Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Bazali bato ya mokili te”

“Bazali bato ya mokili te”

“Bazali bato ya mokili te”

“Mokili eyini bango, mpo bazali bato ya mokili te.”​—YOANE 17:14.

Yango elimboli nini? Lokola Yesu azalaki moto ya mokili te, azalaki te kokɔta na makambo ya politiki to na matata ya bato ya ntango na ye. Alimbolaki boye: “Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama epai ya Bayuda te. Kasi nde bokonzi na ngai euti awa te.” (Yoane 18:36) Alendisaki mpe bayekoli na ye báboya bizaleli, maloba, mpe etamboli oyo Liloba ya Nzambe epekisi.​—Matai 20:25-27.

Ndenge oyo bakristo ya liboso bakokisaki yango: Jonathan Dymond, mokomi moko ya makambo etali mangomba, alobaki ete bakristo ya liboso “bazalaki koboya kokɔta na [bitumba]; ata soki esengelaki bálobela bango mabe, bákɔtisa bango bɔlɔkɔ, to báboma bango.” Bazalaki kondima konyokwama na esika ya kokɔta na makambo ya mokili. Ndenge oyo bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe ekesenisaki mpe bango na bato ya mokili. Ntoma Petro ayebisaki bakristo boye: “Lokola bozali komikɔtisa elongo na bango lisusu te na libulu wana ya pɔtɔpɔtɔ ya bomoi ya mbindo, bazali kobulungana mpe kofinga bino.” (1 Petro 4:4) Will Durant, moto moko ya mayele na istware akomaki ete ‘bakristo bazalaki kotungisa lisosoli ya bapakano mpo na ezaleli na bango ya kobanga Nzambe mpe ya kolongobana.’

Banani bazali kolanda ndakisa wana lelo oyo? Mpo na ndenge oyo bakristo bazalaki koboya kokɔta na makambo ya mokili, buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Koboya kosimba mindoki ezali mpenza mabe.” Zulunalo moko (Reformierte Presse) ebimisaki lisolo oyo ezongelaki lapolo ya ebongiseli moko oyo elandelaka lotomo ya bato na Afrika. Lapolo yango emonisaki ete ntango bato ebele babomamaki na 1994 na Rwanda, mangomba nyonso epesaki mabɔkɔ, “longola kaka Batatoli ya Yehova.”

Ntango profesɛrɛ moko ya eteyelo ya ntei azalaki kolobela ndenge basoda ya Nazi babomaki ebele ya Bayuda, azalaki komilela ete “ata lingomba moko te to ebongiseli moko te ya bana-mboka etɛmɛlaki makambo ya lokuta, ya nsɔmɔ, mpe ya mabe oyo esalemaki.” Nsima ya kotuna likambo yango na Musée de l’Holocauste, na États-Unis, profesɛrɛ yango akomaki boye: “Sikoyo nazwi eyano.” Bayebisaki ye ete Batatoli ya Yehova bakangamaki na mateya na bango, atako banyokolaki bango makasi.

Tokoloba boni mpo na mibeko ya Nzambe oyo balandaka? Zulunalo moko (U.S. Catholic) elobi ete “bilenge mingi ya lingomba ya Katolike lelo oyo bandimaka te mateya ya lingomba na bango na makambo lokola kofanda na libala oyo ekomisami na Leta te [mpe] kosangisa nzoto liboso ya kobala.” Zulunalo yango etángi maloba ya diakre moko ya lingomba, oyo alobaki boye: “Nakanisi ete bato mingi, soki namikosi te koleka 50%, bafandaka naino na libala liboso ete bákomisa yango na Leta.” Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete Batatoli ya Yehova “babɛtaka mpenza nsɛtɛ na likambo etali kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi ya mokomoko na bango.”