Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Kaka mwa moko lisusu”

“Kaka mwa moko lisusu”

“Kaka mwa moko lisusu”

ALLEN akómaki komɛla masanga mingi ntango azalaki na mbula 11. * Ye ná baninga na ye bazalaki kosakana na mwa zamba moko, bazalaki komekola bato oyo bango bazalaki komona na bafilme. Bato yango ya filme bazalaki bato ya solo te, kasi masanga makasi oyo Allen ná baninga na ye bazalaki komɛla ezalaki ya solo.

Tony azalaki na mbula 40 ntango akómaki mokemoke komɛla masanga mingi; liboso azalaki komɛla mwa moko to mibale mpokwa nyonso tii akómaki komɛla 5 to 6. Nsukansuka, azalaki lisusu koyeba te masanga boni azalaki komɛla na mokolo.

Allen alukaki lisalisi mpo na mokakatano na ye ya masanga. Tony aboyaki lisalisi ya libota mpe ya baninga na ye oyo bazalaki koluka bolamu na ye. Allen azali na bomoi tii lelo mpe abɛti lisolo na ye; Tony akufá eleki mwa bambula na aksida ya motuka nsima ya komɛla masanga mingi ya makasi.

Ata soki moto azali komɛla mingi kaka ye moko, komɛla mingi ndenge wana ezangaka te kobimisela bato mosusu mikakatano, mpe mbala mingi ebimisaka makama minene. * Mbala mingi, komɛla masanga na kolekisa ndelo etindaka bato bákóma kobimisa maloba ya mabe mpe mobulu, kobimisa matata mpe koboma, makama ya mituka, makama na mosala, mpe bamaladi ndenge na ndenge. Mbula na mbula, komɛla masanga mingi ezali kobebisela bato mbongo ebele, bakisa mpe mitungisi oyo yango ezali kobimisa na makanisi ya bato, ya mabota mpe ya bana.

Atako bongo, ebongiseli moko ya États-Unis (National Institutes of Health) elobi boye: “Ezali te moto nyonso oyo amɛlaka masanga mbala na mbala nde azali na mokakatano na masanga. Mpe bato nyonso oyo bazali na mokakatano na masanga bamɛlaka mokolo nyonso te.” Bato mingi oyo bazali baombo ya masanga te bakómá na momesano ya komɛla kolekisa ndelo kozanga báyeba yango. Bato mosusu bamɛlaka mbala mingi te, kasi na mbala moko bamɛlaka kɔpɔ 5 to koleka.

Soki oponi komɛla masanga, kolekisa ndelo ebandi wapi? Ndenge nini okoki koyeba ntango oyo osengeli te kozwa “kaka mwa moko lisusu”? (Masese 23:29, 30, Contemporary English Version) Masolo oyo elandi ekolobela makambo oyo ekoki kosalisa yo na likambo yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 2 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 5 Lokola mibali nde bakómaka baombo ya masanga mbala minei koleka basi, tokolobela mibali na masolo oyo. Kasi, makanisi oyo ezali awa etali basi ná mibali.