Lakisá makambo oyo ezali na kati

Teyá bana na yo

Azalaki na mposa ya kosalisa

Azalaki na mposa ya kosalisa

OYEBAKI moto moko oyo abɛlaki makasi?— Ozalaki na mposa ya kosalisa ye?— Olingaki kosala nini soki moto yango azalaka moto ya ekólo to lingomba mosusu? Olingaki kaka kosalisa ye ayoka malamu?— Mwana mwasi moko oyo azalaki na Yisalaele esili koleka mbula soki 3 000 asalaki bongo. Tólobela naino likambo yango ndenge elekaki.

Bitumba ezalaki ntango nyonso na kati ya Bayisalaele, epai mwana mwasi yango azalaki, ná Sulia, ekólo oyo ezalaki mosika te na Yisalaele. (1 Mikonzi 22:1) Mokolo moko, Baasulia bayaki na Yisalaele mpe bakangaki mwana mwasi yango. Bamemaki ye na Sulia, epai akómaki mosali ya mwasi ya Naamana, mokonzi ya basoda ya Sulia. Naamana azalaki kobɛla maladi ya maba, maladi oyo ekataka misuni ya moto.

Mwana mwasi yango ayebisaki mwasi ya Naamana oyo mobali na ye asengeli kosala mpo abika. Alobaki boye: ‘Soki Naamana azalaki na Samalia, mbele Elisa, mosakoli ya Yehova abikisi ye na maba na ye.’ Ndenge oyo mwana mwasi yango abɛtaki lisolo ya Elisa etindaki Naamana andima ete Elisa akoki kobikisa ye. Na ndingisa ya Bene-Hadadi, mokonzi ya Sulia, Naamana mpe basali mosusu basalaki mobembo moko molai ya kilomɛtrɛ soki 150 mpo na kokende kokutana na Elisa.

Bakendaki liboso epai ya Yolama, mokonzi ya Yisalaele. Balakisaki ye mokanda ya mokonzi Bene-Hadadi, oyo akomelaki Yolama mpo na kosɛnga ye asalisa Naamana. Kasi, Yolama azalaki kondimela Yehova ná mosakoli Elisa te. Yolama akanisaki ete Bene-Hadadi azali koluka kobundisa ye. Ntango Elisa ayokaki likambo yango, alobaki na mokonzi Yolama ete: “Aya epai na ngai.” Elisa alingaki komonisa ete Nzambe azali na nguya ya kobikisa Naamana na maladi na ye wana ya mabe.​—2 Mikonzi 5:1-8.

Ntango Naamana ná bampunda mpe makalo na ye bakómaki epai ya Elisa, Elisa atindaki ntoma koyebisa Naamana ete: ‘Kendá kosukola na Yaladene mbala nsambo mpe okobika.’ Naamana asilikaki. Azalaki kokanisa ete Elisa akoya kokutana na ye mpe kotya lobɔkɔ na ye na maba mpo esila. Na esika Elisa aya, amonaki nde ntoma na ye. Naamana asilikaki lisusu makasi mpe abandaki kozonga epai na ye.​—2 Mikonzi 5:9-12.

Olingaki kosala nini soki ozalaki moko ya basali ya Naamana?— Basali na ye batunaki ye boye: ‘Soki Elisa alobaki na yo osala likambo moko ya monene, olingaki kosala yango te? Mpo na nini te kosala likambo moke oyo asɛngi yo: kosukola mpo obika?’ Naamana ayokelaki bango. “Boye akitaki mpe [abandaki kosukola] na Yaladene mbala nsambo . . . ; mpe nzoto na ye ekómaki lisusu lokola nzoto ya mwana moke.”

Naamana azongaki epai ya Elisa mpe alobaki ete: “[Sikoyo] nayebi ete Nzambe mosusu azali kati na mokili mobimba te bobele na Yisalaele.” Alakaki Elisa ete “akopesa [lisusu] mbeka ya kotumbama to mbeka ebomami epai ya banzambe mosusu te bobele epai ya [Yehova].”​—2 Mikonzi 5:13-17.

Okosepela kosalisa moto moko ayeba Yehova mpe makambo oyo Yehova akoki kosala, ndenge mwana mwasi wana asalaki?— Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, moto moko ya maba andimelaki ye mpe alobaki ete: ‘Soki olingi mpenza kosalisa ngai, okoki kosala yango.’ Oyebi eyano oyo Yesu apesaki moto yango?— “Nalingi.” Mpe Yesu abikisaki ye, ndenge kaka Yehova abikisaki Naamana.​—Matai 8:2, 3.

Oyebi ete mokili moko ya sika ekozala, epai Yehova akosala ete bato nyonso bázala na nzoto malamu mpe bázala na bomoi libela na libela?— (2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3, 4) Na ntembe te, okolinga koyebisa basusu bilaka kitoko wana!