Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Na bantoma 12, bamosusu bazalaki bandeko ya Yesu?

Makomami epesi eyano polele te na motuna yango. Kasi, na kotalela makambo mosusu oyo bato balobi mpe mimeseno ya ntango wana, tokoki koloba ete bamosusu kati na bantoma 12 bazalaki bandeko ya Yesu.

Bakomi ya Baevanzile bapesi bankombo ya basi oyo bazalaki kotala ntango Yesu azalaki kobundana na liwa likoló ya nzete ya mpasi. Yoane 19:25 etángi basi minei kati na bango: ‘Mama na ye [Maria] mpe ndeko mwasi ya mama na ye; Maria mwasi ya Klopasi, mpe Maria Magadalena.’ Soki tokokanisi vɛrsɛ oyo ndenge Matai mpe Marko balobeli kaka likambo moko wana, ekoki kotinda biso tóloba ete Salome azalaki ndeko mwasi ya mama ya Yesu. Kasi, emonani ete Salome yango azalaki mama ya bana ya Zebede. (Matai 27:55, 56; Marko 15:40) Bana na ye, oyo na bisika mosusu Biblia ebengi bango Yakobo ná Yoane, bazalaki bandeko ya Yesu. Yesu abengaki bandeko yango mibale, oyo bazalaki babomi-mbisi bákóma bayekoli na ye.​—Matai 4:21, 22.

Lisolo moko elobaka ete Klopasi, to Alfe, mobali ya moko ya basi minei oyo balobelami na Yoane 19:25, azalaki ndeko ya Yozefe, tata mobɔkɔli ya Yesu. Soki lisolo yango ezali solo, boye Yakobo mwana ya Alfe, oyo azalaki mpe na kati ya bantoma 12, azalaki mpe ndeko ya Yesu.​—Matai 10:3.

Na ndenge nini Yesu ná Yoane Mobatisi bazalaki bandeko?

Bato mosusu bakanisaka ete mibali yango mibale bazalaki bandeko. Likanisi yango euti na liloba moko oyo ebongolami malamumalamu te na Luka 1:36. Na vɛrsɛ yango, libongoli moko (King James Version) elobi ete Elizabeti, mama ya Yoane, mpe Maria, mama ya Yesu bazalaki bandeko.

Nzokande, mpo na koloba solo, liloba oyo esalelami na Grɛki na vɛrsɛ yango, ezali sikisiki te. Emonisi kaka ete basi yango mibale bazalaki bandeko, emonisi te soki bazalaki bandeko ya ndenge nini. Ndenge buku moko (The Interpreter’s Dictionary of the Bible) emonisi yango, “liloba yango ezali na bandimbola mingi, ezali mpasi koyeba bondeko oyo bazalaki na yango mpenza.” Kasi, likanisi ete Yesu ná Yoane bazalaki bandeko eutá wapi? Buku moko (The Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Makambo nyonso oyo toyebi na ntina na . . . baboti ya Maria . . . euti na makomi ya apokrife.”

Na ndenge yango, Yesu ná Yoane bazalaki bandeko ya mosika.