Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Bótikala na kati ya liloba na ngai’

‘Bótikala na kati ya liloba na ngai’

‘Bótikala na kati ya liloba na ngai’

“Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”​—YOANE 8:31, 32.

Yango elimboli nini? “Liloba” ya Yesu elimboli mateya na ye, oyo ezalaki kouta epai ya Nzambe. Yesu alobaki boye: “Tata moto atindaki ngai apesaki ngai mitindo mpo na makambo nasengeli koyebisa mpe oyo nasengeli koloba.” (Yoane 12:49) Na libondeli moko oyo asalaki epai ya Tata na ye ya likoló, Yehova Nzambe, Yesu alobaki boye: “Liloba na yo ezali solo.” Mbala na mbala, azalaki kotánga Liloba ya Nzambe mpo na komonisa esika oyo mateya na ye ezalaki kouta. (Yoane 17:17; Matai 4:4, 7, 10) Yango wana, bakristo ya solo ‘batikalaka na kati ya liloba na ye,’ elingi koloba bandimaka ete Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali “solo” mpe ete mateya na bango mpe makambo nyonso oyo basalaka esengeli koyokana ná makambo oyo ezali na Biblia.

Ndenge oyo bakristo ya liboso bakokisaki yango: Ntoma Paulo, moto oyo akomaki mikanda mingi ya Biblia, azalaki komemya Liloba ya Nzambe, lokola Yesu. Akomaki boye: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba.” (2 Timote 3:16) Mibali oyo baponamaki mpo na koteya bandeko na bango bakristo, basengelaki ‘kokangama makasi na liloba ya sembo ya Nzambe.’ (Tito 1:7, 9) Ntoma Paulo akebisaki bakristo ya liboso ete báboya ‘filozofi mpe bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato, na kolanda makambo mikemike ya mokili kasi na kolanda Kristo te.’​—Bakolose 2:8.

Banani bazali kolanda ndakisa wana lelo oyo? Buku moko (Catechism of the Catholic Church) etángi mobeko moko ya Vatican (Dogmatic Constitution on Divine Revelation) oyo lingomba endimaki na 1965, oyo elobi ete: “Mpo na kondima likambo moko oyo Biblia emonisi, Lingomba [ya Katolike] esukaka kaka te na kotalela Makomami Mosantu. Yango wana, ezala mimeseno ya lingomba to Makomami Mosantu, nyonso mibale ezali na valɛrɛ ndenge moko.” Lisolo oyo ebimaki na zulunalo moko (Maclean) etángaki maloba oyo ya pastɛrɛ moko ya mwasi na Toronto, na Canada: “Mpo na nini tosengeli kotika ete mateya ya Yesu mpe oyo ya Biblia, oyo eumeli mbula koleka 2 000, etambwisa biso? Biso moko tozali na makanisi ya malamu mpenza, kasi ntango nyonso tolɛmbisaka yango na ndenge tolukaka eyokana na mateya ya Yesu mpe na Makomami.”

Mpo na Batatoli ya Yehova, buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Bamonaka ete Biblia ezali mokanda kaka moko epai mateya na bango esengeli kouta, mpe kaka yango nde esengeli kotambwisa bomoi na bango.” Na mikolo euti koleka, ntango Motatoli ya Yehova moko na Canada alingaki koyebisa mobali moko soki azali nani, mobali yango akataki ye maloba. Nsima ya kolakisa mosapi na Biblia, alobaki na ye: “Ntango kaka namoni Biblia, nayebi mbala moko lingomba na yo.”