Mpo na nini Nzambe abundisaki Bakanana?
Mpo na nini Nzambe abundisaki Bakanana?
“Osengeli mpenza koboma bango: Bahiti ná Baamore, Bakanana ná Baperizi, Bahivi ná Bayebusi, kaka ndenge Yehova Nzambe na yo apesi yo mitindo.”—KOLIMBOLA MIBEKO 20:17.
“Bózala na kimya na bato nyonso.”—BAROMA 12:18.
BAVƐRSƐ wana ya Biblia ezali bongolabongola? Bato mingi bazalaka na mokakatano ya koyokanisa mitindo oyo Nzambe apesaki ya koboma Bakanana ná toli ya Biblia ya kozala na kimya na bato nyonso. * (Yisaya 2:4; 2 Bakorinti 13:11) Mpo na bango, mitindo wana mibale eyokani te.
Soki ozwaka libaku ya kosolola na Nzambe mpo na likambo yango, olingaki kotuna ye nini? Talá mituna mitano oyo etunamaka mingi mpe biyano oyo Biblia epesi.
1. Mpo na nini babenganaki Bakanana? Tokoki koloba ete Bakanana bafandaki na mokili oyo ezalaki ya bango te. Na ndenge nini? Mbula soki 400 liboso, Nzambe alakaki Abrahama, moto ya sembo, ete bakitani na ye bakozwa mokili ya Kanana. (Ebandeli 15:18) Nzambe akokisaki elaka yango ntango asalaki ete ekólo Yisraele, oyo eutaki na Abrahama, ezwa mokili yango. Ya solo, bato mosusu bakoki koloba ete Bakanana bafandaki kuna banda kala mpe na bongo bazalaki na lotomo ya kofanda na mboka yango. Kasi, lokola Yehova azali Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba, ye nde azali na lotomo monene koleka ya kokata soki nani asengeli kofanda na esika boye to boye.—Misala 17:26; 1 Bakorinti 10:26.
2. Mpo na nini Nzambe atikaki te Bakanana báfanda elongo na Bayisraele? Nzambe akebisaki Bayisraele mpo na Bakanana ete: “Basengeli te kofanda na mokili na yo, noki bátinda yo osalela ngai lisumu. Soki osaleli banzambe na bango, yango ekokómela yo motambo.” (Kobima 23:33) Na nsima, mosakoli Moize ayebisaki Yisraele boye: “Ezali mpo na mabe ya bikólo yango nde Yehova Nzambe na yo azali kobengana yango.” (Kolimbola Mibeko 9:5) Mabe ya bikólo yango ezalaki mpenza ndenge nini?
Pite mpe ekobo, losambo ya bapakano, mpe kopesa bana mbeka epalanganaki mingi na Kanana. Henry Halley, moto ya mayele na istware ya makambo ya Biblia, alobaki ete bato ya arkeoloji oyo bazalaki kotimola na mokili yango “bamonaki bambɛki ebele oyo ezalaki na mikuwa ya bana oyo bapesamaki mbeka na Baala [nzambe monene ya Bakanana].” Abakisi boye: “Emonanaki ete mokili yango mobimba ezalaki mpenza simetiɛrɛ ya babebe oyo babotami sika. . . . Losambo ya Bakanana ezalaki na milulu ya kosangisa nzoto liboso ya banzambe na bango; na nsima bazalaki koboma bana na bango ya liboso mpe kopesa bango mbeka epai ya banzambe yango. Emonani ete, na makambo mingi, mokili ya Kanana ekómaki lokola
Sodoma mpe Gomora. . . . Bato ya arkeoloji oyo bazalaki kotimola na esika oyo bingumba ya Kanana ezalaki bamitunaka mpo na nini Nzambe alekisaki ntango molai liboso ya koboma bingumba yango.”3. Bikólo mosusu ya mabe ezalaki te na mabele na ntango wana? Mpo na nini kaka Bakanana? Nzambe abomaki bato mosusu ya masumu na mabaku mingi. Ntango “mabele etondaki na mobulu” na mikolo ya Noa, Nzambe atindaki mpela oyo ekɔmbɔlaki bato nyonso, longola kaka libota moko—libota ya Noa. (Ebandeli 6:11; 2 Petro 2:5) Nzambe abebisaki engumba ya Sodoma mpe Gomora ntango lisumu ya bafandi na yango ekómaki “kilo mingi.” (Ebandeli 18:20; 2 Petro 2:6) Lisusu, akatelaki Ninive mboka-mokonzi ya Asiri etumbu, ‘engumba oyo ezalaki kosopa makila,’ atako na nsima abebisaki engumba yango lisusu te ntango bafandi na yango babongolaki motema mpe batikaki mabe. (Nahumu 3:1; Yona 1:1, 2; 3:2, 5-10) Kasi, Nzambe abomaki Bakanana mpo na kobatela Yisraele, libota oyo nsukansuka esengelaki kobimisa Masiya.—Nzembo 132:11, 12.
4. Kobomama ya Bakanana eyokani mpenza na bolingo ya Nzambe? Soki totali likambo yango likolólikoló, ekoki komonana lokola ete koboma oyo Nzambe abomaki Bakanana eyokani te na bolingo na ye. (1 Yoane 4:8) Kasi, bolingo yango ekomonana polele soki totaleli likambo yango malamumalamu.
Nzambe ayebaki banda kala ete bafandi ya Kanana bazalaki kolanda nzela ya mabe. Atako bongo, na esika akɔmbɔla bango mbala moko, alekisaki naino mbula 400 tii ntango libunga na bango ‘ekómaki na nsuka na yango.’—Ebandeli 15:16.
Ntango lisumu ya Bakanana etondaki mpenza kotonda mpe emonanaki ete elikya ezalaki lisusu te ete bakobonga, Yehova asilisaki bango. Atako bongo, abomaki Bakanana nyonso ngulungulu te. Mpo na nini? Mpamba te bamosusu bakokaki kobongola motema. Baoyo bandimaki kobongola motema, na ndakisa Rahaba mpe bato ya Gibeone, Yehova amoniselaki bango motema mawa.—Yosua 9:3-11, 16-27; Baebre 11:31.
5. Ndenge nini Nzambe ya bolingo akoki koboma bato, ata soki bazali ndenge nini? Ezali mabe te komituna ndenge wana, mpo koboma moto ezali likambo ya esengo te. Kasi, ezali kutu bolingo ya Nzambe nde etindaki ye aboma bato mabe. Tópesa ndakisa: Soki maladi moko ya mabe ezali kopanzana na enama moko ya nzoto, mbala mingi minganga bazalaka
na eloko mosusu ya kosala te, kaka kokata enama yango. Bato mingi te bakosepela kosala likambo ya ndenge wana, kasi monganga ya malamu ayebi ete soki asali yango te, maladi ekopanzana na nzoto mobimba mpe ekozala mabe koleka. Lokola azali na susi ete moto abika, akosala yango mpo na bolamu ya moto ya maladi, ata soki azali kosepela na yango te.Ndenge moko mpe, Yehova asepelaki te koboma Bakanana. Ye moko alobi boye: “Nasepelaka na liwa ya moto mabe te.” (Ezekiele 33:11) Longola yango, mokano na ye ezalaki ete libota ya Yisraele ebimisa Masiya, oyo asengelaki kofungola nzela mpo na lobiko ya bato nyonso oyo bakondimela ye. (Yoane 3:16) Na yango, Nzambe aboyaki nde kotika misala ya bosɔtɔ ya Bakanana ebebisa Yisraele. Yango wana, apesaki mitindo ete bábengana Bakanana na mokili yango to báboma bango. Na ndenge yango, Nzambe amonisaki bolingo monene—bolingo oyo etindaki ye asala likambo oyo ezalaki kosepelisa ye te mpo na bolamu ya basambeli na ye ya sembo.
Liteya mpo na biso
Lisolo ya kobomama ya Bakanana ezali na liteya mpo na biso lelo? Ɛɛ, mpamba te Baroma 15:4 elobi ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.” Ndenge nini likambo oyo esalemaki na Kanana ezali koteya biso mpe kopesa biso elikya?
Masolo yango ezali koteya biso makambo mingi. Na ndakisa, na motema mawa na ye, Nzambe abatelaki Rahaba mpe Bagibeone ntango babongwanaki mpe bandimelaki ye. Yango esalisi biso tóyeba ete moto nyonso oyo alingi kosepelisa Nzambe akoki kosala yango, ata soki azalaki na bomoi ya ndenge nini to asalaki masumu ya ndenge nini kala.—Misala 17:30.
Masolo ya kobomama ya Kanana ezali mpe kopesa biso elikya na ndenge ezali komonisa biso mwa moke makambo oyo Nzambe akosala mosika te. Ezali kondimisa biso ete Nzambe akotika te ete mabe elonga malamu nyonso. Biblia elobi nde ete mosika te, akoboma bato nyonso ya mabe, kasi akobikisa baoyo balingaka ye mpe akokɔtisa bango na mokili ya sika ya boyengebene. (2 Petro 2:9; Emoniseli 21:3, 4) Na ntango yango, maloba oyo ya kobɔndisa ekokokisama: “Tyelá Yehova elikya mpe batelá nzela na ye, mpe ye akotombola yo mpo na kozwa mabele. Ntango bato mabe bakobomama, yo okomona yango.”—Nzembo 37:34.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 4 Na lisolo oyo, liloba “Bakanana” esalelami mpo na kolobela bikólo nyonso oyo Nzambe atindaki Yisraele ebengana.
[Etanda na lokasa 14]
Biblia endimi bitumba oyo bato basalaka?
Lokola Nzambe atindaki Bayisraele báboma Bakanana, elingi koloba ete bitumba oyo bato basalaka lelo ezali malamu? Te, mpo na bantina ata misato:
▪ Lelo oyo, ezali na ekólo moko te awa na mabele oyo Nzambe andimaka kaka yango. Ntango Bayisraele baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya, bazalaki lisusu te bamonisi ya Nzambe ata na likambo moko—ata mpo na kopesa bitumbu na ye. (Matai 21:42, 43) Na yango, Yehova akómaki kotalela Bayisraele ndenge moko na bikólo mosusu. (Balevi 18:24-28) Banda wana, ekólo moko te awa na mabele ekokaki koloba ete Nzambe azali nsima na bango na bitumba.
▪ Yehova atyaka basambeli na ye lisusu te na mokili to esika moko boye. Kasi, basaleli na ye bazali na “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso” na mabele.—Emoniseli 7:9; Misala 10:34, 35.
▪ Yesu amonisaki polele ete bayekoli na ye bakobunda bitumba te. Ntango akebisaki bayekoli na ye mpo na ndenge banguna balingaki kobundisa Yerusaleme mosika te, ayebisaki bango te ete bátikala kuna mpe bábunda; ayebisaki bango nde bákima, mpe basalaki bongo. (Matai 24:15, 16) Na esika básalela bibundeli, bakristo ya solo batyaka elikya na bango nde na Bokonzi ya Nzambe, oyo etikali moke elongola mabe nyonso na mabele.—Danyele 2:44; Yoane 18:36.
[Elilingi na lokasa 15]
Ndakisa ya Rahaba emonisi ete moto nyonso oyo alingi kosepelisa Nzambe, akoki kosala yango