ya nkombo ya Nzambe. Nkombo na ye elimboli “Akómisaka.” * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Mpo na kolimbola nkombo ya Nzambe, kala mikanda na biso ezalaki kosalela Kobima 3:14 oyo elobi: “Nakozala oyo nakozala.” Libongoli ya 1984 oyo ebongisamaki lisusu elimbolaki ete Yehova amikómisaka nyonso oyo alingi kozala mpo na kokokisa mokano na ye. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Kasi, libongoli ya 2013 oyo ebongisami lisusu elobi boye: “Atako likanisi wana ezali mpe na kati ya ndimbola ya nkombo Yehova, ndimbola ya nkombo yango esuki kaka te na oyo ye moko alingaka kokóma. Elimboli mpe ete akómisaka bikelamu na ye ndenge oyo alingi mpo na kokokisa mokano na ye.”

8 Yehova akómisaka bikelamu na ye ndenge nyonso oyo alingi. Na ndakisa, akómisaki Noa motongi ya masuwa, akómisaki Bezalele moto oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ, akómisaki Gideone elombe ya bitumba, mpe akómisaki Paulo misionɛrɛ. Nkombo ya Nzambe ezali na ndimbola monene mpo na basaleli na ye, yango wana Komite ya bobongoli ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ezongisaki nkombo ya Nzambe na libongoli yango.

9. Mpo na nini kobongolama ya Biblia na minɔkɔ mosusu etyami na esika ya liboso?

9 Mabongoli mingi ya Biblia elongolá nkombo ya Nzambe. Na esika na yango, basaleli titre “Nkolo” to nkombo ya nzambe ya mboka na bango. Yango ezali moko ya bantina minene oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi emonaka ete ezali na ntina mingi bato ya minɔkɔ nyonso bázala na Biblia oyo ezali kokumisa nkombo ya Nzambe. (Tángá Malaki 3:16.) Sikoyo, nkombo ya Yehova ezali kokumisama na Libongoli ya Mokili ya Sika oyo esili kobimisama na minɔkɔ koleka 130.

LIBONGOLI MOKO YA PƐTƐƐ MPE YA POLELE

10, 11. Mikakatano nini babongoli bakutanaki na yango ntango bazalaki kobongola Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ mosusu?

10 Ezalaki na mwa mikakatano ntango bazalaki kobongola Libongoli ya Mokili ya Sika ya Lingelesi na minɔkɔ mosusu. Na ndakisa, Biblia ya Lingelesi esalelaki liloba “Sheole” na Mosakoli 9:10 mpe na bavɛrsɛ mosusu. Liloba yango ezalaki mpe komonana mingi na Babiblia mosusu ya Lingelesi. Kasi, ekokaki kotyama te na minɔkɔ mosusu mpo batángi mingi ya minɔkɔ yango bazalaki koyeba te liloba ya Ebre “Sheole.” Liloba yango ezalaki te na badiksionɛrɛ na bango, mpe basusu bazalaki kokanisa ete ezali nkombo ya esika moko boye. Mpo na bantina wana, babongoli bazwaki ndingisa ya kobongola liloba ya Ebre “Sheole” mpe liloba ya Grɛki “Hadesi” na liloba “Nkunda.” Yango ezali lolenge malamu ya kobongola liloba yango mpe kokómisa vɛrsɛ yango polele.

11 Na minɔkɔ mosusu, ezalaki mpe mpasi kobongola liloba ya Ebre mpe ya Grɛki “molimo.” Na minɔkɔ yango, mbala mingi liloba “molimo” epesaka likanisi ya bilimo ya bakufi to eloko moko oyo ebimaka na nzoto ntango moto akufi. Mpo bato bázala na makanisi ya libunga te, babongoli bazwaki ndingisa ya kobongola liloba “molimo” na kotalela likambo oyo bazali kolobela na vɛrsɛ wana. Okoki kokuta bandimbola ndenge na ndenge ya liloba “molimo” na Apɛndisi ya Biblia​Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ezali na mitindami (Rbi8-F). Makambo mosusu oyo etali maloba ya Ebre mpe ya Grɛki etyami na maloba na nse ya lokasa ya libongoli oyo ebongisami lisusu mpo na kosalisa motángi atánga kozanga mpasi mpe akanga ntina ya bavɛrsɛ ya Biblia.

Ntango komite yango ezalaki kobongisa lisusu libongoli yango, etalelaki bankóto ya mituna oyo babongoli ya Biblia batunaki

12. Tángá makambo mosusu oyo ebongwanaki na libongoli oyo ebongisami lisusu na 2013.

12 Mituna oyo babongoli batunaki emonisaki ete bandeko bazalaki kokanga ntina te ya bavɛrsɛ mosusu ya Biblia. Na yango, na sanza ya 09/2007, Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesaki ndingisa ete bábongisa lisusu Biblia ya Lingelesi. Ntango komite yango ezalaki kobongisa lisusu libongoli yango, etalelaki bankóto ya mituna oyo babongoli ya Biblia batunaki. Na esika ya maloba ya Lingelesi ya kala, batyaki maloba ya mikolo oyo, oyo ezali mpasi te mpo na kotánga mpe kokanga ntina, kasi ebateli kaka ndimbola ya ebandeli. Mabongoli oyo esalemi na minɔkɔ mosusu na bambula euti koleka esalisaki mpe na kobongisa maloba mosusu ya Lingelesi.​—Masese 27:17.

BANDEKO BAPESI MATƆNDI MINGI

13. Bandeko mingi balobaki nini mpo na libongoli ya 2013 oyo ebongisami lisusu?

13 Bandeko mingi balobi nini mpo na Libongoli ya Mokili ya Sika ya Lingelesi oyo ebongisami lisusu? Bandeko batindaki bankóto ya mikanda ya botɔndi na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na etúká ya New York. Mingi bazali na makanisi lokola oyo ya ndeko mwasi moko oyo akomaki boye: “Biblia ezali lokola sanduku moko oyo etondi na biloko ya motuya. Kotánga maloba ya Yehova na libongoli ya 2013 oyo ebongisami lisusu ezali lokola kotala na likebi eloko mokomoko ya motuya, kosepela na eteni na yango mokomoko, kongɛnga na yango, langi na yango, mpe kitoko na yango. Bavɛrsɛ oyo ebongolami na elobeli ya pɛtɛɛ esalisi ngai nayeba Yehova lisusu malamu, ye oyo azali lokola tata oyo asimbi lobɔkɔ na ngai mpe azali kotángela ngai maloba na ye na mongongo ya nse.”

14, 15. Bato balobi nini mpo na Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ mosusu?

14 Bato oyo balobaka Lingelesi te kasi minɔkɔ mosusu bapesaki mpe matɔndi mpo na Libongoli ya Mokili ya Sika. Tata moko ya mokóló na engumba Sofia, na ekólo Bulgarie, alobaki boye mpo na libongoli ya monɔkɔ ya Bulgare: “Natángaka Biblia banda bambula mingi, kasi natángá naino te libongoli oyo ezali pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina mpe ezali kosimba motema, lokola libongoli oyo.” Ndenge moko mpe, ndeko mwasi moko ya ekólo Albanie akomaki boye: “Liloba ya Nzambe ezali mpenza kitoko na monɔkɔ ya Albanais! Ezali mpenza esengo ete Yehova aloba na biso na monɔkɔ oyo tolobaka!”

15 Na bikólo mingi, Babiblia ezali ntalo mingi to ezali mpasi mpo na kozwa yango. Kozwa Biblia ezali mpenza lipamboli monene. Lapolo moko ya ekólo Rwanda elobi boye: “Banda bambula mingi, bato mingi oyo bandeko bazalaki koyekola na bango bazalaki kokola te mpo bazalaki na Biblia te. Bazalaki na mbongo te mpo na kosomba Biblia oyo mangomba na bango ezalaki kotɛka. Mpe mbala mingi, bazalaki kokanga ntina te ya bavɛrsɛ mosusu; yango ezalaki kosala ete bákola na elimo te.” Ntango Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na monɔkɔ ya mboka na bango, libota moko na Rwanda oyo ezalaki na bana minei oyo bazalaki naino bilenge, elobaki boye: “Tozali mpenza kotɔnda Yehova mpe moombo ya sembo na ndenge bapesi biso Biblia oyo. Tozali mpenza babola mpe tozalaki na mbongo te ya kosomba Biblia mpo na moto mokomoko ya libota. Kasi sikoyo, mokomoko na biso azali na Biblia na ye. Mpo na komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova, totángaka Biblia libota mobimba elongo mokolo na mokolo.”

16, 17. (a) Yehova alingi ete bato na ye básala nini? (b) Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?

16 Na mikolo ezali koya, Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu ekobima mpe na minɔkɔ mosusu. Satana alukaka kosukisa mosala yango, kasi toyebi ete Yehova alingi bato na ye nyonso báyoka polele ntango azali koloba na bango, na monɔkɔ oyo bayebi malamu. (Tángá Yisaya 30:21.) Etikali moke, “mabele ekotonda na boyebi ya Yehova ndenge mai etondi na mbu.”​—Yisaya 11:9.

17 Tiká ete tózala na ekateli ya kosalela likabo nyonso oyo euti na Yehova, ezala mpe libongoli oyo, mpo na kokumisa nkombo na ye. Tiká ye alobaka na yo mokolo na mokolo na nzela ya Liloba na ye. Azali na likoki ya koyoka na likebi mpenza mabondeli na biso nyonso. Kosolola ndenge wana ekosalisa biso tóyeba Yehova malamu koleka, mpe bolingo na biso mpo na ye ekokoba kokola.​—Yoane 17:3.

“Ezali mpenza esengo ete Yehova aloba na biso na monɔkɔ oyo tolobaka!”

^ par. 2 Talá Apɛndisi A1 na Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu mpe lisolo “Ndenge ya kopona libongoli malamu ya Biblia” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2008.

^ par. 6 Barulo ya Mbu Ekufá eumeli mbula 1 000 koleka Makomi ya Ebre ya Bamasorete.

^ par. 7 Mikanda mosusu epesaka ndimbola wana, kasi bato mosusu ya mayele bandimaka yango te.

^ par. 7 Talá Biblia​Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ezali na mitindami (Rbi8-F), Apɛndisi 1A Le nom divin dans les Écritures hébraïques,” lokasa 1676.