Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Teyá bana na yo

Yosiya aponaki kosala oyo ezali malamu

Yosiya aponaki kosala oyo ezali malamu

OMONAKA ete ezali mpasi kosala oyo ezali malamu? *​— Soki ɛɛ, yebá ete ozali yo moko te. Ata mikóló bamonaka mpe ete ezali mpasi kosala oyo bayebi ete ezali malamu. Tótala mpo na nini ezalaki mpasi mpo Yosiya apona kosala oyo ezali malamu. Oyebi soki azalaki nani?—

Yosiya azalaki mwana ya Amona, mokonzi ya Yuda, oyo azalaki na mbula 16 ntango abotaki Yosiya. Amona azalaki moto mabe mpenza lokola tata na ye, mokonzi Manase. Mokonzi yango ya mabe, Manase, asalaki mbula mingi na boyangeli na ye. Kasi, nsukunsuka, Baasulia bakangaki ye mpe bakendaki na ye na bolɔkɔ mosika na Babilone. Na bolɔkɔ, Manase abondelaki Yehova alimbisa ye, mpe Yehova ayokaki ye.

Ntango Manase abimaki na bolɔkɔ mpe azongaki na Yelusaleme, azongaki na kiti ya bokonzi. Nokinoki abongisaki makambo mabe oyo asalaki mpe asalisaki bato básalela Yehova. Na ntembe te, ayokaki mpasi ntango amonaki ete mwana na ye Amona alandaki te ndakisa na ye ya malamu. Na ntango yango Yosiya abotamaki. Biblia elobi te soki Manase afandaki mingi ná nkɔkɔ na ye Yosiya to te. Kasi, okanisi ete Manase asalisaki nkɔkɔ na ye asalela Yehova?—

Ntango Yosiya azalaki na mbula motoba, Manase akufaki mpe Amona, tata ya Yosiya, akómaki mokonzi. Amona ayangelaki kaka mbula mibale, mpe na nsima, basali na ye babomaki ye. Na yango, Yosiya akómaki mokonzi ya Yuda ntango azalaki na mbula mwambe. (2 Ntango, mokapo 33) Oyebi soki nini esalemaki na nsima? Yosiya alandaki ndakisa mabe ya tata na ye Amona to alandaki nde ndakisa malamu ya Manase, nkɔkɔ na ye oyo abongolaki motema?—

Atako Yosiya azalaki elenge, ayebaki ete asengeli kosalela Yehova. Na yango ayokaki toli ya baoyo bazalaki kolinga Yehova, na esika ya koyoka baoyo bazalaki baninga ya tata na ye. Yosiya azalaki kaka na mbula mwambe, kasi ayebaki ete ezalaki malamu ayoka bato oyo balingaka Nzambe. (2 Ntango 34:1, 2) Okolinga koyeba bato yango mosusu oyo bapesaki Yosiya toli mpe bapesaki ye ndakisa ya malamu?—

Yosiya alandaki ndakisa malamu ya mosakoli Sefania. Sefania azalaki ndeko ya Yosiya, mpamba te emonani ete azalaki mokitani ya mokonzi malamu Hizikiya, tata ya Manase. Na ebandeli ya boyangeli ya Yosiya, Sefania akomaki mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye. Sefania akebisaki bato na makambo mabe oyo elingaki kokómela baoyo baponaki kosala mabe, mpe emonani ete Yosiya atyaki likebi na likambo yango.

Ezalaki mpe na Yilimia, na ntembe te osilá koyoka lisolo na ye. Yilimia ná Yosiya bazalaki bilenge mpe bakolaki elongo. Yehova atindaki Yilimia akoma mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye. Ntango Yosiya akufaki na etumba, Yilimia akomaki nzembo moko ya mawa mpo na ye. (2 Ntango 35:25) Tokanisi ete bango mibale bazalaki kolendisana mpo bátikala sembo epai ya Yehova!

Liteya nini okanisi ete okoki kozwa na lisolo ya Yosiya?— Soki tata na yo azali mosaleli ya Yehova te, ezali na moto mosusu oyo akoki kosalisa yo oyekola makambo ya Nzambe? Moto yango ekoki kozala mama na yo, nkɔkɔ to ndeko na yo mosusu. Ekoki mpe kozala moto mosusu oyo azali mosaleli ya Yehova, oyo mama na yo apesi yo nzela oyekolaka na ye Biblia.

Ezala bongo to te, yebá ete atako Yosiya azalaki kaka elenge mpenza, akolaki na makanisi mpe ayebaki ete asengeli kozala moninga ya bato oyo basalelaka Yehova. Tiká ete yo mpe osala bongo mpe opona kosala oyo ezali malamu!

^ par. 3 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.