Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tozali na mposa ya kobikisama!

Tozali na mposa ya kobikisama!

MAI etondaki na esika moko oyo batimolaka charbon na nse ya mabelé, pembeni ya engumba Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis. Basali 9 bakangamaki na nse, na bozindo ya mɛtrɛ 73. Mikolo misato na nsima, bato yango babimaki, bazwaki likama moko te. Ndenge nini babikisamaki?

Na lisalisi ya karte ya esika yango mpe aparɛyi oyo esalisaka mpo na koyeba ata esika nini moto azali (GPS), bato oyo bayaki kobikisa bango batimolaki lidusu ya bonene ya santimɛtrɛ 65 mpe bakitisaki eloko moko tii na esika oyo bato yango bazalaki. Na lisalisi na yango, babimisaki mosali mokomoko mpe bango nyonso babikaki na liwa. Bato oyo babikaki bazalaki na esengo, mpe batɔndaki bato oyo babikisaki bango.

Mingi kati na biso tokokangama te na nse ya mabelé lokola basali wana to tokokutana te na likama moko ya monene. Atako bongo, biso nyonso tozali na mposa ya kobikisama, mpamba te moto moko te akoki kokima maladi, bobange, mpe liwa. Yobo, moto moko ya sembo, alobaki boye: “Moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi. Akobima lokola felele mpe akokauka, akolimwa lokola molili mpe akoumela te.” (Yobo 14:1, 2) Lelo oyo, mbula soki 3 500 na nsima, maloba yango ezali kaka solo, mpo moto moko te akoki kokima liwa! Ata soki tofandaka wapi, to tosalaka makasi tóbatela nzoto na biso kolɔngɔnɔ, tozali na mposa ya kobikisama na bampasi, bobange, mpe liwa.

Bato ya siansi bazali kosala nyonso mpo na koyeisa bomoi ya moto molai. Ezali na ebongiseli moko oyo mokano na yango ezali ya “kolonga liwa” mpe “kosalisa basangani na yango báluka ndenge oyo bakoki kokóma na nzoto oyo ekoki kokufa te.” Kasi, tii lelo oyo, atako bato ya siansi bazali kosala makasi, balongi te kosalisa bato bázala na bomoi koleka mbula 70 to 80 oyo Moize alobelaki eleki sikoyo mbula 3 500.​—Nzembo 90:10.

Ata soki yo mpe ondimaka likambo oyo Yobo alobaki to ondimaka yango te, ntembe ezali te ete nsima ya bambula, yo mpe ‘okolimwa lokola molili’; okotika baninga na yo, bato ya libota na yo, mpe nyonso oyo osalaki. Salomo, mokonzi ya Yisalaele, akómaki boye: “Mpo ete bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te, bazali na libonza mpe te; kokanisa na bango esili kobungana.”​—Mosakoli 9:5.

Ndenge Biblia emonisi yango, liwa ezali ‘koyangela’ bato lokola mokonzi moko ya mabe. Ya solo, bato bazali na mposa ya kobikisama na liwa, oyo ezali monguna ya nsuka. (Baloma 5:14; 1 Bakolinti 15:26) Ata bato oyo bazwá formasyo ya kobikisa basusu na makama bakoki te kobikisa yo mpo na libela. Kasi, Yehova Nzambe, Mozalisi ya moto, azwi bibongiseli mpo na kobikisa bato mpo na libela.