Mbula 500 ya mateya ya Calvin ebimisi mbuma nini?
Mbula 500 ya mateya ya Calvin ebimisi mbuma nini?
JEAN CAUVIN (John calvin) abotamaki na engumba Noyon, na France na mobu 1509. Abimisaki lingomba moko oyo ezalaki na ntina mingi na bomoi ya bato mingi na mikili ya Mpoto, ya Amerika, ya Sudi ya Afrika, mpe na mikili mosusu. Azali moko ya bato minene oyo bakɔtisaki mbongwana na lingomba na mikili ya Mpoto.
Lelo oyo, mbula soki 500 nsima ya kobima ya lingomba ya Calvin—makanisi mpe mateya ya Calvin—na ndenge moko to mosusu ezali se komonana na mangomba ya Protesta, na ndakisa na Église réformée, presbytérienne, congrégationaliste, mpe na mangomba mosusu ya Puritain. Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 2009, Alliance mondiale des Églises réformées, elobaki ete ezali na bandimi milio 75 na mikili 107.
Matata ná Lingomba ya Katolike
Tata ya Calvin azalaki avoka mpe sekrɛtɛrɛ ya Lingomba ya Katolike na engumba Noyon. Ekoki kozala ete mosala na ye esalaki ete amona makambo mingi ya mabe ya bakonzi ya mangomba na ntango wana. Toyebi te soki yango nde etindaki bango bátomboka to bázanga limemya na lingomba, kasi na nsima, lingomba ebenganaki
tata ná yaya ya John ya mobali. Ntango tata na ye akufaki, ezalaki mpasi mpo John azwa ndingisa ya kokunda tata na ye na ndenge ya bokristo. Ekoki kozala ete likambo yango etindaki John alongola motema na ye na Lingomba ya Katolike.Makambo mingi oyo bakomá mpo na Calvin, elobeli mingi te bolenge na ye, elobeli kaka ezaleli na ye ya kozala ye moko ye moko mpe kosolola mingi te. Ata ntango azalaki kotánga na engumba Paris, na Orléans mpe na Bourges, azalaki mpenza na baninga mingi te. Kasi, Calvin azalaki na likoki ya kokanga ntina ya makambo noki mpe likoki ya kobosana makambo te. Yango esanganaki na makoki ya kokamwa ya kosala mosala—azalaki koyekola mikolo nyonso kobanda na ngonga ya 5 ya ntɔngɔ tii na midi ya butu—yango esalaki ete akóma moto ya mayele na makambo ya teoloji liboso akóma na mbula 23. Ayekolaki mpe Ebre, Grɛki, mpe Latin mpo na koyekola Biblia. Nzokande, libosoliboso Calvin ayebanaki mpo na ndenge azalaki kozwa mosala na ye na lisɛki te, ezaleli oyo bato mingi balobaka ete ezali liteya ya Calvin.
Na ntango yango, na ngámbo mosusu ya Allemagne, Martin Luther azalaki kotɛmɛla polele Lingomba ya Katolike mpo na mabe na yango mpe mateya na yango oyo eutaki na Biblia te. Bato mingi bakanisaka ete na mobu 1517 atyaki makanisi 95 na porte ya ndako-nzambe moko na engumba Wittenberg, mpo na kotɛmɛla makambo mabe ya lingomba mpe asɛngaki mbongwana ekɔta. Bato mingi bandimaki makanisi na ye, mpe mbongwana ekɔtaki nokinoki mpe epanzanaki na Mpoto mobimba. Ntembe ezali te ete yango ekɔtisaki botɛmɛli makasi na bisika mingi, mpe bato yango oyo batombokaki to Baprotesta, bazalaki kopalanganisa makanisi na bango mpe yango ememelaki bango minyoko. Na mobu 1533, na Paris, Nicholas Cop, moninga moko ya Calvin asalaki diskur oyo ezalaki kokɔtela Luther, mpe lokola Calvin nde asalisaki ye mpo na kokoma diskur yango, bango mibale basengelaki kokima mpo na kobatela bomoi na bango. Calvin azongaki lisusu na France te.
Na mobu 1536, Calvin abimisaki buku moko (Institution de la religion chrétienne) ezalaki buku oyo ezalaki na mateya ya Baprotesta. Akomelaki yango Mokonzi Francis I mpo na kokɔtela Baprotesta ya ekólo France, oyo na nsima bayebanaki na nkombo Huguenots. Calvin atɛmɛlaki mateya ya Katolike mpe alobelaki likambo oyo esimbaki mpenza kondima na ye—Bokonzi ya Nzambe. Longola makambo ya lingomba, buku oyo Calvin akomaki eyebani mpe mpo na likambo oyo yango esalaki mpo na monɔkɔ ya Lifalanse mpe ndenge ya kokoma yango. Calvin azalaki moko ya bato ya libosoliboso oyo bakɔtisaki mbongowana. Nsukansuka afandaki na Genève na Suisse mpe kobanda mobu 1541, asalaki ete engumba yango ekóma esika oyo mbongwana ekɔtaki mpenza.
Akobi kokɔtisa mbongwana na Genève
Calvin azalaki ndakisa monene na engumba Genève. Lokola alingaki makasi bizaleli malamu mpe bosembo, asalaki ete Genève elongwa “engumba oyo ekendá nsango mabe mpe ekóma engumba oyo bato nyonso balandaka mpenza mibeko etali bizaleli malamu,” ndenge buku moko (Encyclopedia of Religion) elobi yango. Mbongwana ekɔtaki mpe na makambo mosusu. Sabine Witt, mokambi na esika moko ya kobomba biloko ya kala (German Historical Museum) na engumba Berlin alobi boye: “Mpo na bitumba ya mangomba na France, motángo ya bato
[na Genève] ebakisamaki mbala mibale na boumeli ya bambula moke kaka oyo elandaki nsima ya kokima ya Baprotesta.” Lokola bato yango (Huguenots) bazalaki kosala mosala na bango na kolanda ndakisa ya Calvin, yango etombolaki nkita ya engumba yango, mpe esalaki ete Genève ekóma esika monene ya kobimisa mikanda mpe ya kosala bamontre.Bato mosusu oyo bakimaki mpe bamboka na bango bayaki mpe kaka na Genève, ata baoyo bautaki na Angleterre epai Baprotesta bazalaki konyokolama na mokonzi-mwasi Marie I. Lokola Lingomba ya Calvin esimbamaki mingimingi na bato moke oyo bakimaki bamboka na bango, basalaki lingomba moko ndenge zulunalo moko [Christ in der Gegenwart (Mokristo ya lelo)] elobeli yango ete “teoloji ya bato oyo banyokolami.” Na mobu 1560 bato oyo bakimaki bamboka na bango, babimisaki Bible de Genève, Biblia ya liboso na Lingelesi oyo ekabolamaki na bavɛrsɛ. Lokola ezalaki monene mingi te, Biblia yango esalisaki bato báyekola bango moko Liloba ya Nzambe. Ekoki kozala Biblia oyo bato ya Lingomba ya Puritains bamemaki ntango bakendaki kofanda na nɔrdi ya Amerika na mobu 1620.
Nzokande, engumba Genève ebatelaki te moto nyonso oyo akimaki kuna. Michel Servet, oyo abotamaki na Espagne na mobu 1511, ayekolaki monɔkɔ ya Grɛki, Latin, Ebre, mpe atángaki kelasi ya monganga; ekoki mpe kozala ete akutanaki na Calvin ntango bango mibale bazalaki kotánga na Paris. Servet andimaki na boyekoli na ye ya Biblia ete liteya ya Bosato euti na Makomami te. Alukaki kokomela Calvin mpo na likambo yango, kasi Calvin amonaki ye lokola monguna. Ntango Bakatolike na France banyokolaki Servet, akimaki na Genève, engumba oyo Calvin azalaki. Na esika báyamba ye malamu, bakangaki ye, balobaki ete azali mopɛngwi, mpe batumbaki ye likoló ya nzete na mobu 1553. Friedrich Oehninger, moto moko ya mayele alobi ete: “Tii lelo oyo liwa ya Servet ezalaka likambo moko ya nsɔni na bomoi mpe mosala ya Calvin, moto oyo amemaki mbongwana monene.”
Calvin asalaki mosala monene ntango azalaki kokoba kokokisa mokano na ye ya kokɔtisa mbongwana. Balobaka ete akomá babuku koleka 100 mpe mikanda 1 000 mpe asalá badiskur soki 4 000 na Genève. Na makambo nyonso wana, Calvin apalanganisaki kaka te makanisi etali ndenge oyo Lingomba ya bokristo esengeli kozala, kasi asalaki mpe makasi mpo na kolakisa bomoi oyo mokristo asengeli kozala na yango, mingimingi na Genève, esika oyo azalaki komona ete ezali engumba ya Nzambe. *
Milende oyo Calvin asalaki na Genève eboti mbuma nini? Na kotalela lapolo oyo ebongiseli moko (Swiss Federal Statistics Office) esalaki na mobu 2000, kaka bato moke na Genève (16%) nde bazali na Église réformée (ya Calvin), mpe bato ya Lingomba ya Katolike bazali mingi koleka na engumba yango.
Bokabwani na makambo ya losambo ezalaki bisika nyonso
Mbongwana oyo balukaki kokɔtisa esalaki ete na bingumba mpe na bikólo mingi moto na moto amitya na ngámbo ya Lingomba ya Katolike, ya luthérien, to ya Calvin; yango esalaki ete bokabwani makasi ezala na Mpoto na makambo etali lingomba. Atako batomboki yango bazalaki na bomoko mpo na kotɛmɛla Lingomba ya Katolike, bango na bango mpe bazalaki koyokana te. Witt, moto moko ya mayele oyo totángaki liboso alobi boye: “Matata mpo na mateya ya Nzambe
ezalaki ata na ngámbo ya Baprotesta.” Atako bango nyonso bandimaki ete mateya ya bokristo esengeli kouta na Biblia, bazalaki koyokana te na mateya na bango. Likambo ya libosoliboso ezalaki Elambo ya mpokwa ya Nkolo mpe kozala ya Kristo. Na nsima, Lingomba ya Calvin ebimisaki liteya moko oyo ekɔtisaki mobulu: makambo nyonso etángamá.Bantembe ebimaki mingi mpo na koyeba ndimbola ya likambo yango: makambo nyonso etángamá. Etuluku moko ya bato ya Calvin balobaki ete liboso kutu bato básala lisumu, Nzambe aponaki etuluku moke ya bato oyo bakobika na nzela ya Kristo, mpe bamosusu bakobika te. Na yango, bato yango bazalaki kondima ete lobiko ezalaki ekateli ya Nzambe mpe ete bato nyonso bazali ndenge moko te. Etuluku mosusu ya bato ya Calvin bazalaki kokanisa ete lobiko ezali mpo na bato nyonso, mpe ezali likambo ya moto mokomoko apona soki akondima to akoboya yango. Yango elimbolaki ete lobiko etaleli bonsomi ya kopona oyo moto azali na yango. Tii bambula mingi nsima ya liwa ya Calvin, bato na ye bakobaki kaka na matata na makambo lokola: Lisambisi ya Nzambe, bonsomi ya kopona oyo moto azali na yango, mpe libaku oyo moto nyonso azali na yango.
Mateya ya Calvin enyokolaki bato mosusu
Na ekeke ya 20, Église réformée hollandaise, ebimisaki liteya ete makambo nyonso etángamá mpo na konyokola bato ya mposo moindo na Afrika ya Sudi. Mpo na boyangeli ya mindɛlɛ oyo ezalaki konyokola baindo, Nelson Mandela, prezida ya liboso ya moindo na Afrika ya Sudi alobaki boye: “Likambo yango ya konyokola baindo esimbamaki na Église réformée hollandaise oyo emonisaki ete kokabola mposo ezalaki likambo ya lingomba; emonisaki ete Nzambe aponaki mindɛlɛ mpe baindo bazalaki na ntina mingi te. Mpo na mindɛlɛ yango, likambo ya kokabola baindo na mindɛlɛ ezalaki na boyokani na lingomba.”
Na bambula ya 1990, Lingomba yango esɛngaki bolimbisi polele na ndenge esimbaki likambo ya kokabola baindo na mindɛlɛ. Na maloba oyo ebengami Rustenburg, bakonzi ya mangomba bandimaki boye: “Bamosusu kati na biso tosalelaki Biblia na ndenge ya mabe mpo na kosimba apartheid, yango etindaki bato mingi bákanisa ete ezali etumbu ya Nzambe.” Na boumeli ya bambula, ndenge oyo Lingomba esimbaki apartheid ebimisaki kaka te koyina bato ya mposo mosusu kasi emonisaki ete Nzambe nde azali na foti!
John Calvin akufaki na Genève na mobu 1564, na nsuka, apesaki bandimi na ye mersi “ndenge bapesaki lokumu mingi na ye oyo abongaki te kozwa lokumu ya ndenge wana” mpe asɛngaki bolimbisi mpo na bolɛmbu oyo azalaki na yango ya kozala motema mokuse mpe nkandankanda. Ata soki ezalaki bongo to te, tokoki kowangana te ete bonkɔkɔ ya Baprotesta—makasi na mosala, komipekisa, komipesa na mosala—ekokani mpenza na bomoto mpe bizaleli ya Calvin.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 13 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá buku L’humanité à la recherche de Dieu, nkasa 322-325, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
Mbongwana oyo balukaki kokɔtisa esalaki ete na bingumba mpe na bikólo mingi moto na moto amitya na ngámbo ya Lingomba ya Katolike, ya luthérien, to ya Calvin; yango esalaki ete bokabwani makasi ezala na Mpoto na makambo etali lingomba.
[Karte na lokasa 18]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
ESPAGNE
FRANCE
PARIS
Noyon
Orléans
Bourges
SUISSE
GENÈVE
[Elilingi na lokasa 19]
Buku ya Calvin “Institution” (1536) ezalaki na mateya oyo esimbaki Lingomba ya Protesta
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© INTERFOTO/Alamy
[Elilingi na lokasa 20]
Liwa ya Servet etiká nsɔni na bomoi mpe mosala ya Calvin
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Mary Evans Picture Library
[Elilingi na lokasa 21]
“Bible de Genève” (1560) ezali Biblia ya liboso ya Lingelesi oyo ekabolamaki na bavɛrsɛ
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya American Bible Society
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]
French town: © Mary Evans Picture Library