Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokokisi ya bilaka

Mokokisi ya bilaka

Pusaná penepene na Nzambe

Mokokisi ya bilaka

YOSUA 23:14

EZALAKA mpasi mpo otyela basusu motema? Likambo ya mawa, tozali na mokili oyo bato mingi batyelaka basusu motema te. Soki moto moko oyo ozalaki kotyela motema azokisaki yo​—mbala mosusu mpo akosaki yo to akokisaki bilaka na ye te—​ekoki kozala mpasi otyela lisusu moto motema. Nzokande, ezali na moto moko oyo okoki kotyela ye motema kozanga ayokisa yo nsɔni. Masese 3:5 elendisi biso boye: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba.” Mpo na nini Yehova abongi tótyela ye motema ndenge wana? Mpo na kozwa eyano, tótala maloba ya Yosua, moto oyo atyelaki Yehova motema mobimba, maloba oyo ezali na Yosua 23:14.

Tótala ntango nini Yosua akomaki maloba yango. Yosua, oyo azwaki esika ya Moize mpo na kokamba Yisraele, akómaki na mbula pene na 110. Na bomoi na ye mobimba, amonaki na miso misala mingi ya nguya oyo Yehova asalaki mpo na Yisraele, na ndakisa ndenge abikisaki bango na ndenge ya likamwisi na Mbu Motane mbula soki 60 liboso. Sikoyo, Yosua akanisi makambo wana, mpe abengisi “mikóló [ya Yisraele] mpe bankumu na yango mpe basambisi na yango mpe bakapita na yango.” (Yosua 23:2) Maloba oyo alobi sikoyo emonisi kaka bwanya ya mokóló te, kasi emonisi mpe ete motema na ye oyo etondi na kondima ezalaki komanyola mingi.

Yosua alobi boye: “Nazali lelo kokende na nzela ya bato nyonso.” Maloba “nzela ya bato nyonso” elimboli liwa. Yosua azalaki nde koloba ete, “Nazali lisusu na mikolo mingi te na bomoi.” Lokola Yosua ayebaki ete etikali moke akufa, na ntembe te alekisaki bangonga mingi ye moko mpo na kokanisa makambo ya bomoi na ye. Azali na maloba nini ya nsuka ya koyebisa baninga na ye basambeli ya Yehova?

Yosua abakisi boye: “Na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te ezangaki kokokisama.” Wana ezali maloba ya moto oyo azali kotyela Nzambe motema mobimba. Mpo na nini? Ntango akanisaki makambo nyonso oyo amonaki na bomoi na ye, Yosua ayaki komona ete Yehova akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. * Ntina ya maloba ya Yosua ezali polele: Yosua alingi bandeko na ye Bayisraele bázala na kondima makasi ete bilaka nyonso ya Yehova mpo na mikolo ekoya mpe ekokokisama.

Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi na ntina na Yosua 23:14 boye: “Tángá bilaka nyonso ya Biblia; na nsima, salá bolukiluki na mikanda ya masolo ya mokili; mpe tuná ekelamu nyonso oyo ezali na kati na yango, mpo na komona soki Nzambe azangá kokokisa to abosaná ata elaka na ye.” Soki bolukiluki ya ndenge wana ekoki kosalema, tokoloba kaka ndenge Yosua alobaki​—bilaka nyonso ya Yehova ezangaka te kokokisama.​—1 Bakonzi 8:56; Yisaya 55:10, 11.

Biblia elobeli bilaka ya Nzambe oyo ekokisamá, ata mpe oyo ezali kokokisama na miso na biso. Ezali mpe na bilaka kitoko oyo Yehova apesi mpo na mikolo ezali koya. * Mpo na nini te kotala masolo wana yo moko? Boyekoli ya Biblia ekoki kondimisa yo ete Mokokisi ya bilaka abongi kotyelama motema.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Talá mwa ndambo ya bilaka oyo Yosua amonaki kokokisama na yango. Yehova alakaki ete akopesa Yisraele mokili na bango moko. (Kokanisá Ebandeli 12:7 ná Yosua 11:23.) Yehova alakaki kosikola Yisraele na Ezipito. (Kokanisá Kobima 3:8 ná Kobima 12:29-32.) Yehova alakaki koleisa libota na ye.​—Kokanisá Kobima 16:4, 13-15 ná Kolimbola Mibeko 8:3, 4.

^ par. 6 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya, talá mikapo 3, 7, mpe 8 na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.