Sɛkɛlɛ mpo na libota ya esengo
Ndenge ya koyokana malamu na babokilo
Jenny * alobi boye: Mama ya Ryan azalaki koyebisa ngai polele ete asepelaka na ngai te. Kasi, baboti na ngai bazalaki mpe koyebisa Ryan kaka bongo. Namoná naino te baboti na ngai bámonisela moto makambo makasimakasi ndenge wana! Kokende kotala baboti ekómaki mpenza mokakatano mpo na biso mibale.
Ryan alobi boye: Mama azalaki kokanisa ete moto ata moko te abongi na bana na ye, yango wana kaka na ebandeli asepelaki na Jenny te. Mpe baboti ya Jenny bazalaki mpe kaka bongo—bazalaki ntango nyonso kotyola ngai. Yango ezalaki kobimisa mokakatano mpamba te, nsima ya makambo wana, mokomoko na biso azalaki kokɔtela baboti na ye mpe tozalaki kotyolana.
MATATA na babokilo ekoki komonana lokola likambo ya lisɛki ntango bato ya teyatre bazali kosala lisano, kasi soki ekómi likambo ya solo ezalaka lisusu likambo ya kosɛka te. Reena, mwasi moko na Inde alobi ete: “Na boumeli ya bambula bokilo na ngai ya mwasi azalaki kokɔta na makambo ya libala na biso. Mbala mingi, nazalaki kosilikela mobali na ngai mpo nakokaki kosilikela mama na ye te. Emonanaki lokola nde asengelaki kopona kozala mobali malamu to kozala mwana malamu.”
Mpo na nini babokilo mosusu bakɔtaka na makambo ya bana na bango oyo babalá? Jenny oyo tolobelaki na ebandeli, alobeli ntina moko. Alobi boye: “Ekoki kozala mokakatano mpo na bango komona elenge moko oyo ayebi naino mpenza makambo te akóma kokipe mwana na bango.” Dilip, mobali ya Reena, apesi likanisi mosusu. Alobi boye: “Baboti oyo babɔkɔlá bana na bango mpe bamipimelá makambo mingi mpo na bango, bakoki komona lokola batye bango pembeni. Ekoki mpe kozala ete bazali komitungisa na ntina ete mwana na bango azanga bwanya ya kolonga na libala na ye.”
Mpo na koloba solo, ntango mosusu babalani bango moko nde basalaka ete baboti bákɔta na makambo na bango. Tózwa ndakisa ya Michael ná Leanne, mobali moko ná mwasi na ye oyo bafandaka na Australie. Michael alobi boye: “Leanne akolá na libota moko oyo moto nyonso azalaki koloba makambo polelepolele. Na yango, ntango tobalanaki, azalaki kokende kotuna
tata na ye ekateli oyo ngai ná ye tosengeli kozwa. Tata na ye azalaki na bwanya mingi, kasi nazalaki koyoka mpasi na motema ndenge azalaki kokende kotuna tata na ye na esika atuna ngai!”Emonani polele ete matata na babokilo ekoki kolongola kimya na libala. Ezali mpe bongo na libala na bino? Ndenge nini ozalaka na baboti ya mwasi na yo mpe ndenge nini mwasi na yo azalaka na baboti na yo? Tótalela mikakatano mibale oyo ekoki kobima mpe oyo okoki kosala mpo na yango.
MOKAKATANO 1:
Emonani ete molongani na yo akangamaka mingi na baboti na ye. Luis, mobali moko na Espagne alobi boye: “Mwasi na ngai azalaki komona lokola ete soki tofandi pene ya baboti na ye te, ekozala lokola ete aboyi bango.” Abakisi boye: “Epai mosusu, ntango mwana na biso abotamaki, baboti na ngai bazalaki koya kotala biso mikolo nyonso, mpe soki bakei mwasi na ngai azalaki lisusu malamu te. Yango esalaki ete tozalaka na matata mingi.”
Likanisi ya Biblia:
Mpo na kolobela ebongiseli ya libala, Biblia elobi ete: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Kozala “mosuni moko” elimboli kaka te kofanda esika moko. Kasi, elimboli ete mobali ná mwasi basali libota ya sika—oyo ekómi likoló ya mabota na bango oyo bautá. (1 Bakorinti 11:3) Toboyi te, mobali ná mwasi basengeli kokoba kokumisa baboti na bango, mpe mbala mingi yango esɛngaka kotyela bango likebi. (Baefese 6:2) Ekozala boni soki ndenge oyo molongani na yo azali kokokisa mokumba wana ezali kosala ete oyoka lokola nde asundoli yo to azali kokipe yo te?
Oyo okoki kosala:
Talelá likambo yango na makanisi ebongi. Ezali solo ete molongani na yo akangamaka mpenza na baboti na ye to ezali nde ete yo ozalaka mpenza na boyokani ya ndenge wana te na baboti na yo? Soki ezali bongo, ndenge nini lolenge oyo obɔkwamá ekoki kosala ete otalela likambo yango? Ekoki kozala nde ete ozali na mwa zuwa?—Masese 14:30; 1 Bakorinti 13:4; Bagalatia 5:26.
Esɛngaka komitalela na bosembo nyonso mpo na koyanola na mituna wana. Kasi ezali na ntina ete osala yango. Kutu, soki koswana na bino eutaka mingi mpo na babokilo, wana emonani ete libala na bino nde ezali na mokakatano—kasi ezali likambo ya babokilo te.
Mikakatano mingi ebimaka na libala mpo mwasi ná mobali batalelaka makambo ndenge moko te. Okoki komeka kotalela makambo ndenge molongani na yo azali kotalela yango? (Bafilipi 2:4; 4:5) Ezali yango nde Adrián, mobali moko na Mexique asalaki. Alobi boye: “Mwasi na ngai akolaki na libota ya malamu te, na yango nazalaki koboya tózalaka mingi na baboti na ye. Nsukansuka nasalaki ete tókata boyokani nyonso na bango na boumeli ya bambula. Yango esalaki ete libala na biso ezalaka na matata mpo mwasi na ngai azalaki kolinga kaka azalaka na libota na ye, mingimingi na mama na ye.”
Na nsima, Adrián atalelaki lisusu likambo yango. Alobi boye: “Atako nayebi ete soki mwasi na ngai azali ntango nyonso na baboti na ye ekoki kobebisa makanisi na ye, kozanga mpe kokende kotala bango ekobimisa mpe makambo mosusu. Yango wana namekaki kobongisa, mpe kobatela boyokani na babokilo na ngai.” *
MEKÁ KOSALA BOYE: Yo ná molongani na yo bókoma likambo ya libosoliboso oyo etungisaka mokomoko na bino mpo na babokilo. Soki likoki ezali, bandá na “namoni ete . . .” Na nsima pesá mwasi na yo papye na yo mpe ye apesa yo oyo ya ye. Bino mibale bósala na bomoko, bókanisa ndenge oyo bokoki kosala mpo na kosilisa mitungisi oyo mokomoko azali na yango.
MOKAKATANO 2:
Babokilo bazali kokɔta ntango nyonso na makambo ya libala na bino, bazali kopesa toli ata soki bosɛngi bango te. Nelya, mwasi moko na Kazakhstan, alobi boye: “Tolekisaki mbula nsambo ya liboso na libota ya mobali na ngai. Matata ezalaki kobima
ntango nyonso na ndenge oyo tozalaki kobɔkɔla bana ata mpe mpo na ndenge nazalaki kolamba mpe kotya bopɛto. Nasololaki na mobali na ngai mpe mama-bokilo likambo yango, kasi yango epelisaki nde mɔtɔ!”Likanisi ya Biblia:
Ntango obali, ozali lisusu te na nse ya bokonzi ya baboti na yo. Kutu, Biblia elobi ete “mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali”—elingi koloba, mobali na ye. (1 Bakorinti 11:3) Kasi, ndenge tolobaki yango liboso, mobali mpe mwasi basengeli kokumisaka baboti na bango. Kutu Masese 23:22, eyebisi biso boye: “Yoká tata na yo oyo abotaki yo, mpe kotyola mama na yo te kaka mpo akómi mobange.” Kasi, ezali boni soki baboti na yo to ya molongani na yo babosani ete mobali azali mokonzi mpe bazali koluka kondimisa bino makanisi na bango?
Oyo okoki kosala:
Luká komitya na esika na bango, mpe luká koyeba nini etindaka bango básala bongo. Ryan, oyo tolobelaki na ebandeli alobi boye: “Ntango mosusu baboti bazalaka na mposa ya koyeba soki bazali kaka na ntina na miso ya bana na bango.” Komikɔtisa yango ekoki kozala na nko te mpe ntango mosusu ekoki kosila soki basaleli toli ya Biblia ete “bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.” (Bakolose 3:13) Kasi, ezali boni soki komikɔtisa yango ekómi makasi mpe ekómi kobimisa matata na kati ya mobali mpe mwasi?
Babalani mosusu bamonaki malamu bátya bandelo oyo ebongi na makambo etali baboti na bango. Yango elingi koloba te ete osengeli kotyela bango mibeko. * Mbala mingi, na makambo oyo ozali kosala okoki komonisa polele ete molongani na yo azali na esika ya liboso na bomoi na yo. Na ndakisa, Masayuki, mobali moko na Japon alobi boye: “Ata soki baboti bapesi makanisi na bango, kondima yango mbangumbangu te. Kobosana te ete ozali kotonga libota na yo ya sika. Yango wana, liboso luká naino koyeba soki molongani na yo akotalela toli yango ndenge nini.”
MEKÁ KOSALA BOYE: Sololá na molongani na yo na makambo mpenza oyo baboti na bino bakɔtaka mpe esalaka ete matata ezala na libala na bino. Yo ná molongani na yo, bókoma bandelo oyo bokoki kotya mpe ndenge oyo bokotosa yango wana bozali kokoba kokumisa baboti na bino.
Matata mingi na babokilo ekoki kokita soki ososoli makanisi na bango mpe oboyi kopesa nzela ete mikakatano yango ebimisa koswana kati na yo ná molongani na yo. Na likambo yango, Jenny alobi boye: “Ntango mosusu koswana kati na ngai ná mobali na ngai mpo na baboti na biso ezalaka kaka likambo ya ndenge tozali kokanisa, mpe ezalaki komonana ete tozalaki kosalana mabe ntango mokomoko na biso azali kolobela mabunga ya baboti ya mosusu. Kasi, nsukansuka toyekolaki ndenge ya kotika kolobela mabunga ya babokilo kasi koluka kosilisa nde mokakatano oyo ebimi. Kosala bongo, esali ete ngai ná mobali na ngai tólinganaka lisusu mingi.”
^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.
^ par. 14 Soki baboti basali lisumu moko monene—mingimingi soki baboyi kobongola motema—ekoki kosala ete boyokani ekatana mpe kozalaka na bango kaka soki esengeli.—1 Bakorinti 5:11.
^ par. 19 Ntango mosusu, ekoki kosɛnga osolola na baboti to na babokilo na yo. Soki ezali bongo, salá yango na limemya mpe na komikitisa mpe na boboto.—Masese 15:1; Baefese 4:2; Bakolose 3:12.
OMITUNA BOYE . . .
-
Bizaleli nini ya malamu babokilo na ngai bazali na yango?
-
Ndenge nini nakoki kokumisa baboti na ngai mpe kozanga kosundola molongani na ngai?