Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntina oyo lisolo ya Edene etali mpe yo

Ntina oyo lisolo ya Edene etali mpe yo

Ntina oyo lisolo ya Edene etali mpe yo

MOKO ya bantina ya kokamwisa oyo bato ya mayele bapesaka mpo na kotya ntembe na lisolo ya Edene ezali ete mikanda mosusu ya Biblia elobeli yango te. Na ndakisa, Paul Morris, profɛsɛrɛ na makambo ya mangomba akomaki boye: “Ezali mpenza te na bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli mbala moko lisolo ya Edene.” Atako bato mosusu ya mayele bandimaka likanisi na ye, kasi yango eyokani te na bosolo ya makambo.

Biblia ezali na bavɛrsɛ ebele oyo elobeli elanga ya Edene, Adama ná Eva, mpe nyoka. * Kasi, libunga ya bato mosusu ya mayele ezali komonana polele soki tokokanisi yango na libunga mosusu ya monene, oyo epalangani mingi. Ntango bazali kotya ntembe na lisolo oyo mokanda ya Ebandeli elobi mpo na elanga ya Edene, bakonzi ya mangomba mpe bato oyo bandimaka Biblia te bazali kokitisa lokumu ya Biblia. Ndenge nini?

Koyeba oyo elekaki na Edene ezali na ntina mpo na kokanga ntina ya makambo mosusu oyo ezali na Biblia. Na ndakisa, Liloba ya Nzambe ezali mpo na kosalisa biso tózwa biyano na mituna ya ntina mingi oyo bato bamitunaka. Mbala na mbala, Biblia epesaka biyano na mituna wana oyo etali makambo oyo esalemaki na elanga ya Edene. Tótalela mwa bandakisa.

Mpo na nini tonunaka mpe tokufaka? Adama ná Eva balingaki kozala na bomoi libela na libela soki batosaki Yehova. Liwa esengelaki koyela bango kaka soki batomboki. Na mokolo oyo batombokaki, babandaki kokufa. (Ebandeli 2:16, 17; 3:19) Babungisaki nzoto na bango ya kokoka mpe bakokaki kopesa bana na bango kaka lisumu mpe kozanga kokoka. Na yango, Biblia elobi boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.”​—Baroma 5:12.

Mpo na nini Nzambe apesi nzela na mabe? Na elanga ya Edene, Satana alobaki ete Nzambe azali mokosi, mpe ete azalaki kopekisa bikelamu na ye bázala malamu. (Ebandeli 3:3-5) Na ndenge yango, atyaki ntembe na ndenge oyo Yehova azalaki koyangela. Adama ná Eva baponaki kolanda Satana; na ndenge yango babwakaki boyangeli ya Yehova mpe kutu bamonisaki ete moto akoki kokata ye moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Na bosembo na ye ya kokoka mpe bwanya na ye, Yehova ayebaki ete ezali kaka na ndenge moko ya malamu ya koyanola na ntembe wana​—kotika ntango eleka, kopesa bato libaku ya komiyangela bango moko ndenge baponaki. Mabe oyo ezali lelo, eutaka mpo na ndenge Satana azali kokoba kotambwisa bato, yango emonisi mokemoke bosolo ya likambo oyo ete: Moto azali te na likoki ya komiyangela kozanga Nzambe.​—Yirimia 10:23.

Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini? Na elanga ya Edene, Yehova abongisaki lolenge malamu oyo mabele esengeli kozala. Apesaki Adama ná Eva etinda ya kotondisa mabele na bana oyo basengelaki kobota mpe ‘kotya yango na nse na bango,’ mpo mabele mobimba ekóma kitoko ndenge elanga wana ezalaki. (Ebandeli 1:28) Na yango, mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali ete ezala paradiso, efandama na bana ya Adama ná Eva oyo bazali na nzoto ya kokoka mpe na bomoko. Makambo mingi oyo ezali na Biblia elobeli ebongiseli oyo Nzambe azwi mpo na kokokisa mokano na ye ya ebandeli.

Mpo na nini Yesu Kristo ayaki awa na mabele? Botomboki oyo esalemaki na elanga ya Edene ememaki etumbu ya liwa epai ya Adama ná Eva mpe epai ya bana na bango nyonso, kasi na bolingo na ye Nzambe apesaki elikya. Atindaki Mwana na ye na mabele mpo apesa oyo Biblia ebengi lisiko. (Matai 20:28) Yango elimboli nini? Yesu azalaki “Adama ya nsuka”; alongaki esika oyo Adama alongaki te. Yesu abatelaki bomoi na ye ya kokoka na ndenge akobaki kotosa Yehova. Na nsima, apesaki bomoi na ye lokola mbeka to lisiko, apesaki bato nyonso ya sembo likoki ya kozwa bolimbisi ya masumu na bango mpe nsukansuka kozwa lolenge ya bomoi oyo Adama ná Eva bazalaki na yango na Edene liboso básala lisumu. (1 Bakorinti 15:22, 45; Yoane 3:16) Na yango, Yesu apesaki ndanga ete mokano ya Yehova ya kobongola mabele paradiso ekokokisama. *

Mokano ya Nzambe eyebani polele, ezali te liteya moko ya lingomba oyo ezangi ndenge ya kolimbola yango. Ezali likambo ya solo. Kaka ndenge elanga ya Edene ezalaki esika ya solo awa na mabele, na banyama mpe bato ya solo, ndenge moko mpe bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya ezali solo, likambo oyo ekosalema mosika te. Ezali mpe elikya na yo mpo na mikolo ezali koya? Etali kaka yo. Nzambe alingi ete bato mingi, ata mpe bato mabe bázwa libaku yango.​—1 Timote 2:3, 4.

Ntango Yesu azalaki kobundana na liwa, asololaki na moto moko oyo bomoi na ye esukelaki ye mabe. Moto yango azalaki mobomi-bato; ayebaki ete abongaki kokufa. Kasi, alukaki libɔndisi mpe elikya epai ya Yesu. Yesu alobaki na ye nini? “Okozala na ngai na Paradiso.” (Luka 23:43) Soki Yesu andimi komona mobomi-bato yango kuna​—asekwa mpe azwa libaku ya kozala na bomoi libela na libela na paradiso oyo ekozala lokola elanga ya Edene—​akoboya ete yo mpe ozwa mapamboli yango? Akoboya te! Tata na ye mpe akoboya te! Soki olingi mapamboli yango, salá nyonso oyo okoki mpo na koyekola makambo na ntina na Nzambe oyo asalaki elanga ya Edene.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 8 Mpo na koyeba makambo mingi na ntina na mbeka ya lisiko ya Kristo, talá mokapo 5 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda/Bililingi na lokasa 10]

ESAKWELI OYO ESIMBI MAKAMBO NYONSO OYO EZALI NA BIBLIA

“Nakotya bonguna kati na yo [nyoka] ná mwasi mpe kati na momboto na yo ná momboto na ye. Ye akopanza motó na yo mpe yo okozokisa ye na litindi.”​—Ebandeli 3:15.

Yango ezali esakweli ya liboso ya Biblia oyo Nzambe alobaki na Edene. Bato minei oyo balobeli: mwasi, momboto na ye, nyoka mpe momboto na ye ezali banani? Na ndenge nini “bonguna” ezali kati na bato yango?

NYOKA

Satana Zabolo.​—Emoniseli 12:9.

MWASI

Ebongiseli ya Yehova oyo esangisi bikelamu na ye ya likoló. (Bagalatia 4:26, 27) Yisaya alobelaki “mwasi,” alobaki ete akobota ekólo moko ya elimo.​—Yisaya 54:1; 66:8.

MOMBOTO YA NYOKA

Baoyo baponaka kosala mokano ya Satana.​—Yoane 8:44.

MOMBOTO YA MWASI

Libosoliboso ezali Yesu Kristo oyo autaki na eteni ya ebongiseli ya Yehova na likoló. Na “momboto” yango, ezali mpe na bandeko ya Kristo ya elimo oyo bakoyangela elongo na ye. Bakristo yango oyo batyami mafuta na elimo basali ekólo ya elimo, “Yisraele ya Nzambe.”​—Bagalatia 3:16, 29; 6:16; Ebandeli 22:18.

MPOTA NA LITINDI

Mpasi makasi oyo ezwaki Masiya, kasi ezalaki mpasi ya libela te. Satana alongaki kosala ete Yesu akufa awa na mabele. Nzambe asekwisaki Yesu.

MPOTA NA MOTÓ

Liwa mpo na Satana. Yesu akolongola Satana mpo na libela. Liboso likambo yango esalema, Yesu akolongola mabe oyo Satana abandisaki na Edene.​—1 Yoane 3:8; Emoniseli 20:10.

Mpo na koyeba mpenzampenza motó ya likambo ya Biblia, talá mwa buku La Bible​—Quel est son message? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 11]

Adama ná Eva banyokwamaki na makambo oyo lisumu ememaki