Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo ya mabe ekosuka ntembe ezali te!

Makambo ya mabe ekosuka ntembe ezali te!

Makambo ya mabe ekosuka ntembe ezali te!

NZAMBE apesi biso Liloba na ye oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, oyo emonisi ntina oyo bato basalaka makambo ya mabe. Apesi mpe biso bonsomi ya kopona mpe likoki ya komipekisa, yango esalisi biso tópona koboya kosala makambo ya mabe. (Kolimbola Mibeko 30:15, 16, 19) Lokola tozangi eloko moko te, tokoki koyeba likambo nyonso oyo ekoki kotinda biso tósala mabe mpe koluka kobongisa. Na nsuka, milende oyo tozali kosala mpo na koboya kosala mabe, ekomemela biso mpe bato mosusu esengo.​—Nzembo 1:1.

Kasi, ata soki tozali kosala milende mpo na koboya kosala mabe, mokili ezali kokoba kotonda na makambo ya mabe oyo bato bazali kosala. Biblia epesi likebisi oyo: “Yebá likambo oyo: mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” Mpo na komonisa makambo oyo ezali kosala ete mikolo yango ezala “mpasi mpenza,” ebakisi boye: “Bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe, bazali komonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango; mpe yo kimá bato wana.”​—2 Timote 3:1-5.

Ekoki kozala ete omoni maloba “mikolo ya nsuka” na maloba oyo esakolamaki oyo touti kotánga. Mpo na yo, maloba yango elimboli nini? Ndenge oyo bato mingi bayebaka yango, koloba “mikolo ya nsuka” emonisaka ete likambo moko ezali kokóma na nsuka. Yango ekoki kozala nini? Talá oyo Nzambe alaki na Liloba na ye.

Bato mabe bakolongolama mpenza.

“Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”​NZEMBO 37:10, 11.

“Yehova azali kobatela baoyo nyonso bazali kolinga ye, kasi akosilisa bato mabe nyonso nyɛɛ.”​NZEMBO 145:20.

Monyoko ekozala lisusu te.

“Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te. Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu.”​NZEMBO 72:12, 14.

“Biloko oyo ezalisamá ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”​BAROMA 8:21.

Bamposa ya bato ekokokisama.

“Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.”​MIKA 4:4.

“Ya solo, bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te. Mpo mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete; mpe bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.”​YISAYA 65:21, 22.

Bosembo ekotíyola.

“Bongo Nzambe akosala te ete likambo ya bato na ye oyo aponaki, oyo babelelaka ye butu moi, ekatama na bosembo . . . ? Nazali koyebisa bino ete: Akosala ete likambo na bango ekatama na bosembo nokinoki.”​LUKA 18:7, 8.

“Yehova alingaka bosembo, mpe akotika te bato na ye ya sembo. Bakobatelama mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”​NZEMBO 37:28.

Bosembo ekozwa esika ya moimi.

“Bato oyo bafandi na mabele oyo ebotaka bakoyekola boyengebene.”​YISAYA 26:9.

“Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.”​2 PETRO 3:13.

Bato bazali kobongwana​—ata lelo oyo

Ntembe ezali te, biso nyonso tokosepela na bilaka ya ndenge wana. Kasi, nini endimisi biso ete makambo yango nyonso ekokokisama? Lelo oyo, ezali na makambo oyo ezali komonisa ete bilaka ya Nzambe ekokokisama. Makambo yango ezali nini? Ezali mpo bamilio ya bato lelo na mokili mobimba, balongi kotika bizaleli lokola moimi, pite, to mobulu mpe bayekoli kozala bato ya sembo, ya kimya mpe ya boboto. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova oyo bazali bato koleka milio nsambo, basali libota moko na mokili mobimba oyo elongi makambo oyo ekabolaka bato; na ndakisa, koponapona loposo, bikólo, makambo ya politiki, mpe nkita, makambo oyo ebimisá koyinana makasi, mobulu mpe esopá makila mingi na bomoi ya bato. * Lokola mbongwana ya ndenge wana ezali kosalema lelo oyo, yango endimisi biso ete bilaka ya Nzambe ekokokisama na mobimba na yango.

Kasi, nini esali mbongwana ya ndenge wana? Tokozwa eyano na elaka mosusu ya Biblia, oyo mosakoli Yisaya akomaki. Akomaki boye:

“Mbwa ya zamba ekofanda elongo na mwana-mpate, mpe nkoi ekolala esika moko na mwana-ntaba, mpe mwana-ngɔmbɛ ná mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki ná nyama oyo eleisami malamu, yango nyonso esika moko; mpe mwana moke ya mobali akokamba yango. . . . Mpe nkɔsi ekolya matiti ya kokauka lokola ngɔmbɛ-mobali. Mpe mwana oyo azali naino komɛla mabɛlɛ akosakana mpenza na libulu ya kobra; mpe mwana oyo bakilisi mabɛlɛ akotya lobɔkɔ na lidusu oyo ekɔtisaka pole na libulu ya nyoka ya ngɛngɛ. Bakosala eloko moko te ya mabe mpe bakobebisa eloko moko te na ngomba mosantu na ngai mobimba; mpo mabele ekotonda na boyebi ya Yehova ndenge mai etondi na mbu.”​—Yisaya 11:6-9.

Esakweli oyo ezali kaka kolobela ntango moko oyo banyama bakozala na kimya ná bato? Te, esuki kaka wana te. Simbá ete eteni ya nsuka ya vɛrsɛ yango emonisi likambo oyo ekomema mbongwana: “Mabele ekotonda na boyebi ya Yehova.” Boyebi yango ya Nzambe ebongolaka nde banyama? Te. Kasi, ekoki mpe ebongolaka nde bato! Esakweli yango emonisi ete baoyo bazalaki na bizaleli mabe lokola banyama bakotika bizaleli yango mpe bakokolisa bizaleli ya bokristo mpo bayekoli mpe basaleli makambo oyo Biblia eteyaka.

Tózwa ndakisa ya Pedro. * Azalaki kokanisa ete azali kobunda mpo na bosembo ntango akɔtaki na ebongiseli moko ya bateroriste. Nsima ya kozwa formasyo, batindaki ye akende kobwaka bɔmbi na kaa moko ya bapolisi. Ntango azalaki komibongisa mpo na kosala likambo yango, bakangaki ye. Pedro alekisaki sanza 18 na bolɔkɔ, epai akobaki mosala na ye ya monɔngi. Na ntango yango, mwasi na ye abandaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Ntango abimaki na bolɔkɔ, ye mpe abandaki koyekola Biblia, mpe makambo oyo ayekolaki na ntina na Yehova Nzambe etindaki ye asala mbongwana monene na bizaleli na ye mpe na ndenge na ye ya kotalela bomoi. Pedro alobi boye: “Napesaka Yehova mersi ndenge nabomaki ata moto moko te na boumeli ya bambula wana oyo nazalaki kosala lokola teroriste. Lelo oyo, nasalelaka Biblia, mopanga ya elimo ya Nzambe mpo na kopesa bato nsango ya kimya mpe ya bosembo ya solosolo​—nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.” Kutu, Pedro akendaki na kaa ya bapolisi oyo akanaki kopanza na bɔmbi mpo na koteya bango nsango ya kimya mpe ya mokili oyo ezangi mobulu.

Nguya oyo Liloba ya Nzambe ekoki kozala na yango epai ya bato epesi biso lisusu ntina ya kozala na kondima na elaka ya Nzambe ya kosilisa makambo nyonso ya mabe. Ya solo, bato bakokoba libela na libela te kosala makambo ya mabe, kasi bakokóma bato ya malamu. Mosika te, Yehova akolongola mobandisi ya makambo nyonso ya mabe, Satana Zabolo, oyo azali kotambwisa makambo ya mokili oyo. Biblia elobi boye: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Kasi, mosika te, akozala lisusu te. Bato ya motó makasi mpe bakozala lisusu te, baoyo bazali koboya kotika banzela na bango ya mabe. Ekozala mpenza esengo kozala na bomoi na eleko wana ya mapamboli!

Moto asengeli kosala nini mpo amona makambo wana na mikolo ezali koya? Kobosana te ete ezali “boyebi ya Yehova” nde ezali kobongola bato lelo oyo mpe ekomema mbongwana na mokili mobimba mosika te. Ntango ozali kozwa boyebi ya sikisiki ya Biblia mpe ozali kosalela yango​—ndenge Pedro asalaki—​yo mpe okoki kozala na elikya ya kofanda na mokili oyo “boyengebene ekozala.” (2 Petro 3:13) Yango wana, tosɛngi yo ozwa libaku yango awa ntango ezali naino ya kozwa boyebi ya Nzambe mpe ya Yesu Kristo, mpo yango ekolimbola bomoi ya seko mpo na yo.​—Yoane 17:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 21 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mwa buku Batatoli ya Yehova​—Bazali banani? Makambo nini bandimaka? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 25 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]

Yo mpe okoki kozala na elikya ya kofanda na mokili oyo “boyengebene ekozala.”​—2 Petro 3:13