Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kolonga komekama

Ndenge ya kolonga komekama

Mpo na bilenge

Ndenge ya kolonga komekama

YOZEFE​—ETENI 1

Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli.

Bato oyo balobeli: Yozefe mpe mwasi ya Potifare

Na mokuse: Yozefe alongi komekama ya kosangisa nzoto na mwasi ya Potifare.

1 TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ EBANDELI 39:1-12.

Okanisi ete ndako ya Potifare ezalaki monene ndenge nini?

․․․․․

Okanisi ete Yozefe azalaki kitoko ndenge nini? (Lisalisi: Tángá lisusu vɛrsɛ 6.)

․․․․․

Okanisi ete mongongo ya Yozefe ezali koyokana ndenge nini ntango azali koloba na mwasi ya Potifare na vɛrsɛ ya 8 mpe 9?

․․․․․

2 KƆTÁ NA MOZINDO.

Nini ekokaki kosala ete Yozefe abuka mobeko ya Nzambe? (Lisalisi: Tángá Bafilipi 2:12 mpe kanisá na makambo oyo ekómelaki Yozefe. Na ndakisa, na ntango wana, bato ya libota ya Yozefe ná basambeli mosusu ya Yehova bazalaki wapi?)

․․․․․

Okanisi ete mpo na nini Yozefe amonaki ete kosala ekobo ekozala lisumu na miso ya Nzambe, atako na ntango wana Nzambe apesaki mobeko moko te oyo epekisaki ekobo? (Lisalisi: Tángá mpe kanisá na bavɛrsɛ oyo elandi: Ebandeli 2:24; 12:17, 18; Baroma 2:14, 15; mpe Baebre 5:14.)

․․․․․

3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Boyokani oyo ezali kati na komipekisa mpe kobatela lokumu malamu.

․․․․․

Matomba oyo bato oyo balandaka toli ya Nzambe bazwaka.

․․․․․

Litomba ya koteya ‘makoki na yo ya kososola.’ (Baebre 5:14)

․․․․․

MAKAMBO MOSUSU OYO OKOKI KOSALELA.

Na likambo (makambo) nini ya bomoi okozwa ekateli noki soki omekami mpo na kosala pite to ekobo? (Lisalisi: Tángá mpe kanisá na Yobo 31:1; Nzembo 119:37; Baefese 5:3, 4.)

․․․․․

4 NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

Soki ozali na Biblia te, sɛngá Batatoli ya Yehova, to tángá mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia na Internet na www.pr418.com