Teyá bana na yo
Bato oyo bakomaki na ntina na Yesu
BOSEPELAKA kotánga masolo ya Yesu na libota?— * Bato mosusu bakamwaka ntango bayokaka ete Yesu akomaki ata liloba moko te na Biblia. Kasi, bato mwambe kati na baoyo bakomaki Biblia bayebisi biso makambo mingi oyo etali ye. Bango nyonso bazalaki na bomoi ntango Yesu azalaki awa na mabele, mpe bayebisi biso makambo oyo ateyaki. Okoki kotánga bankombo ya bato yango mwambe?— Bankombo na bango ezali Matai, Marko, Luka, mpe Yoane. Minei mosusu ezali Petro, Yakobo, Yuda, mpe Paulo. Oyebi makambo nini mpo na bakomi yango?—
Tólobela naino bakomi misato oyo bazalaki mpe na kati ya bantoma 12 ya Yesu. Oyebi bankombo na bango?— Petro, Yoane, mpe Matai. Petro akomelaki baninga na ye bakristo mikanda mibale. Ayebisaki bango makambo oyo Yesu asalaki mpe alobaki. Fungolá Biblia na yo na 2 Petro 1:16-18, mpe tángá maloba oyo Petro alobi ndenge ayokaki mongongo ya Yehova Nzambe koloba mpo na Yesu uta na likoló.—Matai 17:5.
Ntoma Yoane akomaki mikanda mitano ya Biblia. Azalaki pene na Yesu na bilei ya nsuka oyo bayekoli balyaki elongo na Nkolo na bango. Yoane azalaki mpe elongo na Yesu ntango Yesu akufaki. (Yoane 13:23-26; 19:26) Yoane akomaki moko ya mikanda minei ya Biblia oyo elobelaki bomoi ya Yesu, mikanda oyo babengaka Baevanzile. Akomaki mpe Emoniseli oyo Yesu apesaki ye mpe mikanda misato oyo ebengami na nkombo na ye. (Emoniseli 1:1) Mokomi ya misato oyo akómaki mpe ntoma ya Yesu ezali Matai. Azalaki mokɔngɔli mpako.
Bakomi mosusu mibale bayebaki Yesu na ndenge mosusu. Bazalaki bandeko na ye, bana ya Yozefe ná Maria. (Matai 13:55) Liboso, bazalaki te bayekoli ya Yesu. Bazalaki kutu kokanisa ete Yesu abɛli motó mpo na molende oyo azalaki na yango na mosala ya kosakola. (Marko 3:21) Bandeko yango ezalaki banani?— Moko nkombo na ye ezalaki Yakobo. Akomaki mokanda ya Yakobo. Mosusu, Yudasi, oyo abengami mpe Yuda. Akomaki mokanda ya Yuda.—Yuda 1.
Mibale mosusu oyo bakomaki masolo na ntina na bomoi ya Yesu ezali Marko mpe Luka. Maria, mama ya Marko azalaki na ndako ya monene na Yerusaleme, epai bakristo ya ekeke ya liboso bazalaki koyangana ata mpe ntoma Petro. (Misala 12:11, 12) Bambula mingi liboso, na butu oyo Yesu asalaki Elekeli ya nsuka elongo na bantoma na ye, na ntembe te, Marko alandaki bango ntango bakendaki na elanga ya Getesemane. Ntango bakangaki Yesu, basoda balukaki kokanga Marko, kasi akimaki, atikaki elamba na ye.—Marko 14:51, 52.
Luka azalaki monganga oyo ayebaki mosala na ye malamu, oyo emonani ete akómaki moyekoli nsima ya liwa ya Yesu. Ayekolaki malamumalamu lisolo ya bomoi ya Yesu mpe akomaki yango na maloba ya polele mpe ya sikisiki. Na nsima, Luka akómaki moninga ya mobembo ya ntoma Paulo, Luka 1:1-3; Misala 1:1.
akomaki mpe mokanda ya Misala ya Bantoma.—Paulo azali moto ya mwambe oyo akomaki na ntina na Yesu. Ayekolaki epai ya Gamaliele, moto monene na makambo ya mibeko. Paulo abɔkwamaki mpe ateyamaki na Bafarisai, na ntango wana azalaki kobengama Saulo, azalaki koyina bayekoli ya Yesu mpe azalaki kopesa mabɔkɔ mpo na koboma bango. (Misala 7:58–8:3; 22:1-5; 26:4, 5) Oyebi ndenge oyo Paulo ayebaki solo na ntina na Yesu?—
Paulo azalaki kokende na Damasi mpo na kokanga bayekoli ya Yesu, ntango na mbala moko kongɛnga makasi oyo eutaki na likoló ebomaki ye miso. Ayokaki mongongo moko etuni ye: “Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?” Ezalaki mongongo ya Yesu! Ayebisaki Paulo akende na Damasi. Na nsima, Yesu ayebisaki moyekoli Ananiasi asolola na Paulo, mpe Paulo akómaki moyekoli ya Yesu. (Misala 9:1-18) Paulo akomaki mikanda 14 ya Biblia, kobanda na mokanda ya Baroma tii na mokanda ya Baebre.
Otángaka mikanda ya Biblia oyo elobeli Yesu to moto moko atángelaka yo yango?— Moko ya likambo eleki malamu oyo okoki kosala na bomoi na yo ezali ya kobanda koyekola makambo oyo Biblia elobi na ntina na Yesu ntango ozali naino elenge.
^ par. 3 Soki ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.