Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge baoyo bazoki na motema bakoki kolendisama

Ndenge baoyo bazoki na motema bakoki kolendisama

Pusaná penepene na Nzambe

Ndenge baoyo bazoki na motema bakoki kolendisama

‘YEHOVA akoki soki moke te kolinga ngai.’ Wana ezali maloba ya mokristo moko ya mwasi oyo azalaki kotungisama mingi na makanisi. Amonaki lokola ete Yehova azali mosika na ye. Yehova azali mpenza mosika na basambeli na ye oyo mbala mosusu bazali kotungisama na makanisi? Eyano ya kolendisa ezali na maloba ya mokomi ya nzembo Davidi, maloba oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo na Nzambe na Nzembo 34:18.

Davidi ayebaki ndenge oyo konyokwama na makanisi ekoki kosala mosambeli ya sembo ya Yehova. Ntango azalaki elenge, Davidi azalaki kokima mokonzi Saulo, oyo azalaki kolanda ye ntango nyonso, mpo azalaki na zuwa mpe alukaki koboma ye. Davidi akimaki na esika oyo akanisaki ete Saulo akokaki te kolanda ye kuna​—na Gate, engumba ya banguna na ye na teritware ya Bafilistia. Ntango bayebaki ye, Davidi abikaki na ndenge akosaki lokola azali moto ya ligboma. Davidi apesaki Nzambe nkembo na ndenge abikisaki ye, mpe mpo na yango akomaki Nzembo ya 34.

Davidi amonaki nde ete Nzambe azali mosika na bato oyo ntango batungisami, bakómaka mawamawa to bamonaka lokola ete babongi te Nzambe atyela bango likebi? Davidi akomaki boye: “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.” (Vɛrsɛ 18) Tótala ndenge maloba yango ezali kolendisa mpe kopesa elikya.

“Yehova azali pene.” Buku moko elobi ete maloba wana ezali “komonisa ete Nkolo atyelaka bato na ye likebi mpe abatelaka bango; azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa mpe kobikisa bango.” Tolendisami mpenza na koyeba ete Yehova atyelaka bato na ye likebi. Amonaka makambo bazali kokutana na yango na ‘ntango oyo ya mpasi mpenza,’ mpe ayebi ndenge bazali koyoka na motema.​—2 Timote 3:1; Misala 17:27.

“Baoyo motema ebukani.” Na bisika mosusu, “motema oyo ebukani” emonisaka moto oyo azali kolinga moto kasi moto yango alingi ye te. Kasi, moto moko ya mayele alobi ete maloba ya mokomi ya nzembo emonisi “mpasi mpe mawa na likambo nyonso.” Ya solo, ata basambeli ya Nzambe oyo bazali sembo bakoki ntango mosusu kokutana na mikakatano makasi, oyo ekoki kolɛmbisa bango.

“Baoyo elimo etutami.” Bato oyo balɛmbi nzoto bakoki komimona ete bazali na ntina te mpe kobungisa elikya nyonso mpo na mwa ntango. Buku moko mpo na babongoli ya Biblia elobi ete maloba wana ekoki kobongolama na “baoyo bazali na eloko moko te ya malonga oyo bakoki kotyela elikya.”

Ndenge nini Yehova ayanolaka baoyo “babukani na motema” mpe “baoyo elimo etutami”? Azalaka mosika na bango, akanisaka ete babongi te alinga bango mpe atyela bango likebi? Te! Lokola moboti ya bolingo, oyo amemaka mwana na ye mpe akitisaka ye motema, Yehova mpe azalaka pene na basambeli na ye oyo basɛngaka ye lisalisi. Azalaka pene mpo na kokitisa bango motema mpe kolendisa elimo na bango oyo ebukani. Akoki kopesa bango bwanya mpe makasi oyo basengeli na yango mpo bálonga komekama nyonso oyo bakoki kokutana na yango.​—2 Bakorinti 4:7; Yakobo 1:5.

Mpo na nini te koluka koyeba ndenge oyo okoki kopusana penepene na Yehova? Nzambe wana ya motema mawa alaki ete: “Nafandaka . . . esika moko na moto oyo atutami mpe oyo azali na elimo ya komikitisa, mpo na kopesa lisusu makasi na elimo ya bato ya komikitisa mpe kopesa makasi lisusu na motema ya bato oyo batutami.”​—Yisaya 57:15.

Botángi ya biblia mpo na sanza ya Yuni:

Nzembo 26-59