Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Edene ezalaki esika ya liboso oyo moto afandaki?

Edene ezalaki esika ya liboso oyo moto afandaki?

Edene​—Ezalaki esika ya liboso oyo moto afandaki?

KANISÁ ete ozali na kati ya elanga moko. Motungisi ezali te, pembeni na yo ozali koyoka ata makɛlɛlɛ moko te ya bato oyo bazali konyokwama. Elanga yango ezali monene, mpe eloko moko te ezali kobebisa kimya na yango. Likambo ya malamu koleka, makanisi na yo etungisami ata na eloko moko te, nzoto na yo ezali ata na maladi to mpasi moko te. Ozali na likoki ya komona, koyoka elɛngi ya bilei, koyoka makɛlɛlɛ, koyoka nsolo, to kosimba biloko oyo ezali zingazinga na yo.

Miso na yo ezali komona balangi kitoko ya bafololo, mikɛli ya mai, mpe nkasa kitoko ya nzete mpe matiti na moi. Ozali koyoka ndenge mopɛpɛ ezali kobɛta yo na loposo mpe ozali koyoka nsolo kitoko oyo yango ezali komema. Ozali koyoka makɛlɛlɛ ya nkasa oyo ezali koningana, ndenge mai ezali kokwea na mabanga, makɛlɛlɛ ya bandɛkɛ mpe ya banyama nkɛkɛ. Ntango ozali komona makambo yango na makanisi na yo, okosepela te kozala esika ya ndenge wana?

Bato na mokili bakanisaka ete moto abandaki bomoi na ye na esika ya ndenge wana. Na boumeli ya bikeke mingi, bato ya lingomba ya Bayuda, ya Bokristo, mpe ya Bamizilma bateyamaki na ntina na elanga ya Edene, epai Nzambe atyaki Adama ná Eva, báfanda. Biblia elobi ete bazalaki na bomoi moko ya kimya mpe ya esengo. Bazalaki na kimya bango na bango, na banyama mpe na Nzambe oyo na boboto nyonso apesaki bango elikya ya kozala na bomoi ya seko na esika wana kitoko.​—Ebandeli 2:15-24.

Bato ya Lingomba ya Hindu bazalaka mpe na makanisi ndenge na ndenge na ntina na paradiso ya ntango ya kala. Bato ya Lingomba ya Bouddha bandimaka ete mokambi monene ya lingomba, to Bouddha, abimaki na eleko wana ya malamu na makambo nyonso (l’Âge d’or) ntango mabele ezalaki lokola paradiso. Mangomba mingi mpe ya Afrika eteyaka masolo oyo ekokani na oyo ya Adama ná Eva.

Kutu, likanisi ya paradiso moko ya ebandeli ezali na mangomba mpe bonkɔkɔ ya bato mingi. Mokomi moko alobaki boye: “Bato mingi bandimaka ete na paradiso ya ebandeli bato bazalaki na nzoto ya kokoka, na bonsomi, kimya, esengo, bilei ezalaki mingi, mitungisi mpe kowelana ezalaki te. . . . Makanisi ya ndenge wana etindá bato bázala na mposa ya paradiso oyo ebungá mpe báluka kozongisa yango.”

Ekoki kozala ete masolo yango nyonso mpe mimeseno yango eutá esika moko? Ekoki kozala ete “likanisi wana oyo bato bazali na yango” eutá na likambo moko oyo ezali mpenza solo? Elanga ya Edene ezalaki mpenza na ntango ya kala mpe Adama ná Eva bazalaki mpenza?

Bato mingi batyaka ntembe na likambo yango. Na mikolo na biso oyo makambo ya siansi ekoli, bato mingi balobaka ete makambo yango ezali kaka masolo to masapo mpamba. Likambo ya kokamwa, bato oyo balobaka bongo, nyonso te nde bazali bapakano. Bakonzi mingi ya mangomba batindaka bato bándima likanisi ete elanga ya Edene ezalaki te. Balobaka ete esika ya ndenge wana ezalaki te. Balobaka ete lisolo yango ezali kaka lisapo to lisese mpamba.

Ya solo, Biblia ezali na masese. Yesu mpe alobaki masese oyo eyebani koleka. Nzokande, Biblia elobelaka te lisolo ya Edene lokola lisese, kasi nde lokola likambo ya solo mpenza. Kasi, soki makambo Biblia elobeli esalemaki te, ndenge nini tokoki kondima makambo mosusu oyo ezali na Biblia? Tótala mpo na nini bato mosusu bandimaka te likambo ya elanga ya Edene mpe soki bantina oyo bazali kopesa ebongi mpenza. Na nsima, tokotala ntina oyo lisolo yango etaleli mokomoko na biso.