Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ezali mabe kozala na boyokani na bilimo mabe?

Ezali mabe kozala na boyokani na bilimo mabe?

Ezali mabe kozala na boyokani na bilimo mabe?

Banda bomwana, Barbara * azalaki komona bimonaneli, koyoka mingongo, mpe azalaki mpenza kokanisa ete azali kosolola ná bandeko na ye oyo bakufá. Ye ná mobali na ye Joachim bazalaki kotánga babuku oyo elobelaka misala ya molili mpe bakómaki mpenza na makoki ya kotánga bakarte oyo esakolaka makambo oyo ekoya. Bakarte yango emonisaki ete bakokóma na mbongo mingi; esalemaki mpe bongo, mpamba te bazwaki mbongo mingi na mombongo na bango. Mokolo moko, bakarte yango ekebisaki bango ete bato mabe bakoya na ndako na bango mpe eyebisaki bango ndenge oyo basengeli kosala mpo na komibatela.

ATAKO kondima misala ya molili emonanaka lokola likambo esilá ngala, lelo oyo bato mingi bakómi kosepela na misala yango. Na mokili mobimba, bato mingi balataka bankisi na nzoto, basalelaka planchette oui-ja, mpe bakendaka epai ya banganga-nkisi mpo báyebisa bango soki bazali na makila malamu to mpo mabe ezwa bango te. Lisolo moko oyo ezalaki na motó ya likambo: “Ordinatɛrɛ mpe Lucifer,” oyo ebimaki na zulunalo moko (Focus) ya Allemagne, elobaki boye: “Internet ezali kosala ete bato básepela lisusu mingi na misala ya bondɔki.”

Oyebi oyo Biblia elobi mpo na misala ya bilimo mabe? Mbala mosusu okokamwa na oyo Biblia elobi mpo na likambo yango.

Biblia elobi nini mpo na misala ya bilimo mabe?

Mibeko oyo Nzambe apesaki bato na ye na Yisraele elobaki boye: “Epai na yo moto azwama te . . . moto oyo azali kosakola makambo oyo ebombaná, moto ya misala ya maji to moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya to moto oyo azali nganga-nkisi, to moto oyo azali kolɔka bato mosusu to moto oyo azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo to moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya to moto oyo azali kotuna bakufi. Mpo moto nyonso oyo azali kosala makambo yango azali eloko moko oyo Yehova ayiná.” (Kolimbola Mibeko 18:10-12) Mpo na nini Yehova apekisi makasi misala ya bilimo mabe?

Ndenge lisolo oyo ezali awa na ebandeli emonisi yango, bato mingi bakanisaka ete bato oyo bazali na bomoi bakoki kosolola na bato oyo bakufá mpe ete bansango oyo bazwaka na nzela ya misala ya molili eutaka nde epai ya bakufi. Mateya ya ndenge wana eutá na mangomba mingi oyo eteyaka ete nsima ya liwa, bato bakobaka kozala na bomoi na mokili ya bilimo. Kasi, Biblia eteyaka bongo te; elobi nde polele ete: “Bakufi bayebi ata eloko moko te.” (Mosakoli 9:5) Biblia elobi ete bato oyo bakufá bazali lokola bato oyo balali mpɔngi ya makasi, bayebaka ata eloko moko te oyo ezali kosalema zingazinga na bango. * (Matai 9:18, 24; Yoane 11:11-14) Lokola ezali bongo, okoki komituna boye: Ndenge nini tokoki kolimbola makambo oyo bato balobaka ete basololaki ná bato oyo bakufá? Basololaka mpenza na banani?

Kosolola ná bikelamu ya elimo

Masolo ya baevanzile emonisi ete ntango Yesu azalaki awa na mabele, asololaki ná bikelamu ya elimo. Marko 1:23, 24 elobi ete: “Elimo moko ya mbindo” eyebisaki Yesu boye: “Nayebi yo malamumalamu.” Na ntembe te, bikelamu ya elimo bayebi mpe yo. Kasi yo oyebi soki bango bazali banani?

Liboso Nzambe akela bato, akelaki naino ebele ya bikelamu ya elimo, to baanzelu. (Yobo 38:4-7) Baanzelu bazali na bomoi oyo eleki ya bato. (Baebre 2:6, 7) Bazali na nguya mpe na mayele mingi, mpe Nzambe akelaki bango mpo básalaka mokano na ye. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Bópambola Yehova, Ee bino baanzelu na ye, oyo bozali na makasi na kati ya nguya, oyo bozali kosalela liloba na ye.”​—Nzembo 103:20.

Biblia emonisi ete na ntango ya kala, baanzelu mosusu bakómaki koya kosolola ná bato kozanga ete Nzambe apesa bango nzela. Mokano na bango ezalaki nini? Anzelu ya liboso oyo asalaki bongo asalelaki mayele mabe mpo Adama ná Eva bákóma mosika na Nzambe, mozalisi na bango. Lokola asalaki bongo, amikómisaki Satana Zabolo, mokoseli-bato-makambo mpe motɛmɛli ya Nzambe.​—Ebandeli 3:1-6.

Na nsima, baanzelu mosusu “basundolaki esika na bango moko ya kofanda” na likoló, balataki nzoto ya bato, mpe bakómaki kofanda ná basi ya kitoko awa na mabele. (Yuda 6; Ebandeli 6:1, 2) Baanzelu wana oyo bapesaki Nzambe mokɔngɔ mpe bana oyo bango babotaki na basi yango bazalaki kobangisa bato mingi, yango wana mabele ‘etondaki na mobulu.’ Na ntembe te, oyebi malamu lisolo ya Biblia oyo emonisi ndenge Nzambe abomaki bato yango ya mabe mpe ya mobulu na mpela ya ntango ya Noa.​—Ebandeli 6:3, 4, 11-13.

Mai ya mpela etindaki baanzelu yango bálata lisusu nzoto na bango ya elimo mpe bázonga na likoló. Kasi, Nzambe apesaki bango nzela te bázonga na ‘esika na bango ya kofanda,’ epai bazalaki liboso. Kutu, Nzambe akitisaki bango na esika moko oyo ekokani na “mabulu ya molili tuu.” (2 Petro 2:4, 5) Biblia ebengi baanzelu yango oyo batombokaki “bademo.” (Yakobo 2:19) Bango nde bazali nsima ya misala wana ya molili.

Mokano ya bademo ezalaka nini?

Mokano ya bilimo mabe oyo basololaka na bato ezalaka libosoliboso ya kobungisa bato nzela mpo básambela te Yehova, Nzambe ya solo. Nguya oyo bato mingi oyo basalaka misala ya molili bazalaka na yango, ezalaka kaka mpo na kopekisa bato bázwa boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe bákóma baninga na ye.

Mokano ya mibale ya bademo ekoki komonana na ndenge oyo Satana, mokonzi ya bademo, amekaki Yesu. Satana alakaki kopesa Yesu “makonzi nyonso ya mokili ná nkembo na yango.” Satana alingaki ete Yesu apesa ye nini mpo na yango? Alobaki na Yesu boye: ‘Fukamá mpe sambelá ngai.’ Yango emonisi ete Satana ná bademo balingaka ete básambela bango. Kasi Yesu aboyaki likanisi ya kotika Nzambe mpe losambo ya solo.​—Matai 4:8-10.

Lelo oyo, bilimo mabe basɛngaka lisusu bato likambo ya ndenge wana polele te. Balukaka nde kokanga na motambo bato oyo bayebi makambo mingi te, na makambo oyo emonanaka lokola lisano, na ndakisa: boule de cristal to talatala ya koyeba makambo oyo ekoya, nkasa ya ti, karte mpo na kosakola makambo, montre ya monene to pendule, mpe horoscope. Kokosama te na misala ya ndenge wana! Misala yango ezali kaka te lolenge moko ya kokɔta na boyokani ná mokili ya bilimo. Bilimo mabe basalelaka nguya na bango ya mabe na ndenge oyo ekoki kosepelisa bato mpo na kokosa bango mpe kokanga bango na motambo, na mokano ya kobungisa bango nzela mpo básambela Yehova te. Soki mokano na bango elongi te, mbala mingi, bilimo mabe bakómaka kotungisa mpe konyokola moto oyo akangami na motambo na bango. Soki yo mpe okutaná na likambo ya ndenge wana, okoki kosala nini mpo olongwa na motambo na bango?

Ndenge ya kokima misala ya bilimo mabe

Komikosa te, bilimo oyo basololaka ná bato, bazali banguna ya Nzambe, mpe bakobomama. (Yuda 6) Bazali batɔmbɔki mpe babuki lokuta, oyo bamimonisaka lokola nde bazali bato oyo bakufá. Okoyoka ndenge nini soki oyebi ete moto moko oyo ozwaka lokola moninga azali moto ya lokuta, alukaka kaka kotinda yo otika kokanisa makambo oyo ezali na ntina mingi mpo na yo? Okosala nini soki oyei koyeba ete ozwaki moninga moko na nzela ya Internet, nzokande moninga yango azali nde moto mabe oyo alukaka kaka bato ya kosangisa na bango nzoto? Kokangama na motambo ya bademo ezali mabe mingi koleka. Osengeli kosala nyonso oyo okoki mpo na kokata boyokani nyonso ná bango. Osengeli kosala nini?

Nsima ya koyekola oyo Makomami eteyaka mpo na misala ya bilimo mabe, bato mosusu oyo bazalaki kofanda na Efese ya kala, bamonaki ete basengeli kotumba mikanda na bango ya maji, atako ezalaki ya ntalo mingi. “Batumbaki yango na miso ya bato nyonso.” (Misala 19:19, 20) Lelo oyo, biloko oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe, ezali kaka te babuku, bankisi oyo balataka na nzoto, planchette oui-ja, to biloko mosusu ya ndenge wana, kasi ekoki mpe kozala bafilme, ba CD, to biloko mosusu oyo tokoki kozwa na Internet. Boyá eloko nyonso oyo ekoki kopesa bilimo mabe nzela ya kokanga yo na motambo.

Kanisá lisusu mwasi ná mobali oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Na nzela ya bakarte na bango ya kosakola makambo, bamonaki ete bato mabe bakoya na ndako na bango, kasi basengelaki koyoka bango te to kondima kozwa eloko moko te epai na bango. Kasi, ntango Batatoli ya Yehova mibale, Connie ná Gudrun, bakómaki liboso ya porte na bango, mpe balobaki ete bamemeli bango nsango malamu ya Nzambe, Joachim ná Barbara bazwaki ekateli ya koyoka bango. Na lisolo na bango, balobelaki misala ya bilimo mabe mpe Connie ná Gudrun bayebisaki bango makambo ya solosolo oyo Makomami elobi mpo na misala yango. Babandaki koyekola Biblia mbala na mbala.

Eumelaki te, Joachim ná Barbara bazwaki ekateli ya kokata boyokani nyonso ná bademo. Batatoli ya Yehova bayebisaki bango ete bilimo mabe bakosepela na likambo wana te. Kutu, Joachim ná Barbara bakutanaki na mikakatano makasi mpe bademo bazalaki kobundisa mpe kobangisa bango. Na boumeli ya mwa ntango, bazalaki kobanga butu nyonso tii ntango balongwaki na ndako oyo bazalaki kofanda mpe bakendaki kokɔta na ndako mosusu. Ntango nyonso oyo mwasi wana ná mobali na ye bazalaki na mikakatano, bakobaki kotya motema na maloba oyo ezali na Bafilipi 4:13, oyo elobi ete: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” Yehova apambolaki milende na bango, mpe nsukansuka bilimo mabe batikaki kotungisa bango. Lelo oyo, Joachim ná Barbara bazali na esengo ya kosambela Nzambe ya solo, Yehova.

Makomami elendisi moto nyonso oyo alingi ete Yehova apambola ye boye: “Bómikitisa liboso ya Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino. Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:7, 8) Yehova Nzambe akoki kosalisa yo olongwa na motambo ya bademo, soki yo moko olingi yango. Soki bakanisi lisusu ndenge balongwá na motambo ya bilimo mabe, Joachim ná Barbara bandimaka na motema mobimba maloba oyo ya Nzembo 121:2, oyo elobi ete: “Lisalisi na ngai ezali kouta na Yehova.”

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 2 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

^ par. 7 Mpo na koyeba malamumalamu soki moto akómaka ndenge nini soki akufi, talá mokapo 6, “Bato oyo bakufá bazali wapi?” na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]

Misala ya molili epekisaka bato bázala na boyokani malamu ná Nzambe

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]

“Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—YAKOBO 4:8