Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Atikalaki sembo na kati ya komekama

Atikalaki sembo na kati ya komekama

Mekolá kondima na bango

Atikalaki sembo na kati ya komekama

PETRO azalaki kotalatala na motema likoló bilongi ya bato oyo bazalaki koyoka Yesu. Bazalaki na sinagoga ya Kapernaume. Ndako ya Petro ezalaki na engumba yango; esika oyo azalaki kosala mosala na ye ya koboma mbisi ezalaki mpe wana, na bokula ya Mbu ya Galile; baninga na ye mingi, bandeko na ye mpe baninga na ye ya mosala bazalaki kofanda na engumba yango. Na ntembe te, Petro azalaki na mposa makasi ete bato ya engumba na ye bámona Yesu ndenge ye amonaki ye, bázwa mpe esengo ya koyoka makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe na monɔkɔ ya moteyi oyo aleki bateyi nyonso. Kasi, esalemaki bongo te.

Bato mingi batikaki koyoka. Bamosusu bazalaki koimaima polele, bazalaki koboya makambo oyo Yesu azalaki koloba. Kasi, likambo oyo etungisaki Petro mingi koleka, ezali nde ndenge oyo ata bayekoli mosusu ya Yesu basalaki. Bilongi na bango ezalaki lisusu te komonisa ete bazali na esengo ya koyoka likambo moko ya ntina, likambo moko ya sika, esengo ya koyeba solo. Sikoyo, emonanaki ete balɛmbi nzoto, kutu basiliki. Bato mosusu bakómaki koloba polele ete maloba ya Yesu ezali makasi. Lokola balingaki koyoka lisusu te, balongwaki na sinagoga​—batikaki mpe kolanda Yesu.

Ezalaki ntango moko ya mpasi mpo na Petro mpe mpo na bantoma mosusu. Petro akangaki ntina mpenza te ya makambo oyo Yesu alobaki mokolo yango. Na ntembe te, akokaki komona ntina oyo maloba ya Yesu, soki balimboli yango te, ekokaki kobɛtisa libaku. Kasi, Petro alingaki kosala nini? Ezalaki mbala ya liboso te bosembo na ye epai ya Nkolo na ye emekama; ezalaki mpe mbala ya nsuka te. Tótala ndenge kondima ya Petro esalisaki ye alonga mikakatano yango mpe atikala sembo.

Atikalaki sembo ntango basusu batikaki kozala sembo

Mbala mingi, Petro azalaki kokamwa makambo ya Yesu. Mbala na mbala, Nkolo na ye azalaki kosala mpe koloba makambo oyo bato bazalaki kozela te. Mokolo moko liboso, Yesu aleisaki bankóto ya bato na ndenge ya likamwisi. Mpo na yango, balingaki kokómisa ye mokonzi. Kasi, akamwisaki bato mingi na ndenge abendaki nzoto mpe asɛngaki bayekoli na ye bámata na masuwa mpe bákende na Kapernaume. Wana bayekoli bazalaki na kati ya mai na butu, Yesu akamwisaki bango lisusu na ndenge atambolaki likoló ya mbonge ya Mbu ya Galile, mpe apesaki Petro liteya ya ntina mingi na oyo etali kondima. *

Na ntɔngɔ, bamonaki ete ebele wana ya bato balandaki bango pembenipembeni ya laki. Kasi, emonanaki ete eloko oyo etindaki bato yango ezalaki nde mposa ya komona Yesu abimisa lisusu bilei na ndenge ya likamwisi, kasi ezalaki te mposa ya koyeba makambo ya elimo. Yesu apamelaki bango mpo na elimo na bango ya koluka biloko ya mosuni. Lisolo yango ekobaki na sinagoga ya Kapernaume, epai Yesu alɛmbisaki lisusu bato, ntango azalaki koluka koteya likambo moko ya ntina mingi, kasi oyo ezalaki mpasi mpo na kondima.

Yesu alingaki ete bato yango bámona ye lokola moto oyo apesaka bilei kaka ya mosuni te, kasi ete azali nde bilei ya elimo oyo euti na Nzambe, lokola moto oyo bomoi mpe liwa na ye ekofungwela basusu nzela ya kozwa bomoi ya seko. Na yango, apesaki ndakisa moko, amikokanisaki na mana, limpa oyo eutaki na likoló na mikolo ya Moize. Ntango bato mosusu baboyaki kondima yango, asalelaki ndakisa ya makasi, alobaki ete esengelaki kolya mosuni na ye mpe komɛla makila na ye mpo na kozwa bomoi. Ezalaki na esika yango nde bato bakómaki koimaima polele. Bamosusu balobaki ete: “Liloba oyo ezali makasi; nani akoki koyoka yango?” Bayekoli mingi ya Yesu bazwaki ekateli ya kotika kolanda ye. *​—Yoane 6:48-60, 66.

Petro akosala nini? Na ntembe te, ye mpe atungisamaki mpo na maloba ya Yesu. Akangaki naino ntina te ete Yesu asengelaki kokufa mpo akokisa mokano ya Nzambe. Atako bongo, Petro alukaki nde kosala lokola bayekoli wana ya bongolabongola oyo batikaki kolanda Yesu mokolo wana? Te; likambo moko ya ntina ekesenisaki Petro na bato wana. Ezalaki nini?

Yesu abalukaki epai ya bantoma na ye mpe alobaki na bango ete: “Bino mpe bolingi kokende te, boye te?” (Yoane 6:67) Alobaki na bango nyonso 12, kasi Petro nde ayanolaki. Ezalaki kosalema bongo mbala mingi. Mbala mosusu Petro azalaki mokóló na bango. Ezala bongo to te, ye nde azalaki koloba mingi kati na bango; mbala mingi Petro azalaki kokakatana te koloba makambo oyo azalaki kokanisa. Na mbala oyo, likambo oyo azalaki kokanisa ezalaki maloba kitoko mpe oyo etiká nsango ete: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.”​—Yoane 6:68.

Maloba yango esimbi motema na yo te? Kondima oyo Petro azalaki na yango epai ya Yesu esalisaki ye akolisa ezaleli moko ya ntina mingi: bosembo. Petro amonaki polele ete longola Yesu, Mobikisi mosusu azalaki te mpe ete Yesu abikisaki na nzela ya maloba na ye​—mateya na ye na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Petro ayebaki ete atako ezalaki na makambo oyo azalaki kokanga ntina na yango te, ezalaki na esika mosusu te oyo akokaki kokende mpo Nzambe andima ye mpe azwa bomoi ya seko.

Yo mpe omonaka bongo? Likambo ya mawa, bato mingi na mokili balobaka ete balingaka Yesu kasi bakokaka kotikala sembo te. Mpo na kotikala mpenza sembo epai ya Kristo, tosengeli kotalela mateya ya Yesu ndenge Petro atalelaki yango. Tosengeli koyekola yango, kokanga ntina na yango, mpe kosalela yango na bomoi na biso​—ata soki eyokani te na makambo oyo tozalaki kolikya to oyo tolingaka. Tokoki kolikya kozwa bomoi ya seko oyo Yesu alingi ete tózwa kaka soki tomonisi bosembo.

Atikalaki sembo ntango basembolaki ye

Mwa moke nsima ya ntango wana oyo makambo mingi esalemaki, Yesu amemaki bantoma na ye mpe bayekoli mosusu na mobembo na ngámbo ya nɔrdi. Nsɔngɛ ya Ngomba Heremone, oyo etondi na nɛjɛ, mosika na ndelo ya nɔrdi ya Mokili ya Ndaka, ezalaki na bantango mosusu komonana ata banda na Mbu ya Galile. Mokemoke, ngomba yango ezalaki komonana likoló koleka, wana bato bazali kopusana mpe komata na nzela oyo ememi na bamboka oyo ezali pembeni ya Kaisaria ya Filipe. * Na esika wana ya kitoko, esika bazalaki komona eteni monene ya Mokili ya Ndaka na ngámbo ya sudi, Yesu atunaki bayekoli na ye motuna moko ya ntina.

Atunaki bango boye: “Ebele ya bato bazali koloba ete ngai nazali nani?” Tokoki komona na makanisi ndenge Petro azalaki kotala miso ya Yesu, ndenge azalaki koyoka lisusu boboto ya Nkolo na ye mpe mayele mingi oyo azalaki na yango. Yesu alingaki koyeba makambo oyo bayoki na ye bazalaki koloba mpo na ye nsima ya makambo oyo bamonaki mpe bayokaki. Bayekoli ya Yesu bayanolaki na motuna yango, bazongelaki mwa makanisi ya libunga oyo bato mingi bazalaki na yango mpo na Yesu. Kasi, Yesu alingaki koyeba makambo mosusu. Baninga na ye ya motema bazalaki mpe na mabunga yango? Atunaki bango boye: “Bongo bino bolobi ete ngai nazali nani?”​—Luka 9:18-22.

Na mbala oyo mpe, Petro aumelaki te koloba. Alobaki polele, na maloba ya mpiko, likambo oyo ezalaki na mitema ya bato mingi oyo bazalaki wana. Alobaki ete: “Ozali Kristo, Mwana ya Nzambe ya bomoi.” Tokoki komona ndenge Yesu amungamungaki mpo na komonisa ete asepeli na Petro wana azalaki kopesa ye longonya oyo euti na motema. Yesu ayebisaki Petro ete ezali Yehova Nzambe, kasi moto te, nde amonisaki polele solo wana ya ntina mingi epai ya bato oyo bazalaki na kondima ya solosolo. Petro alongaki kososola moko na makambo minene oyo Yehova amonisaki naino te tii wana: Masiya, to Kristo oyo alakamaki banda kala!​—Matai 16:16, 17.

Kristo yango azalaki moto oyo esakweli moko ya kala ebengaki libanga oyo batongi-ndako bakobwaka. (Nzembo 118:22; Luka 20:17) Lokola azalaki kokanisa bisakweli ya ndenge wana, Yesu amonisaki ete Yehova akotya lisangá moko likoló ya libanga wana oyo Petro autaki komonisa soki ezali nani. * Na nsima, apesaki Petro mwa mikumba ya ntina mingi na kati ya lisangá yango. Atyaki Petro likoló ya bantoma mosusu te, ndenge bato mosusu bakanisaka, kasi, apesaki ye nde mikumba. Apesaki Petro “bafungola ya bokonzi.” (Matai 16:19) Petro akozala na mosala ya kofungwela bituluku misato ekeseni nzela ya kokɔta na Bokonzi ya Nzambe​—ya liboso, Bayuda, na nsima Basamaria, mpe nsukansuka, bato ya bikólo, elingi koloba bato oyo bazalaki Bayuda te.

Kasi na nsima, Yesu alobaki ete bato oyo bapesi bango mingi, bakosɛnga bango mpe mingi, mpe likambo yango emonanaki solo na ndakisa ya Petro. (Luka 12:48) Yesu akobaki komonisa makambo mosusu minene oyo etali Masiya, na ndakisa ete mosika te bakonyokola ye mpe bakoboma ye na Yerusaleme. Petro atungisamaki mingi ntango ayokaki makambo yango. Abendaki Yesu pembeni mpe abandaki kopamela ye, alobi ete: “Komitungisa te, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.”​—Matai 16:21, 22.

Na ntembe te Petro azalaki na makanisi ya malamu, yango wana eyano ya Yesu ezalaki likambo moko ya kokamwisa. Apesaki Petro mokɔngɔ, atalaki bayekoli mosusu, oyo na ntembe te bazalaki na makanisi ya ndenge wana, mpe alobaki ete: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali eloko oyo ezali kobɛtisa ngai libaku, mpo ozali kokanisa makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.” (Matai 16:23; Marko 8:32, 33) Maloba ya Yesu ezali na liteya ya ntina mingi mpo na biso nyonso. Ezalaka mpasi te tókóma libosoliboso na makanisi ya bato na esika ya kozala na makanisi ya Nzambe. Soki tozali kosala bongo, ata ntango tolingi kosalisa moto, tokoki kokóma na ngámbo ya Satana, kasi ya Nzambe te, kozanga tóyeba yango. Kasi, Petro asalaki nini?

Na ntembe te, ayebaki ete Yesu abengaki ye Satana Zabolo na ndenge ya solo te. Kutu, Yesu alobaki na Petro te ndenge alobaki liboso na Satana. Epai ya Satana, Yesu alobaki ete: “Longwá”; epai Petro alobaki: “Leká na nsima na ngai.” (Matai 4:10) Yesu abwakaki te ntoma wana oyo amonaki ete azali na makambo mingi ya malamu, kasi alingaki kaka kosembola makanisi oyo azalaki na yango na likambo wana. Ezali mpasi te komona ete Petro asengelaki kotika kozala eloko oyo ezali kobɛtisa libaku liboso ya Nkolo na ye mpe koleka na nsima na ye lokola moyekoli oyo azali kolendisa ye.

Petro azongisaki liloba, asilikaki, to atikaki koloba mpo na nkanda? Te; andimaki kosembolama na komikitisa nyonso. Na ndenge yango, amonisaki lisusu bosembo. Bato nyonso oyo balandaka Kristo basengeli kosembolama na bantango mosusu. Tokokoba kozala penepene na Yesu Kristo mpe Tata na ye, Yehova Nzambe, kaka soki tozali kondima disiplini na komikitisa nyonso mpe tozali kozwa liteya na disiplini yango.​—Masese 4:13.

Bosembo na ye ezwi mbano

Mwa moke na nsima, Yesu alobaki likambo mosusu ya kokamwisa: “Ya solo mpenza nalobi na bino ete bato mosusu na kati ya baoyo batɛlɛmi awa bakoyoka ata nsolo ya liwa te liboso bámona Mwana ya moto ayei na bokonzi na ye.” (Matai 16:28) Na ntembe te, maloba wana etindaki Petro amituna mituna. Yesu alingaki mpenza koloba nini? Lokola autaki kozwa mpamela makasi, mbala mosusu Petro azalaki komituna soki akoki mpenza kozwa libaku monene ya ndenge wana.

Nzokande, pɔsɔ soki moko na nsima, Yesu amemaki Yakobo, Yoane, ná Petro “na ngomba moko molai”​—mbala mosusu na Ngomba Heremone, oyo ezalaki kaka na mwa bakilomɛtrɛ na esika bazalaki. Na ntembe te ezalaki na butu, mpo mibali wana misato bazalaki kobunda na mpɔngi. Kasi, ntango Yesu azalaki kobondela, likambo moko esalemaki oyo esilisaki bango mpɔngi.​—Matai 17:1; Luka 9:28, 29, 32.

Yesu abandaki kobongwana liboso na bango. Elongi na ye ebandaki kongɛnga, tii ekómaki kongala lokola moi. Bilamba na ye mpe ekómaki mpɛmbɛ makasi. Na nsima, bato mibale babimaki pembeni ya Yesu, moko azalaki komonisa Moize mpe mosusu Eliya. Bazalaki kolobela “kokende na ye oyo esengelaki mpenza kosalema na Yerusaleme”​—mbala mosusu kaka liwa mpe lisekwa na ye. Emonanaki polele ete Petro asalaki libunga ndenge aboyaki kondima ete Yesu akokutana na mpasi ya ndenge wana!​—Luka 9:30, 31.

Petro amonaki ete asengeli kosala mwa likambo na emonaneli wana ya kokamwa. Emonanaki lokola nde Moize ná Eliya balingi kokabwana na Yesu. Na yango, Petro alobaki boye: “Molakisi, ezali malamu tózala awa, boye tótɛlɛmisa bahema misato, moko ya yo mpe moko ya Moize mpe moko ya Eliya.” Ya solo, basaleli wana ya Yehova oyo bakufá banda kala mpe bamonanaki na emonaneli wana bazalaki na mposa ya bahema te. Ya solo, Petro ayebaki te makambo oyo azalaki koloba. Atako bongo, Petro asepelisi yo te mpo na esengo na ye mpe elimo na ye ya mɔtɔmɔtɔ?​—Luka 9:33.

Ye, Yakobo ná Yoane bazwaki mbano mosusu kaka na butu yango. Lipata moko esalemaki mpe ezingaki bango na ngomba. Mongongo moko ebimaki kuna: ezalaki mongongo ya Yehova Nzambe! Alobaki boye: “Oyo azali Mwana na ngai, oyo aponami. Bóyoka ye.” Na nsima, emonaneli yango esilaki, mpe batikalaki kaka bango moko ná Yesu na ngomba.​—Luka 9:34-36.

Emonaneli yango ezalaki mpenza likabo kitoko mpo na Petro, mpe mpo na biso! Bambula mingi na nsima, akomaki na ntina na libaku oyo azwaki na butu wana, ya kozala moko na bato oyo ‘bamonaki bonene na ye na miso,’ bamonaki liboso nkembo oyo Yesu akozala na yango ntango akokóma Mokonzi na likoló. Emonaneli wana ekokisaki bisakweli mingi ya Liloba ya Nzambe mpe elendisaki kondima ya Petro mpo na mikakatano oyo asengelaki kokutana na yango. (2 Petro 1:16-19) Ekoki kosalema mpe bongo mpo na biso soki, lokola Petro, totikali sembo epai ya Nkolo oyo Yehova atye likoló na biso, toyekoli makambo epai na ye, tozali kondima disiplini mpe kosembolama na ye, mpe tozali kolanda ye na komikitisa mokolo na mokolo.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Talá lisolo “Mekolá kondima na bango​—Alongaki kobanga mpe ntembe,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 2009.

^ par. 9 Bongolabongola ya bato oyo bazalaki na sinagoga emonani polele soki tokokanisi makambo oyo basalaki mokolo wana ná oyo basalaki mokolo eleki ntango bayokaki maloba ya Yesu mpe balobaki na esengo nyonso ete azali mosakoli ya Nzambe.​—Yoane 6:14.

^ par. 15 Longwa na ndelo ya Mbu ya Galile, basalaki mobembo yango ya kilomɛtrɛ 50 banda na mɛtrɛ 210 na nse ya nivo ya mbu tii na mɛtrɛ soki 350 na likoló, na kati ya bisika ya kitoko mingi.

^ par. 18 Talá etanda  “Nani azali libanga?” na lokasa 28.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 28]

 Nani azali libanga?

“Nalobi na yo ete: Yo ozali Petro, mpe na libanga oyo nakotonga lisangá na ngai.” (Matai 16:18) Mbala mingi, bato bakanisaka ete maloba wana oyo Yesu alobaki na ntoma na ye Petro, elimboli ete Petro asengelaki kozala moboko ya lisangá ya bokristo. Lingomba ya Katolike eteyaka ete Yesu apesaki Petro bokonzi likoló ya bantoma mosusu, na ndenge yango, atyaki ye pápa ya liboso. Yango wana, maloba wana ya Yesu ekomamá malamu na Latin na kati ya Bazilike Saint-Pierre na Rome, na nsamba oyo egumbamá, na makomi ya milai koleka moto.

Yesu alingaki koloba ete Petro nde libanga oyo Yesu alingaki kotonga lisangá na ye likoló na yango? Te. Tótala bantina misato oyo ekoki kotinda biso tóloba bongo. Ya liboso, bantoma mosusu bazalaki wana, mpe bamonaki te ete maloba ya Yesu emonisi ete Petro nde libanga. Soki Yesu apesaki Petro bokonzi nyonso na miso na bango, bongo mpo na nini na nsima bazalaki mbala na mbala kowelana mpo na koyeba soki nani aleki na kati na bango? (Marko 9:33-35; Luka 22:24-26) Ya mibale, na nsima ntoma Paulo amonisaki ete libanga ezali Petro te, kasi Yesu Kristo. (1 Bakorinti 3:11; 10:4) Ya misato, bambula mingi na nsima, Petro ye moko amonisaki ete azalaki kokanisa te ete ye nde libanga. Kasi, akomaki ete esakolamá banda kala ete Yesu nde “libanga ya litumu ya moboko ya ndako” oyo Nzambe ye moko aponaki.​—1 Petro 2:4-8.

Atako bongo, bato mosusu batingamaka kaka ete lokola nkombo ya Petro elimboli “Libanga,” Yesu alingaki koloba ete ye nde libanga wana. Nzokande, nkombo ya Petro ezali na ndimbola moko te na liloba “libanga” oyo esalelami na vɛrsɛ yango. Nkombo ya Petro elimboli “Eteni ya libanga,” mpe ezali na masculin; liloba oyo ebongolami “libanga” ezali na féminin. Na yango, maloba ya Yesu elimbolaki nini? Alingaki nde koloba na Petro ete: “Yo, oyo nkombo na yo ezali Petro, to Libanga, ososoli nani mpenza azali ‘libanga,’ Kristo, oyo akozala moboko ya lisangá ya bokristo.” Oyo nde libaku monene Petro azwaki ya kobimisa solo wana ya ntina mingi!

[Elilingi na nkasa 24, 25]

Petro atikalaki sembo ata ntango basembolaki ye

[Elilingi na lokasa 26]

Bosembo ya Petro ezwaki mbano: azwaki emonaneli moko kitoko