Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Teyá bana na yo

Babengamaki “bana ya nkake”

Babengamaki “bana ya nkake”

NA NTANGO ya mbula makasi, mbala mosusu toyokaka makɛlɛlɛ makasi ya nkake. Ebangisaka yo? * Nzokande, Yesu abengaki bayekoli na ye mibale “bana ya nkake.” Tótalela mpo na nini.

Bayekoli yango mibale ya Yesu ezali Yakobo ná Yoane. Bazalaki yaya ná leki, bana ya Zebede ná Salome. Ekoki kozala ete Salome azalaki ndeko ya Maria, mama ya Yesu. Yango elakisi ete Yesu, Yakobo ná Yoane bazalaki bandeko mpe ekoki kozala ete bayebanaki ntango bazalaki kokola.

Zebede azalaki mobomi-mbisi; Yakobo ná Yoane mpe bazalaki kosala mosala yango. Bango mibale bazalaki na kati ya bayekoli ya liboso oyo Yesu aponaki. Ntango abengaki bango, batikaki mbala moko mosala na bango ya koboma mbisi mpe balandaki ye. Na nsima, Yesu aponaki bayekoli 12 mpo bákóma bantoma na ye. Yakobo ná Yoane bazalaki na kati.

Mwa basanza liboso báboma Yesu, ye ná bayekoli na ye bazalaki na mobembo mpe balekaki na mokili ya Samaria. Butu ekómaki kokɔta, mpe bango nyonso balɛmbaki mingi. Kasi, Basamaria baboyaki ete Yesu ná bantoma na ye bálekisa butu na mboka na bango. Oyebi mpo na nini?— Tiká tótalela yango.

Yesu ná bantoma na ye bazalaki Bayuda, mpe Bayuda mingi bazalaki kolinga Basamaria te. Kasi Yesu azalaki bongo te. Ye alingaki bango, mpe esengelaki ete Yakobo ná Yoane básala bongo. Nzokande, bayekoli yango mibale basepelaki te ndenge Basamaria baboyaki koyamba bango, mpe batunaki Yesu boye: ‘Olingi tóyebisa mɔtɔ euta na likoló mpe eboma bango?’ Okanisi ete Yesu alobaki na bango nini?— Alobaki na bango ete ebongi te báloba likambo ya mabe bongo! Esengelaki ete Yakobo ná Yoane báyekola lisusu ndenge ya komonisela bato motema mawa.

Ezaleli mosusu ya mabe mingi oyo Yakobo ná Yoane bazalaki na yango ezali ya koluka kozala na esika ya liboso, kozala bato oyo baleki baninga. Mwa basanza liboso Yesu akufa, bayekoli yango mibale batindaki mama na bango aloba na Yesu boye: “Lobá ete bana na ngai oyo mibale báfanda, moko na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe moko na lobɔkɔ na yo ya mwasi, na bokonzi na yo.” Bantoma mosusu zomi basilikaki ntango bayokaki likambo oyo Yakobo ná Yoane basalaki. Yo mpe olingaki kosilika?

Mbala mosusu olingaki kosilika. Biso nyonso tosepelaka te soki moto moko azali koluka azala na esika ya liboso to aleka baninga nyonso. Yakobo ná Yoane bayekolaki na nsima ete likambo basalaki ezalaki mabe mpe babongwanaki. Bantoma yango bakómaki mpenza na bolingo mpe na boboto. Likambo yango ekoki koteya biso nini?

Liteya oyo Yesu ateyi biso ezali ete tosengeli kozala na boboto. Yesu azalaki na boboto epai ya bato nyonso, ezala mibali, basi to bana. Okosala makasi olanda ndakisa yango?

^ par. 3 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.