Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Bózala na bolingo na kati na bino’

‘Bózala na bolingo na kati na bino’

‘Bózala na bolingo na kati na bino’

“Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka bino na bino. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—YOANE 13:34, 35.

Yango elimboli nini? Kristo ayebisaki bayekoli na ye bálinganaka bango na bango ndenge ye alingaki bango. Ndenge nini Yesu alingaki bango? Azalaki kolinga bato nyonso atako na ntango na ye bato mingi bazalaki kolinga kaka bato ya ekólo na bango mpe bazalaki kozwa basi na valɛrɛ te. (Yoane 4:7-10) Bolingo ezalaki kotinda Yesu apesa ntango na ye, makasi na ye, mpe amipimela makambo mosusu ya malamu mpo na kosalisa basusu. (Marko 6:30-34) Nsukansuka, Kristo amonisaki bolingo na ndenge oyo eleki mpenza. Alobaki boye: “Ngai nazali mobateli ya mpate oyo aleki malamu; mobateli ya mpate oyo aleki malamu apesaka molimo na ye mpo na bampate.”​—Yoane 10:11.

Ndenge oyo bakristo ya liboso bakokisaki yango: Na siɛklɛ ya liboso, bakristo bazalaki kobengana ‘ndeko mobali’ to ‘ndeko mwasi.’ (Filemo 1, 2) Lisangá ya bokristo ezalaki koyamba bato ya bikólo nyonso, mpo bandimaki ete “Moyuda ná Mogrɛki bakeseni te, mpo bato nyonso bazali na Nkolo kaka moko.” (Baroma 10:11, 12) Nsima ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, bayekoli na Yerusaleme “bazalaki kotɛka biloko na bango mpe bozwi na bango mpe kokabola na moto nyonso mosolo bazwaki, ndenge moto na moto azalaki na bosɛnga.” Mpo na nini bazalaki kosala bongo? Ezalaki mpo ete bato oyo bautaki kozwa batisimo bátikala na Yerusaleme mpe bákoba “komipesa na mateya ya bantoma.” (Misala 2:41-45) Nini ezalaki kotinda bango básala bongo? Ekokaki ata mbula 200 te nsima ya liwa ya bantoma, Tertullien azongelaki maloba oyo bato mosusu bazalaki koloba mpo na bakristo: “Talá ndenge balinganaka . . . mpe ndenge bandimaka ata kokufa mpo na bandeko na bango.”

Banani bazali kolanda ndakisa wana lelo oyo? Buku moko (The History of the Decline and Fall of the Roman Empire [1837]) emonisi ete na boumeli ya bankama ya bambula, bato oyo bazalaki komibenga bakristo “basalelanaki mabe mingi bango na bango koleka oyo bapakano [bato oyo bazalaki bandimi te] basalelaki bango.” Ankɛtɛ moko oyo euti kosalema na États-Unis emonisi ete bato mingi oyo balobaka ete basambelaka, oyo mingi na bango bamibengaka bakristo, bayinaka bato ya mposo mosusu. Mbala mingi, bandimi ya lingomba moko bakipanaka te ná bandimi ya lingomba na bango oyo bafandaka na ekólo mosusu, yango wana, bakokaka te to bayebaka te kosalisana na ntango ya mpasi.

Na 2004, ntango mipɛpɛ makasi ebɛtaki etúká ya Floride (na États-Unis) mbala minei mobimba na sanza mibale mpamba, prezida ya komite oyo ezalaki kosunga bato oyo bakwelaki likama na etúká yango, azalaki na mposa ya koyeba soki biloko oyo bazali kotinda ekosalelama na ndenge ya malamu. Alobaki ete lingomba mosusu te ebongisami malamu lokola lisangá ya Batatoli ya Yehova, mpe alakaki kopesa Batatoli eloko mosusu nyonso oyo bakozala na yango mposa. Mwa bambula liboso, na 1997, ekipi moko ya Batatoli ya Yehova ememaki nkisi, biloko ya kolya, mpe bilamba na République démocratique du Congo, mpo na kosalisa bandeko na bango bakristo oyo bazalaki na bosɛnga. Bandeko na bango Batatoli ya Yehova ya Mpoto batindelaki bango makabo ya milio moko ya badolare.