Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elikya ezali mpo na bato oyo bakufá?

Elikya ezali mpo na bato oyo bakufá?

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Elikya ezali mpo na bato oyo bakufá?

Lisolo oyo ebimisi mituna oyo omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kolobela biyano yango elongo na yo.

1. Elikya nini ezali mpo na bato oyo bakufá?

Ntango Yesu akómaki na Betani pene na Yerusaleme, moninga na ye Lazare asilaki kokufa eleki mikolo minei. Yesu akendaki na lilita elongo na Marta mpe Maria, bandeko ya mowei. Eumelaki te, bato mingi bayanganaki. Okoki kokanisa esengo oyo Marta mpe Maria bazalaki na yango ntango Yesu asekwisaki Lazare?​—Tángá Yoane 11:20-24, 38-44.

Marta azalaki kondima ete bakufi bakosekwa. Basaleli ya sembo ya Yehova bayebaka ete na mikolo ezali koya, Nzambe akosekwisa bakufi mpo bázala na bomoi lisusu awa na mabele.​—Tángá Yobo 14:14, 15.

2. Bakufi bazalaka ndenge nini?

Atako nguya ya bomoi to “elimo” esalaka ete moto mpe nyama bázala na bomoi, kasi tozali te na molimo oyo ezalaka na kati ya nzoto. (Mosakoli 3:19; Ebandeli 7:21, 22) Tozali bikelamu oyo Nzambe asalaki na putulu ya mabele. (Ebandeli 2:7; 3:19) Ntango bɔɔngo na biso ekufi, makanisi na biso ekufi. Yango wana, ntango Lazare asekwaki alobaki te ete amonaki likambo boye to boye, mpo bakufi bayebaka eloko moko te.​—Tángá Nzembo 146:4; Mosakoli 9:5, 10.

Ezali polele ete bakufi bakoki te konyokwama. Na yango, liteya oyo elobaka ete Nzambe anyokolaka bato nsima ya liwa ezali lokuta. Ekoselaka Nzambe makambo. Ayinaka mpenza likanisi ya konyokola bato na mɔtɔ.​—Tángá Yirimia 7:31.

3. Tokoki kosolola na bakufi?

Bakufi bakoki koloba te. (Nzembo 115:17) Kasi ntango baanzelu ya mabe balobaka na bato, bakosaka bango bákanisa ete ezali nde elimo ya moto oyo akufaki. (2 Petro 2:4) Yehova apekisi koluka kosolola na bakufi.​—Tángá Kolimbola Mibeko 18:10, 11.

4. Banani bakosekwa?

Na mokili ya sika, bamilio ya bato oyo bazali na malita bakozonga na bomoi. Ata bato mosusu oyo basalaki makambo ya mabe mpo bayebaki Yehova te bakosekwa.​—Tángá Luka 23:43; Misala 24:15.

Bato oyo bakosekwa bakozala na likoki ya koyekola solo na ntina ya Nzambe mpe kondimela Yesu mpe kotosa ye. (Emoniseli 20:11-13) Baoyo bakozonga na bomoi mpe bakosala makambo ya malamu, bakozala na likoki ya kosepela na bomoi ya seko awa na mabele. Nzokande, bato mosusu oyo bakosekwa bakokoba kosala makambo ya mabe. Lisekwa na bango ekozala “lisekwa ya kosambisama.”​—Tángá Yoane 5:28, 29.

5. Lisekwa emonisi biso nini mpo na Yehova?

Lisekwa ekozala mpo Nzambe atindaki Mwana na ye apesa bomoi na ye mpo na biso. Na yango, lisekwa emonisi motema boboto monene ya Yehova.​—Tángá Yoane 3:16; Baroma 6:23.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 6 mpe 7 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 16]

Adama akelamaki na putulu ya mabele