Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Teyá bana na yo

Samwele akangamaki na oyo ezali malamu

Samwele akangamaki na oyo ezali malamu

OSILÁ komona bato bazali kosala makambo mabe?— * Samwele amonaki. Azalaki na esika oyo okoki kondima te ete bato bakoki kosala makambo mabe. Ezalaki na tabenakle ya Nzambe, to esika ya losambo, na engumba Silo. Ebandaki ndenge nini Samwele akóma kofanda na tempelo, eleki lelo mbula koleka 3 000?

Liboso Samwele abotama, mama na ye, Hana, azalaki koluka mwana na mwinda. Mokolo moko oyo akendeki na tabenakle, Hana ayebisaki Nzambe likambo yango na libondeli. Lokola azalaki kobondela na etingya, bibɛbu na ye ebandaki koningana. Yango wana, nganga monene Eli akanisaki ete Hana alangwe. Kasi, ntango ayebaki ete mwasi yango alangwe te kasi azali nde na mpasi na motema, apambolaki ye mpe alobaki na ye ete: “Tiká ete Nzambe ya Yisalaele [ayoka libondeli na yo, NW].”​—1 Samwele 1:17.

Na nsima, Samwele abotamaki. Hana azalaki na esengo makasi mpe ayebisaki mobali na ye Elekana ete: ‘Soki kaka naboyisi Samwele mabɛlɛ, nakomema ye na tabenakle mpo asalela Nzambe kuna.’ Asalaki mpe kaka bongo! Na ntango wana, Samwele akokaki kozala na mbula minei to mitano.

Eli akómaki mobange mpe bana na ye Hofini ná Fineasi bazalaki kosambela Yehova na ndenge ebongi te. Bazalaki kutu kosala pite na basi oyo bazalaki koya na tabenakle! Okanisi ete tata na bango asengelaki kosala nini?— Asengelaki kopesa bango etumbu mpe kopekisa bango kosalaka makambo wana ya mabe.

Elenge Samwele azalaki kokola kuna, mpe ekoki kozala ete ayebaki etamboli mabe ya bana ya Eli. Samwele alandaki ndakisa mabe na bango?— Te, akobaki kosala oyo ezali malamu, ndenge kaka baboti na ye bateyaki ye. Yango wana, tokoki kokamwa te ete Yehova asilikelaki Eli. Atindaki kutu mosakoli ayebisa Eli ndenge akopesa libota na ye etumbu, mingimingi bana na ye wana ya mabe.​—1 Samwele 2:22-36.

Samwele akobaki kosala na Eli na tabenakle. Mokolo moko na butu, ntango Samwele azalaki kolala, mongongo moko ebengaki ye. Samwele akimaki mbangu epai ya Eli, kasi Eli ayebisaki ye ete abengi ye te. Mongongo yango ebengaki ye lisusu. Ntango mongongo yango eyokanaki mpo na mbala ya misato, Eli ayebisaki Samwele aloba ete: “[Yehova] lobá mpo ete moombo na yo azali koyoka.” Ntango Samwele alobaki bongo, Yehova asololaki na ye. Oyebi makambo nini Yehova ayebisaki Samwele?—

Nzambe ayebisaki Samwele lisusu mokano na ye ya kopesa libota ya Eli etumbu. Na ntɔngɔ, Samwele abangaki koyebisa Eli makambo oyo Yehova alobaki. Kasi Eli abondelaki Samwele boye: “Nalɔmbi yo ete obombela ngai likambo te.” Nsukansuka, Samwele ayebisaki Eli makambo nyonso oyo Yehova alobaki ete akosala, ndenge kaka mosakoli na Ye ayebisaki Eli liboso. Eli azongisaki boye: “[Yehova] asala yango emonani malamu epai na ye.” Nsukansuka, Hofini ná Fineasi bakufaki, Eli mpe akufaki.​—1 Samwele 3:1-18.

Na ntango yango, “Samwele akolaki mpe [Yehova] azalaki na ye elongo.” Ekoki kozala ete na ntango wana Samwele azalaki elenge, eleko moko ya ntina mingi na bomoi ya bana. Okanisi ete ezalaki pɛtɛɛ mpo na Samwele kokoba kosala oyo ezali malamu ata ntango basusu bazalaki kosala makambo ya mabe?— Atako ezalaki pɛtɛɛ te, Samwele atikalaki sembo na mosala ya Yehova bomoi na ye mobimba.​—1 Samwele 3:19-21.

Bongo yo? Okolinga kozala lokola Samwele ntango okokola? Okokangama na oyo ezali malamu? Okokoba kokangama na mateya ya Biblia mpe na makambo oyo baboti na yo bateyaki yo? Soki osali bongo, okosepelisa ná Yehova ná baboti na yo.

^ par. 3 Soki ozali kotánga na mwana mpe bokómi esika mwa mokɔlɔtɔ (—) ezali, osengeli kotɛlɛma mpe kotuna mwana motuna.