Sɛkɛlɛ mpo na libota ya esengo
Ndenge ya kosalisa bilenge bákóma mikóló ya malamu
“Nazalaki kosolola malamu na bana na ngai. Bazalaki koyoka na likebi mpenza makambo oyo nazalaki koloba, mpe bazalaki kotosa mbala moko. Kasi, sikoyo lokola bakómi bilenge, tokómá kobendana na makambo nyonso. Bakómá koboya ata makambo ya losambo, oyo tosalaka banda kala. Batunaka ete: ‘Tosengeli mpenza kolobela Biblia?’ Liboso bana na ngai bákóma bilenge, nakokaki kokanisa ata moke te ete makambo ya boye ekokómela ngai, ata ntango nazalaki komona yango na mabota mosusu.”—Reggie. *
OZALI kobɔkɔla mwana oyo akómi elenge? Boye, ozali komona moko ya bileko ya ntina mingi na bokoli ya mwana na yo. Eleko yango ekoki mpe kozala ya mpasi mingi koleka. Makambo oyo elandi esalemaka mpe na libota na yo?
-
Ntango mwana na yo ya mobali azalaki naino moke, azalaki kolinga kozala ntango nyonso penepene na yo. Sikoyo lokola akómi elenge, akómi koluka kozwa bonsomi mingi.
-
Ntango mwana na yo ya mwasi azalaki moke, azalaki koyebisa yo makambo nyonso. Sikoyo lokola akómi elenge, akómá kosolola kaka na baninga na ye.
Soki likambo ya ndenge wana ezali kosalema na libota na yo, koloba mbala moko te ete mwana na yo akómi motomboki mpe akobonga lisusu te. Nini ezali kosalema? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tótalela makambo oyo bolenge ezali kosala epai ya mwana na yo.
Bolenge—likambo monene na bomoi
Nsima ya kobotama, mwana akómaka kosala makambo mingi mpo na mbala ya liboso: kotambola, koloba, kokende kelasi mpe bongo na bongo. Baboti basepelaka ntango mwana na bango asali likambo moko mpo na mbala ya liboso. Yango emonisaka baboti ete mwana na bango azali kokola malamu.
Bolenge mpe ezali likambo monene na bomoi, atako baboti mosusu bakoki komona ete ezali eleko ya mpasi. Komitungisa na bango ezali mabe te. Mama to tata nini asepelaka komona mwana na ye oyo azalaki kotosa ye na makambo nyonso akóma motó likolólikoló? Atako bongo, bolenge ezali eleko moko ya ntina mingi ntango mwana azali kokola. Na ndenge nini?
Biblia elobi ete na eleko moko, “moto akotika tata na ye mpe mama na ye.” (Genese 2:24) Makambo mingi oyo esalemaka na bolenge ebongisaka mwana mpo na ntango wana ya esengo mpe ya mpasi. Na ntango yango, mwana na yo asengeli koloba lokola ntoma Paulo ete: “Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, kokanisa lokola mwana moke, kotalela makambo lokola mwana moke; kasi sikoyo lokola nakómi mobali, nalongoli bizaleli ya mwana moke.”—1 Bakolinti 13:11.
Ndenge moko mpe, ezali yango nde mwana na yo azali kosala na eleko ya bolenge na ye—azali kotika bizaleli ya bomwana mpe azali koyekola kokóma mokóló ya malamu oyo azwaka
bikateli ye moko mpe oyo akoki mpo na kolongwa na ndako ya baboti. Buku moko elobaki ete bolenge ezali “eleko oyo bilenge bamibongisaka mpo na kolongwa na ndako ya baboti na bango.”Ya solo, ekoki kozala mpasi ondima ete mwana na yo “ya moke” akokóma kotambwisa bomoi na ye, ye moko. Okoki komituna boye:
-
“Soki mwana na ngai ya mobali ayebaka kobongisa shambre na ye te, akolonga kobongisaka ndako mobimba?”
-
“Soki mwana na ngai ya mwasi akokaka te kozonga ndako na ngonga oyo toyokanaki, akobanda kokoka kokóma na mosala na ngonga oyo esengeli?”
Soki ozali komitungisa bongo, kobosana likambo oyo te: Bonsomi ezali porte te oyo mwana na yo azali kokɔta to kobima; ezali nde balabala molai epai azali kosala mobembo, mpe ekosɛnga bambula mingi mpo asilisa mobembo yango. Sikoyo ozali komona bosolo ya maloba oyo: “Ebebe ezwami na motema ya mwana” ya mobali to ya mwasi.—Masese 22:15.
Kasi, soki osalisi malamu mwana na yo oyo azali elenge, akoki kokóma mokóló ya malamu, oyo azali na ‘makoki ya kososola oyo eteyami mpo na kokesenisa mabe ná malamu.’—Baebele 5:14.
Sɛkɛlɛ mpo na kolonga
Mpo na kosalisa mwana na yo oyo azali elenge akóma mokóló ya malamu, osengeli kokolisa ‘likoki na ye ya kokanisa’ mpo azwaka bikateli ya malamu ye moko. * (Baloma 12:1, 2) Mitinda ya Biblia oyo elandi ekoki kosalisa yo na likambo yango.
Bafilipi 4:5: “Tiká ete ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso.” Mwana na yo oyo akómi elenge asɛngi yo likambo moko, mbala mosusu alobi ete akozonga ndako na retare. Na mbala moko, oboyi. Mwana na yo alobi na mongongo makasi ete, “Omonaka ngai lokola mwana moke!” Liboso oyanola ye ete, “Ezali bongo, osalaka makambo lokola mwana moke,” kanisá na likambo oyo: Bilenge balukaka kozwa bonsomi mingi koleka oyo basengeli kozwa, kasi baboti mpe bapesaka te bilenge bonsomi oyo esengeli. Ezali nde kosɛnga ete otikelaka mwana na yo bonsomi na makambo mosusu? Mpo na nini te kotalela likanisi ya mwana na yo?
MEKÁ KOSALA BOYE: Komá likambo moko to makambo mibale oyo omoni ete okoki kotikela mwana na yo bonsomi mwa mingi. Monisá ye ete otikeli ye bonsomi yango mpo na komeka ye. Soki asaleli bonsomi yango malamu, okoki kobakisela ye bonsomi ya kosala makambo mosusu. Soki asaleli bonsomi yango malamu te, okopekisa ye kosala makambo mosusu oyo opesaki ye nzela.—Matai 25:21.
Bakolose 3:21: “Bino batata, bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.” Baboti mosusu balukaka kolandelalandela makambo nyonso oyo bana na bango oyo bakómi bilenge basalaka. Mpo na koyeba soki mwana azali na nani mpe azali kosala nini, bapekisaka ye abima. Baponelaka ye baninga mpe balukaka koyoka na mayele makambo oyo azali kosolola na telefone. Kosala bongo epɛlisaka mɔtɔ. Kokanga ye na ndako ekoki kotinda ye aluka kokima; koloba ntango nyonso mabe ya baninga na ye ekoki kosala ete alinga bango lisusu mingi; koluka koyoka na mayele makambo oyo azali kosolola na telefone ekoki kotinda ye alukaka kosolola na baninga soki bozali te. Soki bozali kolandela ye ndenge wana, bokolonga te. Soki elenge ayekoli te kozwa bikateli ye moko ntango azali naino na ndako, ndenge nini akoyeba kozwa bikateli ya malamu ntango akokóma epai na ye moko?
MEKÁ KOSALA BOYE: Mbala ya nsima oyo okosolola na mwana na yo na likambo moko, salisá ye akanisa ndenge nini makambo oyo azali kopona ekotinda bato bámona ye. Na ndakisa, na esika olobaka mabe ya baninga na ye, lobá boye: “Soki bakangi [songolo] mpo abuki mibeko ya Leta, nini ekosalema? Bato bakomona yo ndenge nini?” Salisá mwana na yo amona ete baninga oyo aponaka bakoki kobongisa to kobebisa lokumu na ye.—Masese 11:17, 22; 20:11.
Baefese 6:4: “Bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” Maloba “makebisi” esuki kaka te na koyebisa moto makambo. Elimboli kosalisa mwana azala na makanisi ya malamu oyo ekotinda ye akóma na etamboli oyo ebongi. Makebisi yango ezalaka na ntina mingimingi ntango mwana akómi elenge. Tata moko na nkombo Andre alobi boye: “Ntango bana bazali kokola, esengeli kobongolaka ndenge ya kosolola na bango mpe esɛngaka kokanisa na bango.”—2 Timote 3:14.
MEKÁ KOSALA BOYE: Soki likambo moko ebimi, sɛngá mwana asala lokola tata mpe yo ozala lokola mwana. Sɛngá ye apesa yo toli oyo akokaki kopesa yo soki ozalaki mwana na ye. Sɛngá ye aluka makanisi oyo akoki kosalela mpo na kolongisa to kokweisa likanisi na ye. Bólobela lisusu likambo yango nsima ya pɔsɔ moko.
Bagalatia 6:7: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” Mwana moke akoki koteyama na nzela ya etumbu, na ndakisa kotinda ye akende kolala to kopekisa ye asala likambo moko oyo alingaka mingi. Mpo na koteya mwana oyo akómi elenge, esengeli nde kokanisa na ye na makama oyo ekoki kokómela ye.—Masese 6:27.
MEKÁ KOSALA BOYE: Kofutelaka ye banyongo na ye te, mpe kokɔtelaka ye te epai ya molakisi soki alongi te na kelasi. Tiká ye amona mbuma mabe ya misala na ye, mpe akozwa liteya oyo ekosalisa ye bomoi na ye mobimba.
Lokola ozali moboti, na ntembe te olingi ete mwana na yo alekisa bolenge na ye kozanga mokakatano mpe akóma mokóló ya malamu. Nzokande, bilenge mingi te nde balekisaka eleko yango kozanga mokakatano. Atako bongo, mwana na yo oyo akómi elenge apesi yo libaku malamu ya ‘kobɔkɔla mwana na nzela ekoki na ye kotambola.’ (Masese 22:6) Mitinda ya Biblia ekoki mpenza kosalisa yo mpo otonga libota ya esengo.
^ par. 3 Oyo ezali nkombo topesi ye kopesa.
^ par. 19 Ata soki tokolobela bana mibali na lisolo oyo, mitinda yango etaleli mpe bana basi.
OMITUNA BOYE . . .
Ntango mwana na ngai ya mobali to ya mwasi akolongwa na ndako, akokoka kosala makambo oyo elandi?
-
kokoba na makambo ya elimo ye moko
-
kopona baninga mpe kozwa bikateli ya malamu
-
kosolola malamu na basusu
-
komibatela na bamaladi
-
kosalela mbongo na ye malamu
-
kobongisa ndako mpo ezala pɛto
-
kosala makambo kozanga ete bápusa ye