Oyebaki yango?
Ahasueruse, mokonzi ya Perse oyo Biblia elobeli na mokanda ya Estere, azalaki nani?
▪ Mokanda ya Estere elobi ete Ahasueruse aponaki Estere, elenge mwasi moko Moyuda, azala mwasi na ye, mpe mwasi yango abikisaki bato ya ekólo na ye oyo etikalaki moke bábomama bango nyonso. Banda kala, bato ya mayele bazalaki na makanisi ndenge moko te mpo na Ahasueruse, mokonzi ya Perse. Kasi, likambo yango esukaki ntango bazwaki ndimbola ya makomi oyo ekomamaki na minɔkɔ misato na bamonima ya Baperse. Makomi yango emonisi mpenza ete Ahasueruse ezalaki Zerezese I, mwana ya Dariuse Monene (Hystaspe). Ndenge oyo nkombo ya Zerezese ekomami na makomi ya Baperse, soki babongoli yango na Ebre, ekokani na ndenge oyo yango ekomami na mokanda ya Estere na makomi ya Ebre.
Makambo nyonso oyo mokanda ya Estere elobi mpo na Ahasueruse eyokani na oyo bamonaki na makomi yango. Boyangeli na ye ezalaki kobanda na engumba-mokonzi Susa (Shushane), na Elame. Ayangelaki mpe na Media, mpe bokonzi na ye ekendaki tii na Inde mpe na bisanga ya Mbu ya Mediterane. (Estere 1:2, 3; 8:9; 10:1) Lewis Bayles Paton, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia, alobi boye: “Makambo nyonso wana etali mpenza Zerezese, kasi mokonzi mosusu ya Perse te. Ndenge oyo mokanda ya Estere elobeli Ahasueruse, eyokani mpenza na lisolo ya Zerezese oyo Hérodote mpe Bagrɛki mosusu oyo bazalaki bakomi ya makambo ya kala balobeli.”
Nini emonisi ete bazalaki kobɛta babriki na Ezipito na ntango ya kala?
▪ Mokanda ya Kobima elobi ete Baezipito bazalaki kosalisa Baebre oyo bazalaki baombo na bango mosala ya kobɛta babriki. Baombo basengelaki kokokisa motángo ya babriki oyo bazalaki kokatela bango mokolo na mokolo; bazalaki kosalela pɔtɔpɔtɔ ya mabele mpe matiti.—Kobima 1:14; 5:10-14.
Na ntango ya kala, mosala ya kobɛta babriki ya mabele oyo bakaukisaka na moi ezalaki kosalema mingi na lobwaku ya Nile. Bamonima ya kala oyo batongá na babriki yango ezali tii lelo na Ezipito. Efelo oyo batyá mayemi oyo ezali na lilita ya Rekhmire na engumba Thèbes, oyo esalemaki na siɛklɛ ya 15 liboso ya ntango na biso, pene na eleko moko na makambo oyo elobelami na mokanda ya Kobima, emonisi ndenge bazalaki kosala mosala yango.
Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elobi boye: “Bazalaki kotoka mai na libulu; kobalola pɔtɔpɔtɔ na nkongo mpe komema yango na esika oyo ebongaki mpo na mobɛti-briki. Bazalaki kofina pɔtɔpɔtɔ yango na kati ya masini ya briki oyo esalemi na mabaya. Na nsima, bazalaki kotombola masini yango, mpe briki ya sika ezalaki kotikala mpo ekauka na moi. Babriki oyo babɛti ezalaki kotandama na molɔngɔ mpe, soki ekauki, bazalaki kokangisa yango esika moko mpo na nsima básala na yango misala. Tii lelo oyo babɛtaka briki kaka ndenge wana na Proche Orient.”
Makambo ndenge na ndenge oyo bakomá na papirise kobanda na milenɛrɛ ya mibale liboso ya ntango na biso elobeli mpe mosala ya kobɛta babriki oyo baombo bazalaki kosala na matiti ná pɔtɔpɔtɔ, mpe motángo ya babriki oyo basali basengelaki kokokisa na mokolo.
[Elilingi na lokasa 22]
Libanga oyo ezali na liyemi ya Zerezese (atɛlɛmi) mpe Dariuse Monene (afandi)
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Werner Forman/Art Resource, NY
[Elilingi na lokasa 22]
Efelo oyo batyá mayemi na lilita ya Rekhmire
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Erich Lessing/Art Resource, NY