Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Teyá bana na yo

Yoasa atikaki Yehova mpo na baninga mabe

Yoasa atikaki Yehova mpo na baninga mabe

EZALAKI ntango moko ya nsɔmɔ na Yelusaleme, esika oyo tempelo ya Nzambe ezalaki. Mokonzi Ahazia autaki kobomama. Na nsima, Atalia, mama ya Ahazia asalaki likambo moko ya nsɔmɔ. Abomisaki bankɔkɔ na ye moko​—bana ya Ahazia! Oyebi mpo na nini?​— * Mpo mwana moko te ya Ahazia ayangela, mpe ye moko akóma mokonzi.

Nzokande, Yoasa, nkɔkɔ moko ya Atalia, oyo azalaki naino bebe abikisamaki, mpe nkɔkɔ na ye ayebaki likambo yango te. Okolinga koyeba ndenge abikaki?​—Yoasa, azalaki na mama-leki moko nkombo na ye Yoseba, oyo abombaki Yoasa na tempelo ya Nzambe. Asalaki yango mpo mobali na ye Yoyada azalaki nganga-nzambe monene. Bango mibale basɛnzɛlaki ete Yoasa abatelama malamu.

Na boumeli ya mbula 6, Yoasa abatelamaki malamu na tempelo mpe moto moko te ayebaki likambo yango. Kuna, bateyaki ye makambo mpe mibeko ya Yehova Nzambe. Nsukansuka, ntango Yoasa akómaki na mbula nsambo, Yoyada asalaki ete Yoasa akóma mokonzi. Okolinga koyeba ndenge oyo Yoyada asalaki mpe likambo oyo ekómelaki mokonzi-mwasi Atalia, nkɔkɔ ya Yoasa?—

Yoyada ayanganisaki bato oyo bazalaki kobatela bakonzi na Yelusaleme na ntango wana. Ayebisaki bango ndenge ye ná mwasi na ye babikisaki bomoi ya mwana ya mokonzi Ahazia. Na nsima, Yoyada alakisaki bango Yoasa, mpe bamonaki ete abongi kozala mokonzi. Mpe babongisaki ndenge basengelaki kosala.

Yoyada amemaki Yoasa libándá mpe alatisaki ye motole ya bokonzi. Bato “babɛtaki mabɔkɔ na bango mpe balobaki ete, Mokonzi abika!” Bakɛngɛli ya mokonzi bazingaki Yoasa mpo na kobatela ye. Ntango Atalia ayokaki makɛlɛlɛ wana nyonso abimaki mpe agangaki. Kasi, Yoyada atindaki ete bakɛngɛli báboma Atalia.​—2 Mikonzi 11:1-16.

Okanisi ete Yoasa akobaki kolanda toli ya Yoyada mpe kosala oyo ezali malamu?—Akobaki kosala yango ntango Yoyada azalaki na bomoi. Kutu, Yoasa asɛnzɛlaki ete bato bápesa mbongo mpo na kobongisa tempelo ya Nzambe, likambo oyo tata na ye Ahazia, mpe nkɔkɔ na ye Yolama basalaki te. Kasi, tótala likambo oyo esalemaki ntango nganga-nzambe monene Yoyada akufaki.​—2 Mikonzi 12:1-16.

Na ntango yango, Yoasa azalaki na mbula soki 40. Na esika akoba kozala elongo na bato oyo bazalaki kosalela Yehova, Yoasa akómaki moninga ya bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Zekalia, mwana ya Yoyada, akómaki nganga-nzambe na ntango wana. Okanisi ete Zekalia asalaki nini ntango ayokaki makambo mabe oyo Yoasa akómaki kosala?—

Zekalia ayebisaki Yoasa boye: “Lokola botiki Yehova, ye mpe, akotika bino.” Maloba yango esilikisaki Yoasa, yango wana atindaki bato bábamba Zekalia mabanga mpe báboma ye. Kanisá naino​—Yoasa abikisamaki na liwa, kasi sikoyo ye moko atindaki bato báboma Zekalia!​—2 Ntango 24:1-3, 15-22.

Omoni liteya oyo tokoki kozwa na lisolo yango?—Tólinga te kokokana na Atalia, oyo azalaki makambo mabe mpe koyina bato. Tosengeli kolinga baninga na biso basaleli ya Yehova ata mpe banguna na biso, ndenge Yesu ateyaki biso. (Matai 5:44; Yoane 13:34, 35) Lisusu, kobosana te, soki tobandi kosala oyo ezali malamu ndenge Yoasa asalaki yango, tosengeli kokoba kozala baninga ya bato oyo balingaka Yehova mpe balendisaka biso tósalela ye.

^ par. 3 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.