Bato ya kimya balongisi lokumu na bango
MOKANDA EPAI YA BANA-MBOKA YA RUSSIE: Ntango lisolo oyo ekobima, bamilio ya bato na mikili koleka 230 bakoyeba ndenge ekólo Russie ebebisaki bonsomi ya losambo kaka mpamba. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali zulunalo oyo ebongolami mingi mpe ekabolami mingi koleka mikanda mosusu na mokili. Lisolo oyo ekobima na minɔkɔ 188. Zulunalo yango ekobimisama na motángo ya milio koleka 40. Bakonzi mosusu bakolinga te ete mokili mobimba eyeba makambo oyo Batatoli ya Yehova bazali kokutana na yango na Russie. Kasi, maloba oyo ya Yesu ekokokisama: “Ezali na eloko moko te oyo babombá malamu oyo ekomonisama te, mpe ezali na sekele moko te oyo ekoyebana te.”—LUKA 12:2.
NA SANZA ya Desɛmbɛ 2009 mpe ya Yanuali 2010, batribinale mibale ya minene na Russie elobaki ete Lingomba ya Batatoli ya Yehova ezali lingomba oyo ezali kobimisa mobulu na mboka. Emonani lokola ete makambo oyo eleká ezali kozonga lisusu. Ntango Union soviétique ezalaki koyangela Russie, bato bakoselaki bankóto ya Batatoli ya Yehova makambo ete bazali banguna ya ekólo. Bakimaki mboka, bakɔtaki bolɔko mpe batindaki bango na bakaa epai bazalaki kosalisa bango misala ya makasi. Nsima ya kokwea ya boyangeli yango, bazuzi balobaki ete Batatoli ya Yehova bazali na foti te. Guvɛrnema ya sika ezongiselaki Batatoli ya Yehova lokumu na bango. * Lelo oyo lisusu, bato mosusu bazali na ekateli ya kokosela Batatoli ya Yehova makambo.
Na ebandeli ya 2009, bakonzi babandaki kopekisa Batatoli ya Yehova básambela te na kimya nyonso. Kaka na sanza ya Febwali, bazuzi basalaki baankɛtɛ koleka 500 na ekólo yango mpo na makambo ya Batatoli ya Yehova. Mpo na nini basalaki yango? Mpo na koyeba soki Batatoli ya Yehova babukaka mibeko ndenge bazalaki kokanisa. Na basanza oyo elandaki, bapolisi babimisaki mobulu na makita ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki kosalema na Ndako ya Bokonzi mpe na bandako ya Batatoli. Babɔtɔlaki mikanda mpe biloko ya Batatoli ya Yehova. Bakonzi babenganaki baavoka oyo bazalaki kosamba mpo na Batatoli mpe bapekisaki bango bázonga lisusu te na ekólo yango.
Na mokolo ya 5 Ɔkɔtɔbɛ 2009, basali ya douane bakangaki mikanda oyo elimbolaka Biblia pene na ndelo ya Saint-Pétersbourg.
Mikanda yango enyatamaki na Allemagne mpe ebongisamaki mpo na masangá mingi ya Russie. Etuluku moko ya bato ya douane na Russie oyo batalaka biloko mabe oyo ekɔtaka mpe ebimaka na ndenge ya moyibi, batalaki mikanda yango. Mpo na nini? Mokanda moko oyo eutaki epai ya bakonzi elobaki ete mikanda yango “ekoki kozala na makambo oyo ekobimisa kowelana na kati ya mangomba.”Mosika te botɛmɛli yango ekómaki makasi mpenza. Batribinale minene ya Russie mpe République ya Altaï (oyo ezali na kati ya Russie) elobaki ete mikanda mingi oyo Batatoli basalelaka, ezala mpe zulunalo oyo ozali kotánga etindaka bato na mobulu. Batatoli ya Yehova bafundaki likambo yango, bikólo mingi emitungisaki mpo na likambo yango, kasi likambo moko esalemaki te. Bikateli oyo bakonzi bazwi mikolo oyo, epekisi kokɔtisa to kokabola mikanda yango oyo elimbolaka Biblia.
Batatoli ya Yehova balingaki kosala nini na milende wana oyo bato basalaki mpo na kobebisa lokumu na bango mpe kopekisa mosala na bango? Mpe mibeko ya bazuzi ekoloba nini mpo na bonsomi ya losambo ya bana-mboka nyonso ya Russie?
Oyo bandeko basalaki
Na mokolo ya mitano 26 Febwali 2010, Batatoli soki 160 000 na Russie mobimba babandaki kokabola batrakte ya ntina mingi milio 12 oyo ezalaki na motó ya likambo Ekokaki kosalema lisusu? Motuna mpo na bana-mboka ya Russie. Na ndakisa na Usol’ye-Sibirskoye, engumba moko ya Sibérie, ebele ya Batatoli bayanganaki na babalabala na ngonga ya 5:30 na ntɔngɔ. Kati na bango ezalaki na bamosusu oyo bakimaká na Sibérie na 1951 mpo na kondima na bango. Kozanga kobanga malili makasi (-40°C.) bakabolaki batrakte 20 000 oyo bapesaki bango.
Mpo na koyebisa ete bakosala kampanye mikolo misato, Batatoli ya Yehova basalaki likita na Moscou, mboka-mokonzi ya Russie elongo na bapanzi-nsango. Kati na bato oyo babengamaki mpo na koloba, ezalaki Lev Levinson, moto ya mayele na makambo etali ntomo ya bato. Alobelaki na mokuse monyoko ezangá ntina mpe botɛmɛli oyo Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango na boyangeli ya Nazi na Allemagne, mpe na Union soviétique mpe alobelaki ndenge emonisamaki polele mbala na mbala ete Batatoli bazali na likambo te. Alobaki mpe ete: “Mokonzi ya ekólo, Yeltsin, abimisaki mobeko ete mangomba nyonso oyo enyokwamaki na boyangeli ya Union soviétique ezwa bonsomi. Mpe bázongisela bango biloko na bango nyonso oyo babungisaki. Bázongisela mpe Batatoli ya Yehova lokumu na bango, eloko ya motuya oyo babungisaki na boyangeli ya Union soviétique.”
Lokumu na bango wana ekómi lisusu na likama. Levinson moto yango ya mayele oyo tolobelaki, alobaki boye: “Kaka na ekólo wana oyo eyokaki mawa mpo na mabe oyo esalaki, bazali lisusu kotɛmɛla mpenza bato na makambo oyo ezangá motó na makolo.”
Kampanye yango ebotaki mbuma
Kampanye ya kokabola trakte yango ekokisaki mokano na yango? Levinson alobaki boye: “Ntango nazalaki kokende na likita ya Batatoli [ná bapanzi-nsango], namonaki bato bafandi na bisika bazwaka engbunduka mpe kotánga mwa trakte oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kokabola lelo na Russie mobimba. . . . Bato bafandaki mpe bazalaki kotánga yango; mpe bazalaki kotánga yango na likebi.” * Na ndakisa tótala makambo oyo elandi.
Mwasi moko ya mobange oyo afandaka na etúká moko ya Russie oyo Bamizilma bazalaka mingi, azwaki trakte moko mpe atunaki soki ezalaki kolobela nini. Ntango bayebisaki ye ete ezalaki kolobela ntomo ya bato mpe bonsomi na Russie, akamwaki mpe alobaki boye: “Sikoyo moto moko atye likebi na makambo oyo! Na likambo oyo, ekólo Russie ezali kozongela makambo oyo ezalaki na Union soviétique. Mersi mingi. Bosali malamu!”
Mwasi moko na engumba Chelyabinsk oyo bapesaki ye trakte alobaki boye: “Nautaki kozwa trakte yango mpe na natángi yango. Nandimeli mpenza bino. Nayebi te soki lingomba mosusu ekoki kokɔtela kondima na yango na ndenge ya malamu ndenge oyo bino bosali. Nasepelaka mpenza na ndenge na bino ya kolata, mpe bosololaka na bato na limemya. Ezali polele ete bondimaka mpenza mateya na bino. Namoni lokola Nzambe azali na bino.”
Na engumba Saint-Pétersbourg, batunaki mobali moko oyo alobaki ete autaki kozwa trakte ayebisa soki asepelaki na makambo
oyo atángaki. Ayanolaki ete: “Ɛɛ nasepeli. Ntango nazalaki kotánga yango, nayokaki malili na nzoto, nalelaki kutu. Nkɔkɔ na ngai ya mwasi oyo akɔtaki bolɔko [na ntango Union soviétique] ayebisaki ngai makambo mingi mpo na bato mosusu oyo bazalaki na bolɔkɔ ná ye. Ezalaki na baoyo mingi basalaki mabe, kasi ezalaki mpe na baoyo basalaki likambo te kasi batyaki bango na bolɔkɔ mpo na kondima na bango. Nakanisi ete moto nyonso asengeli koyeba makambo oyo elekaki; na yango bozali kosala mpenza malamu.”Makambo ekozala ndenge nini na Russie na mikolo ezali koya?
Batatoli ya Yehova basepelaka na mwa bonsomi oyo bazwaki na Russie na boumeli ya mbula 20 oyo eleki. Atako bongo, bayebaka mpe malamu ete bonsomi yango ekoki kolongolama ata ntango nini. Atako makambo mingi ya lokuta oyo euti kolobama mpo na Batatoli emonisi ete ekólo Russie ezali kozongela lisusu makambo na yango ya mabe, toyebi te soki ekosuka ndenge nini.
Nzokande, Batatoli ya Yehova bazali mpenza na ekateli ya kokoba kosakola nsango ya kimya mpe ya elikya oyo ezali na Biblia, ata soki bakutani na likambo nini. Trakte sipesiale elobeli na mokuse ekateli na bango boye: “Monyoko ekolonga te. Tokotika te koloba na ndenge ya mayele mpe na limemya na ntina na Yehova Nzambe mpe Liloba na ye, Biblia. (1 Petro 3:15) Totikaki kosakola te ntango Banazi banyokolaki biso na Allemagne, totikaki mpe te ntango ekólo na biso enyokolaki biso, mpe lelo oyo tokotika te.—Misala 4:18-20.”
^ par. 3 Talá etanda “Mikanda ya kondimama.”
^ par. 13 Bangonga mingi liboso ete likita ná bapanzi-nsango ebanda, masangá ya Batatoli ya Yehova na Moscou ebandaki kokabola trakte yango.