Ndenge nini Nzambe atalelaka masanga?
Ndenge nini Nzambe atalelaka masanga?
MOZALISI na biso, oyo alingi bolamu na biso, apekisi te tómɛlaka masanga mwa moke. * Kutu, apesá “vinu [mpo] esepelisaka mitema ya bato; mafuta [mpo] engengisaka bilongi na bango, pe bilei [mpo] epesaka bango nzoto makasi.” (Banzembo 104:15, Bible na lingala ya lelo oyo) Mokolo moko, Yesu abakisaki esengo na fɛti moko ya libala na ndenge abongolaki mai “vinyo oyo eleki kitoko.”—Yoane 2:3-10.
Ebongi tóndima ete Mozalisi na biso ayebi malamu ndenge masanga esalaka na nzoto mpe na bɔɔngɔ na biso. Na Biblia, Tata na biso ya likoló ‘azali koteya biso mpo na litomba na biso moko,’ mpe akebisi biso makasi na ntina etali komɛla masanga ya makasi koleka ndelo. (Yisaya 48:17) Talá makebisi oyo ya polele:
“Bólangwaka vinyo te, mpo bomoi ya mbindo ezali na kati na yango.” (Baefese 5:18) “Baoyo balangwaka masanga . . . bakokóma bato ya bokonzi ya Nzambe té.” (1 Ba-Korentien 6:9-11, Bible na lingala ya lelo oyo) Liloba ya Nzambe epekisi “kolangwa masanga, lokoso ya kolia, pe makambo mosusu ya ndenge wana.”—Ba-Galate 5:19-21, Bible na lingala ya lelo oyo.
Tótala sikoyo makama mosusu ya komɛla masanga mingi.
Makama ya komɛla masanga koleka ndelo
Atako masanga ekoki kosala mwa malamu na nzoto, ezalaka na biloko oyo ekoki kobongola ndenge makanisi mpe nzoto esalaka. Komɛla masanga mingi ekoki kobimisa mikakatano oyo:
Komɛla masanga mingi ebebisaka bososoli ya moto, mpe esalaka ete ‘motema na ye eloba makambo ya kilikili.’ (Masese 23:33) Allen, momɛli-masanga oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, alobi boye: “Kozala moombo ya masanga ezali kaka maladi ya nzoto te; ezali mpe maladi oyo etali ndenge ya kokanisa mpe ndenge ya kotalela makambo. Okokanisa te mpasi oyo likambo yango ezali kopesa bato mosusu.”
Komɛla masanga mingi ekoki mpe kokitisa komipekisa ya moto. Biblia epesi likebisi oyo: “Vinyo ná vinyo ya elɛngi, yango nde biloko Hosea 4:11) Na ndenge nini? Na nse ya kwiti, makanisi mpe bamposa oyo tokoki kobimisa te soki tomɛli te ekoki kobanda komonana malamu, to kutu kosepelisa biso. Ekateli na biso ya kokangama na oyo ezali malamu ekoki kolɛmba. Masanga ekoki kolongola biso komipekisa, mpe kobebisa boyokani na biso na Nzambe.
oyo elongolaka makanisi ya malamu.” (Na ndakisa, John aswanaki ná mwasi na ye, abimaki na nkanda mpe akendaki na nganda. Nsima ya komɛla mwa masanga mpo akitisa motema, mwasi moko apusanaki pembeni na ye. Nsima ya kobakisa mwa masanga lisusu, John abimaki na mwasi yango mpe akweaki na ekobo. Na nsima, John ayokaki mpasi mingi mpenza na ndenge asalaki likambo oyo akokaki kokanisa ata moke te soki masanga ekitisaki te komipekisa na ye.
Komɛla masanga mingi ekoki kotinda moto akóma na bilobaloba mpe na bisalelá. Biblia etuni boye: “Nani akutanaka ntango nyonso na mpasi? Nani aswanaka mpe abundaka?” “Moto nyonso oyo alekisaka ntango mingi, mpo na kozwa kaka mwa moko lisusu.” (Masese 23:29, 30, Contemporary English Version) Komɛla masanga koleka ndelo ekoki kotinda yo ‘omiyoka lokola moto alali na kati ya mai monene, to adiembeli na songe ya likonzi ya molai ya masuwa.’ (Batoli 23:34, Bible na lingala ya lelo oyo) Moto oyo amɛli masanga koleka ndelo akoki kolamuka mpe koyoka lokola ‘batuti ye, kasi ayebi te’ ndenge esalemaki.—Masese 23:35.
Komɛla masanga koleka ndelo ekoki kobebisa nzoto. “Na nsuka na yango, [masanga] eswaka lokola nyoka, mpe ebimisaka ngɛngɛ lokola etupa.” (Masese 23:32) Minganga bandimi ete lisese wana ya kala ezali ya bwanya. Komɛla masanga mingi ekoki kokóma pwazɔ oyo ebomaka, oyo ekoki kopesa bamaladi lokola kanser, hépatite, maladi ya libale (cirrhose du foie), maladi ya pancréas, kokitisa sukali na makila ya bato oyo babɛlaka diabète, kobebisa mwana oyo azali na libumu, kopesa maladi ya motema to ya bɔɔngɔ, mpe bamaladi mosusu. Mpe soki moto amɛli masanga koleka ndelo ata kaka mbala moko, akoki kokɔta na coma to kokufa. Nzokande, mikanda ya minganga elobeli te likama oyo eleki monene ya komɛla masanga koleka ndelo.
Likama oyo eleki monene. Ata soki moto alangwe te, komɛla masanga mingi ebebisaka boyokani na Nzambe. Biblia elobi polele ete: “Mawa na baoyo bazali kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpo na koluka masanga oyo elangwisaka, Yisaya 5:11, 12.
baoyo bazali koumela tii na molili ya mpokwa, bongo vinyo ekómi kopela lokola mɔtɔ na kati na bango!” Mpo na nini? Yisaya amonisi ndenge komɛla masanga mingi ebebisaka boyokani na Nzambe; alobi boye: “Bazali kotala mosala ya Yehova te, mpe bamoni mosala ya mabɔkɔ na ye te.”—Liloba ya Nzambe epesi biso toli ete ‘tózala te kati na bamɛli minene ya vinyo.’ (Masese 23:20) Ekebisi mibange basi ete “bázala baombo ya vinyo te.” (Tito 2:3) Mpo na nini? Mpo mokemoke—mbala mingi kozanga koyeba—bato bakómaka komɛla mwa mingi koleka. Nsukansuka, momɛli-masanga akoki komituna ete, “tango nini nakolamuka po násenga lisusu masanga?” (Batoli 23:35, Bible na lingala ya lelo oyo) Bamɛli-masanga bamityaka na likama soki bakómi koluka masanga mosusu na ntɔngɔ mpo na kolongola kwiti oyo bazwaki na butu oyo eleki.
Biblia elobi ete baoyo bamipesi na “kolekisa ndelo na vinyo, na bafɛti ya lokoso, na komɛla mingi . . . bakozongisa monɔkɔ epai ya moto oyo alingi kosambisa baoyo bazali na bomoi mpe baoyo bakufá.” (1 Petro 4:3, 5) Mpe mpo na ntango ya mpasi mpenza oyo tozali sikoyo, Yesu akebisaki ete: “Bókeba ete mitema na bino ekóma kilo te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, noki na ntango wana kaka, mokolo [ya Yehova] ekwela bino pwasa lokola motambo.”—Luka 21:34, 35.
Kasi, bato oyo balingá komɛla bakoki kosala nini mpo ‘bákóma kilo te na komɛla mingi’?
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 2 Na lisolo oyo, liloba “masanga” etali nde biɛrɛ, vinyo, mpe masanga mosusu ya makasi.
[Bililingi na nkasa 4, 5]
Komɛla masanga koleka ndelo ekoki kobimisa mikakatano mingi