Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Koyeba nkombo ya Nzambe esɛngaka nini?

Koyeba nkombo ya Nzambe esɛngaka nini?

NKOMBO na yo ezalaka na ndimbola moko boye? Na mikili mosusu, bato bazalaka na momeseno ya kopesa mwana nkombo oyo ezali mpenza na ndimbola. Nkombo yango ekoki komonisa makambo etali lingomba ya baboti, mitinda ya bizaleli malamu oyo batosaka mpe ndenge oyo balingi mwana na bango azala ntango akokola.

Momeseno ya kopesa bato bankombo oyo ezali na ndimbola ebandá kala. Na ntango ya kala, mbala mingi bazalaki kopesa bato nkombo na kolanda ndimbola ya nkombo yango. Nkombo ya moto ekokaki komonisa mokumba oyo moto yango asengelaki kokokisa. Na ndakisa, ntango Yehova ayebisaki Davidi mokumba oyo mwana na ye Salomo akokokisa, alobaki boye: “Salomo [oyo elimboli “kimya”] mpo nkombo na ye ekozala Salomo, mpe nakopesa Yisraele kimya mpe bopemi na mikolo na ye.”​—1 Ntango 22:9.

Na bantango mosusu, Yehova azalaki kopesa moto oyo asengelaki kokokisa mokumba moko, nkombo ya sika. Mwasi ya Abrahama oyo azalaki kobota te, azwaki nkombo Sara, oyo elimboli “mokonzi-mwasi.” Mpo na nini? Yehova alobaki boye: “Nakopambola ye mpe lisusu nakopesa yo mwana mobali na nzela na ye; mpe nakopambola ye mpe akokóma bikólo; bakonzi ya bato ya bikólo bakobima kati na ye.” (Ebandeli 17:16) Emonani polele ete koyeba ntina oyo Nzambe apesaki Sara nkombo ya sika, esɛngaki koyeba mokumba na ye ya sika.

Ezali boni mpo na Yehova​—nkombo oyo eleki bankombo nyonso? Nkombo yango elimboli nini? Ntango Moize atunaki Nzambe na ntina na nkombo na ye, Yehova alobaki boye: “Nakozala oyo nakozala.” (Kobima 3:14) Biblia moko, (Rotherham), ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Nakokóma nyonso oyo nasepeli kokóma.” Nkombo ya Yehova emonisi ete azali Nzambe oyo akokisaka mikumba mingi. Tózwa ndakisa moko: Ekoki kosɛnga na mama moko akokisa mikumba ebele mokolo na mokolo mpo na kobatela bana na ye​—na ndakisa lifulume, molambi, molakisi—​ntango esɛngi asala bongo. Ezali mpe bongo mpo na Yehova, atako ye asalaka yango na ndenge ya koleka mpenza. Mpo na kokokisa mokumba na ye mpo na bato, akoki kokóma nyonso oyo asepeli kokóma, mpo na kokokisa mokumba nyonso oyo esengeli. Na yango, koyeba Yehova na nkombo esɛngi koyeba mikumba na ye mingi mpe komonisa botɔndi mpo na yango.

Likambo ya mawa, bato oyo bayebi Nzambe na nkombo te, bamonaka te kitoko ya bizaleli na ye ya malamu. Nzokande, soki ozali koyekola Biblia, okoki koyeba mikumba ya Yehova lokola Mopesi-toli, Mobikisi ya nguya, mpe Mokabi monene, mpe bongo na bongo. Nkombo ya Yehova ezali na ndimbola moko monene mpe etindaka moto akóma na kobanga oyo ebongi.

Kasi, koyekola koyeba Nzambe na nkombo na ye, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Lisolo oyo elandi ekomonisa mpo na nini.