Bobola makasi ezalaka ndenge nini?
Bobola makasi ezalaka ndenge nini?
BOBOLA makasi ezali likama mpo na bomoi. Yango elimboli kozanga bilei, mai mpe esansi to petrole oyo esengeli; elimboli mpe kozanga esika ya kolala ya malamu, lisalisi ya monganga mpe kotánga kelasi. Enyokolaka bato miliare moko, motángo oyo ekoki kozala pene na motángo ya bato nyonso ya mikili ya Amerika. Kasi, bato mingi na mikili lokola Mpoto ya wɛsti mpe Amerika ya nɔrdi bamoná naino te moto oyo azali na bobola makasi. Tóyoka naino mwa ndambo ya bato oyo bazali na bobola.
Mbarushimana ná mwasi mpe bana na bango mitano, bafandaka na Rwanda, na Afrika. Mwana na bango ya motoba akufaki na malaria. Mbarushimana alobi boye: “Tata akabolelaki biso bana na ye motoba mabele na ye. Eteni ya mabele oyo ngai nazwaki ezalaki moke mpenza, yango wana namemaki libota na ngai na vile. Ngai ná mwasi na ngai tosalaka mosala ya komema basaki ya mabanga mpe ya zɛlo. Ndako na biso ezali na maninisa te. Totokaka mai na libulu moko oyo ezali na biro ya bapolisi. Mbala mingi, tolyaka kaka mbala moko na mokolo, kasi soki mosala ezali te, tozangaka bilei mokolo mobimba. Soki esalemi bongo, nabimaka—nakokaka te koyoka bana bazali kolela mpo na nzala.”
Victor ná Carmen basalaka mosala ya kobongisa basapato mpo na kobikela. Bango ná bana na bango mitano bafandaka na engumba moko mosika na ekólo Bolivie. Bafutelaka shambre moko na ndako moko ya mabemabe oyo batongá na babriki ya mabele, oyo manzanza ya nsamba na yango etɔbɔkatɔbɔka mpe kura ezalaka te. Lokola bana bazalaka mingi na eteyelo mpe bisika ya kofanda ezalaka moke, Victor asengeli kosalelaka mwana na ye ya mwasi banc mpo afandela na kelasi. Mobali yango ná mwasi na ye basengeli kotambolaka kilomɛtrɛ 10 mpo na kokata nkoni ya kolambela biloko mpe kotɔkisa mai ya komɛla. Carmen alobi ete: “Tozali na twalɛti te. Yango wana, tokendaka kaka na ebale, epai tosukolaka mpe tobwakaka bosɔtɔ. Mbala mingi Bana babɛlaka.”
Francisco ná Ilídia bafandaka na etúká moko ya Mozambique. Bana na bango minei ya mike babikaki; moko akufaki na malaria mpo minganga baboyaki kosalisa ye na lopitalo. Mobali yango ná mwasi na ye balonaka loso mpe mabɛngɛ mingi na mwa eteni ya mabele na bango mpo na kozwa biloko ya kolya ya sanza misato. Francisco alobi ete: “Ntango mosusu mbula ebɛtaka te to miyibi bayibaka biloko oyo tolonaki, yango wana nakataka banzete ya bambu
mpe natɛkaka yango mpo nakozwa mwa mbongo. Totambolaka mpe ngonga mibale mpo na kokende koluka nkoni na zamba. Ngai ná mwasi na ngai tomemaka, moto na moto liboke ya nkoni, moko mpo na kolambela pɔsɔ mobimba mpe mosusu mpo na kotɛka.”Bato mingi bamonaka ete ezali mpenza mabe mpe ezali sembo te na mokili, ete moto moko likoló bato nsambo azala na bomoi lokola Mbarushimana, Victor mpe Francisco, nzokande bamiliare ya bato mosusu bazali kodondwa na bomɛngo. Bato mosusu bamekaki kosala mwa eloko mpo na likambo yango. Lisolo oyo elandi elobeli milende oyo basalaki mpe bilikya na bango.
[Elilingi na nkasa 2, 3]
Carmen ná bana na ye mibale, bazali kotɔka mai na ebale