Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia ebongolaka bato

Biblia ebongolaka bato

Biblia ebongolaka bato

MPO na nini moyembi moko oyo ayebanaki mingi atikaki mosala na ye mpo na komipesa mingi na mosala ya kosakola? Mpe nini esalisaki moto moko oyo azalaki kosala makambo ya mabe mingi, oyo zuzi moko alobaki ete akoki kobongwana te, akóma moto moko ya malamu? Tángá masolo oyo mpo ozwa biyano.

“Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale.”​—ANTOLINA ORDEN CASTILLO

ABOTAMAKI NA: 1962

EKÓLO: ESPAGNE

BOMOI NA YE YA KALA: MOTO YA TEYATRE MPE MOYEMBI

NDENGE NAZALAKI: Nabotamaki na mwa mboka ya Tresjuncos, na etúká ya La Mancha. Libota na biso ezalaki kosala mosala ya bilanga. Mama azalaki mondimi ya Katolike mpe tata azalaki mondimi ya Protesta. Tata ateyaki ngai nazala na limemya mpo na Biblia; nazalaki komona ye azali kotánga yango ntango nyonso. Kasi, mama abɔkɔlaki ngai na mateya ya Katolike mpe azalaki komema ngai na misa mikolo nyonso ya lomingo.

Ntango nazalaki na mbula 15, nalongwaki na mboka mpe nakendeki kofanda na Madrid epai ya yaya na ngai ya mwasi. Nazalaki ntango nyonso kokanisa baboti na ngai, kasi nsukansuka namesanaki na bomoi ya vile. Ntango nakómaki na mbula 17, nazwaki libaku ya kosala mwa basanza lokola mosani ya zarzuela, miziki mpe teyatre ya bato ya Espagne. Nasepelaki mingi na bomoi yango mpe nazwaki ekateli ya kokóma mosali ya teyatre. Nakataki mateya ya sɛkrɛtɛrɛ oyo nazalaki kolanda mpe nabandaki koyemba na bisika mingi ya miziki yango. Na ntango wana, nakómaki kobima na yaya ya moninga na ngai moko ya mwasi. Namonaki ete nazwi libaku ya kozwa mosala ya malamu, mbongo mpe moto oyo alingi ngai.

Nabandaki kotambola na bisika ndenge na ndenge ya miziki yango na Espagne mobimba, ezala mpe na bikólo mosusu, na ndakisa Colombie, Costa Rica, Équateur mpe Venezuela. Nayembaki mpe na bituluku ndenge na ndenge ya miziki ya bonkɔkɔ na Madrid oyo eyebani na nkombo ya “La movida madrileña.” Moko ya bituluku oyo ngai nazalaki moyembi monene ekómaki na lokumu mingi.

Nazalaki kosepela na mosala yango, kasi te na makambo ya mbindo oyo ezalaki kosalema kuna. Lisusu, nakómaki komitungisa mingi na ndenge oyo nakomonana na miso ya bato mpe na oyo nakosala mpo bato bamonaka ngai ete nazali moyembi monene. Nakómaki kopona biloko ya kolya mpo nakóma monene te.

Mokano na ngai ya libosoliboso ezalaki kaka ya kokóma mosani monene ya teyatre. Nsukansuka, bandimaki ngai na Eteyelo ya Madrid oyo elakisaka bato kobina mpe kosala bateyatre. Bateyaki biso ete mpo na kosala teyatre malamu, esɛngaka ete mosani akanisa na mozindo ndenge moto oyo ye azali komonisa azali koyoka, mpe komonisa oyo ya ye moko mpe azali koyoka ndenge wana. Ntango nasalelaki mateya yango, namonaki ete nazalaki na eloko moko te na kati na ngai. Nakómaki mwasi moko mpamba, mpe ya moimi.

NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Nayebaki ete mpo nakóma na bizaleli ya malamu, nasengeli kosala makasi. Kasi nayebaki te nabanda wapi. Nazwaki ekateli ya kokende na lingomba ya Évangelique na Madrid, lingomba oyo nakendaká mbala moko ná baboti na ngai. Nabondelaki Nzambe, nasalelaki nkombo na ye Yehova.

Na nsima, eumelaki te Batatoli ya Yehova mibale bayaki epai na ngai. Nasepelaki mpenza kosolola masolo ya Biblia na bango, kasi nabimisaki mpe ntembe mingi na makambo oyo bazalaki koteya. Esther, Motatoli ya Yehova oyo azalaki koyekola na ngai Biblia, azalaki mpenza motema molai. Ye ná libota na ye basalelaki ngai makambo na bolingo mpe na boboto mpenza. Nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, mpe eumelaki te namonaki ete nazwi solo oyo nazalaki koluka.

Nautaki kosilisa kelasi ya koyekola kobina mpe kosala bateyatre, mpe misala ndenge na ndenge ya malamu ebandaki komonana. Bapesaki ngai mokumba moko ya kosala na teyatre moko ya monene oyo elingaki kosalema na Madrid. Kasi, namonaki mpe ete mpo na kolonga na mosala ya teyatre, nasengeli komipesa mobimba mpenza. Nsukansuka, nazwaki ekateli ya komeka koluka mosala mosusu, mosala oyo ekopesa ngai nzela ya komipesa na kosalela Nzambe. Namonaki bosolo ya maloba oyo ya Yesu: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo to akoyina oyo mpe akolinga mosusu, to akokangama na oyo mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.” (Matai 6:24) Makango na ngai oyo toumelá na ye mbula mwambe, aboyaki mateya oyo ngai nakómaki kolanda, na yango namonaki malamu tokabwana. Kotika makambo wana nyonso ezalaki pɛtɛɛ te.

MATOMBA OYO NAZWI: Lelo oyo, nasalaka mosala ya ntango mokuse; nasalisaka mibange. Kosala bongo, epesaka ngai nzela ya kolekisa ntango mingi na koteya Biblia epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Arabe, oyo bafandaka epai nazali. Nasengelaki kosala makasi mpo na koyekola monɔkɔ wana ya sika, kasi nasepelaka mpenza koyebisa makambo kitoko oyo nayekoli epai ya bato oyo bayambaka biso na boboto mpenza, mpe oyo basepelaka koyekola makambo ya Nzambe.

Sikoyo, nayokaka lisusu te lokola nazangi eloko, mpo nayebá ntina ya bomoi. Namonaka ete Yehova asalisi ngai mpo nakóma moto ya malamu mpe ya esengo mpenza.

“Namonisaki ete maloba ya zuzi ezali solo te.”​—PAUL KEVIN RUBERY

ABOTAMAKI NA: 1954

EKÓLO: ANGLETERRE

BOMOI NA YE YA KALA: MOTO YA MOBULU

NDENGE NAZALAKI: Nabotamá na Dudley, engumba moko ya monene na West Midlands. Bandá bomwana na ngai, tata asalisaki ngai nalingaka kotánga. Azalaki mpe kolendisa ngai nazala na botɔndi mpo na biloko ya kokamwa oyo ekelamá, atako ye moko azalaki koloba ete biloko yango ebimá yango moko. Azalaki koteya ngai ete Nzambe azalaka te. Atako bongo, baboti na ngai batindaki ngai na eteyelo ya mokolo ya lomingo na Lingomba ya Metodiste ya mboka na biso.

Ntango nazalaki na mbula mwambe, namonaki bana mibali ya mboka na biso batumbi masuwa oyo ezalaki koleka na nzela oyo babongisá mpo masuwa elekaka. Bapolisi bayaki, kasi mpo na kobanga, nayebisaki bango te makambo oyo namonaki. Bana mibali yango babangisaki ngai. Bakosaki ete ngai nde moto natii mɔtɔ wana mpe nasilikaki. Mpo na nkanda wana, nabebisaki biteyelo, bandako-nzambe mpe baizine ya mboka na biso, mpe biloko nyonso wana oyo nabebisaki ezalaki ya bankóto ya dolare. Ntango nakómaki na mbula zomi, nabandaki kokɔta na bandako mpe na bamagazini mpo na koyiba. Nakómaki kosepela na mɔtɔ mpe natumbaki bandako mpe mituka mingi. Na eteyelo, balakisi bazalaki kobenga ngai mwana ya mobulu.

Ntango nakómaki na mbula 12, namonaki buku moko ya maji mpe nasalaki mwa tablo na ngai ya koyeba makambo oyo ebombaná. Lokola baboti na ngai bazalaki kondima Nzambe te, bakanisaki ete ndenge oyo nakómaki kosala misala ya bilimo mabe ezalaki kaka mpo na kosakana, mpe ekobatela ngai mpo nasalaka mobulu te. Kasi, ntango natikaki kotánga, nasambisamaki mbala ebele na tribinale ya bana mike. Nakɔtaki na etuluku moko ya bilenge ya mobulu oyo bakokolaka nsuki nyonso ya motó. Nazalaki komema razware mpe shɛnɛ ya velo lokola bibundeli. Nazwaki mosala kasi nabungisaki yango mpo nakɔtaki bolɔkɔ mpo na mwa ntango. Ntango nabimaki, nabandaki lisusu kobukabuka bandako mpe bakangaki ngai mpe bakatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ mbula mibale. Zuzi alobaki ete nakobonga lisusu te mpe nazali likama mpo na mboka.

Ntango nabimaki na bolɔkɔ, nakutanaki na Anita, makango na ngai ya kala. Tobalanaki, mpe mpo na mwa ntango nayibaki te mpe nasalaki lisusu mobulu te. Kasi, nsima ya mwa bambula, nazongelaki bomoi na ngai ya mobulu. Nabandaki kokɔta na bisika bato basalaka mimbongo mpe koyiba na bisika oyo babombaka biloko na bango ya motuya. Nabandaki komɛla bangi, komɛla masanga mingi mpe kotambola na mondoki. Bakangaki ngai lisusu mpe bakɔtisaki ngai na bolɔkɔ.

Bomoi na ngai wana ezalaki kopesa Anita mpasi mingi. Monganga na ye akomelaki ye bankisi ya kokitisa mpasi, kasi ayebisaki ye ete likambo oyo asengeli mpenza kosala, ezali koboma libala. Likambo ya esengo mpo na ngai, Anita alandaki toli na ye te.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na ebandeli ya libala na biso, Batatoli ya Yehova bayekolaki na Anita Biblia mpo na mwa ntango moke. Na nsima, ntango nazalaki na bolɔkɔ mpo na mbala ya nsuka, Batatoli ya Yehova bayaki lisusu epai na ye. Esalemaki mpe ete kaka na mokolo yango, nabondelaki Nzambe ete: “Soki mpenza ozali, monisá ngai yango.”

Ntango nabimaki na bolɔkɔ mwa basanza na nsima, nakutanaki na sango moko ya mboka na biso mpe nasɛngaki ye ayekola na ngai mpe Anita Biblia. Alobaki ete akoteya biso kaka mateya ya minene ya lingomba mpe libondeli moko.

Nsukansuka, nabandaki kotánga Biblia. Nakamwaki koyeba ete Biblia epekisi misala ya bilimo mabe. (Kolimbola Mibeko 18:10-12) Na nsima, nazwaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko oyo Batatoli ya Yehova batikelaki Anita mokolo oyo nabondelaki Nzambe ete asalisa ngai. Makambo oyo natángaki etindaki ngai nakutana na Batatoli ya Yehova.

Mabota na biso, baninga na biso mpe bato ya etuluku na ngai ya mobulu basepelaki te koyoka ete Batatoli ya Yehova bazali koyekola na ngai ná Anita Biblia. Basusu balobaki ete bakómi kondimisa ngai makambo na makasi. Mpo na koloba solo, makanisi na ngai esengelaki kopɛtolama. Nazalaki na bizaleli mingi ya mabe, lisosoli na ngai ezalaki kosala lisusu malamu te, mpe na makambo mosusu ya mabe oyo nazalaki kosala, nazalaki mpe komɛla mbuma ya makaya tii 60 na mokolo. Batatoli ya Yehova oyo basalisaki biso tóyekola Biblia mpe baoyo tozalaki koyangana elongo na bango na lisangá moko, bazalaki mpenza motema molai mpe boboto. Nsukansuka, natikaki bizaleli na ngai wana ya mabe.​—2 Bakorinti 7:1.

MATOMBO OYO NAZWI: Ngai ná Anita tokokisi mbula 35 na libala. Moko ya bana na biso mpe bankɔkɔ na biso mibale bazali kosalela Yehova elongo na biso. Na bambula oyo euti koleka, ngai ná Anita tolekisaki ntango mingi mpo na kosalisa basusu bayekola Biblia.

Kosalela Yehova Nzambe esali ete bomoi na biso ezala na ntina mpenza. Na mobu 1970, zuzi moko ayebisaki tribinale ete ngai nakobonga lisusu te. Kasi, na lisalisi ya Nzambe mpe toli ya Biblia, namonisaki ete maloba ya zuzi ezali solo te.