Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Monisá botɔndi mpo na bokabi ya Yehova

Monisá botɔndi mpo na bokabi ya Yehova

YEHOVA azali Nzambe oyo akabaka. (Yakobo 1:17) Tokoki komona bokabi na ye na biloko nyonso oyo asalá. Atondisá molɔ́ngɔ́ na minzoto, mpe atondisá mabele na milona ya kitoko.​—Nzembo 65:12, 13; 147:7, 8; 148:3, 4.

Mokomi ya Nzembo 104 azalaki na botɔndi mingi mpo na nyonso oyo Yehova asalá, yango wana akomaki loyembo moko mpo na kokumisa ye. Ntango otángaka nzembo yango, yo mpe ozalaka na botɔndi lokola mokomi wana ya nzembo? Alobaki boye: “Nakoyembela Yehova bomoi na ngai mobimba; nakobɛtɛla Nzambe na ngai mondule ntango nyonso oyo nazali na bomoi.” (Nzembo 104:33) Yo mpe olingi kosala lokola ye?

NDAKISA YA BOKABI OYO ELEKI MONENE

Yehova alingi ete tólanda ndakisa na ye ya bokabi. Ayebisi mpe biso ntina oyo tosengeli kokabaka. Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo akomaki boye: “Pesá bazwi ya ntango oyo mitindo ete bázala na lolendo te, mpe bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela; básala makambo ya malamu, bázala bazwi na misala ya malamu, bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba, bámibombela biloko ya motuya, elingi koloba, moboko malamu oyo bakotonga likoló na yango na mikolo oyo ezali koya, mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.”​—1 Timote 6:17-19.

Na mokanda na ye ya mibale epai ya Bakorinti, ntoma Paulo alimbolaki makambo oyo esengeli kotinda biso tókabelaka basusu. Alobaki ete: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakorinti 9:7) Ntango tokabelaka basusu, nani azwaka matomba? Ntoma Paulo alobaki ete tosalisaka basusu ntango tópesaka bango biloko oyo bazali na yango bosɛnga, tomisalelaka mpe malamu mpo Yehova akopambola biso.​—2 Bakorinti 9:11-14.

Na nsima, ntoma Paulo alobelaki likambo eleki monene oyo emonisi bokabi ya Nzambe ntango alobaki ete: “Nzambe azwa matɔndi mpo na likabo na ye wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.” (2 Bakorinti 9:15) ‘Likabo ya ofele’ wana ya Yehova etali mpe makambo nyonso ya malamu oyo apesaka biso na nzela ya Yesu Kristo. Tozangi maloba mpo na kolobela motuya ya likabo yango.

Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na nyonso oyo Yehova ná Yesu basalá mpe bakosala mpo na biso? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kopesa ntango na biso, makasi na biso, mpe biloko na biso mpo na kosambela Yehova mpe kosalisa basusu báyeba ye. Tokoki kosala yango ezala tozali na mingi to moke mpenza.​—1 Ntango 22:14; 29:3-5; Luka 21:1-4.