Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda euti na Russie

Koluka biloko ya motuya na bangomba ya Altaï

Koluka biloko ya motuya na bangomba ya Altaï

EZALI mokolo moko malamu mpenza na sanza ya Mai, na ekólo Altaï, mokili moko kitoko oyo ezali na sudi-wɛsti na ngámbo ya Sibérie. Na bavitre ya motuka na biso, tozali komona zamba oyo etondá na banzete, mpe nsima na yango ezali na bangomba oyo ezipami na nɛjɛ ya langi ya mwa bule. Ezali kuna, na mboka wana ya mosika mpe ya bangombangomba, nde Ba-Altaïens bafandaka. Bato yango bakeseni mpenza na bandeko na bango mosusu ya Azia, mpamba te balobaka monɔkɔ na bango moko. Bafandi na kimya na mboka na bango kuna na bangomba ya Altaï, nkombo oyo eutá na liloba moko ya monɔkɔ ya Turc mpe ya Mongol, oyo elimboli “eloko ya wolo.”

Esali mwa bambula banda ngai ná mwasi na ngai toyekolaki elobeli ya bajɛstɛ ya Russie, mpe tobandaki kokende kotala masangá mpe mwa bituluku ya Batatoli ya Yehova oyo bazali bababa. Na mboka yango, bato ya bikólo koleka 100, oyo bazali na mimeseno ya bonkɔkɔ koleka 70, bango nyonso balobaka Russe, monɔkɔ oyo esangisi bango. Nzokande, bababa oyo tozalaka na bango balobaka monɔkɔ mosusu: elobeli ya bajɛstɛ ya Russie. Bababa yango bamesaná na makambo ya bikólo ndenge na ndenge, mpe mingi ya baoyo tokutanaki na bango bazalaki na esengo ya kobɛtela biso masolo ya bomoi na bango mpe koyamba biso malamu. Yango nde makambo tokutanaki na yango na Altaï.

Na engumba Gorno-Altaïsk, bayebisi biso ete bababa mosusu bafandaka na mwa mboka moko oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 250. Toyebi ete mwa ndambo ya Batatoli ya Yehova bazali kuna, kasi ata moko te kati na bango ayebi elobeli ya bajɛstɛ. Tokanisi bababa wana ya Altaï, mpe tozwi ekateli ya kokende na motuka mpo na koluka bango. Mposa oyo tozali na yango ekamwisi Yury ná Tatyana, mobali moko ná mwasi na ye oyo bazali bababa, oyo bandimi kokende elongo na biso. Na motuka na biso, totye mwa ba DVD oyo ezali na bavideo ya elobeli ya bajɛstɛ ná aparɛyi mpo na kotala ba DVD yango. Tozwi mpe tɛrmosi ya monene, mampa ná mwa mosuni batumbá, mpe pirojki, mwa gato kitoko oyo bato ya Russie basalaka, oyo na kati batyaka chouxpomme de terre. Na nsima, topakoli nkisi na nzoto, na bilamba, mpe na sapato mpo mwa banyama mikemike oyo ezalaka mingi na esika yango, oyo epesaka bato maladi na motó, eswa biso te.

Nzela oyo tozali koleka mpo na kokende na mboka yango ezali na katikati ya bangomba. Esika yango ezali na mopɛpɛ ya nsolo kitoko lokola malasi. Yango ebakiseli biso makasi! Tosepeli mingi ntango tomoni bamboloko ebele esika moko mpe ezali kolya matiti malɛmbɛmalɛmbɛ. Ba-Altaïens bafandaka na bandako ya mikemike oyo batongá na mabaya, kasi batyá manzanza likoló na yango. Pembeni ya bandako yango, batongaka mpe mwa bandako mosusu ya mikemike ya mabaya, oyo babengaka ayyl, oyo mbala mingi batyaka ndɛlɛ likoló na yango. Bandako yango mosusu ezali lokola bandako ya kapo, oyo likoló na yango batyaka mposo ya nzete. Mabota mingi ya Ba-Altaïens efandaka na ayyl kobanda na sanza ya Mai tii na Sɛtɛmbɛ, mpe bazongaka na bandako na bango kobanda Sɛtɛmbɛ tii na Mai.

Ntango tokómi na mboka yango, Batatoli ya Yehova oyo tokuti kuna bayambi biso malamu, mpe bamemi biso epai ya mobali moko ná mwasi na ye, oyo bazali bababa. Mobali yango ná mwasi na ye basepeli mingi komona biso, mpe bazali kozela báyeba soki touti wapi mpe toyei kosala nini. Na nsima, tomoni ete bazali na ordinatɛrɛ, yango wana, ntango tobimisi DVD, batye biso mbamba tótyela bango yango mpo bátala. Mbala moko lisolo ekatani, lokola nde moto ata moko te azalaki wana. Miso na bango ezali kaka na ordinatɛrɛ, mpe ntango mosusu bazali komekola bajɛstɛ oyo bazali komona, mpe koningisa mitó mpo na komonisa ete bazali kosepela. Lokola ezali mpasi kosolola na bango ntango bazali kolanda DVD, tozali kokata yango mwa moke mpo na kozongisa yango na ebandeli, epai balakisi paradiso kitoko oyo ekozala awa na mabele. Nsima ya kotala eteni mokomoko ya DVD, tozali kotɛlɛmisa yango, mpo na kolobela makambo oyo Nzambe akosala mpo na bato, mpe kotuna bango mpo na koyeba bato ya ndenge nini bakozwa bomoi ya seko na mokili kitoko oyo bamoni. Ndenge oyo basepeli esimbi mpenza mitema na biso, mpe na nsuka ya masolo na biso, bayebisi biso ete ezali na mobali mosusu ná mwasi na ye, oyo bazali mpe bababa, oyo bafandaka na mwa mboka mosusu oyo ezali mosika mingi te.

Ntango tolongwe wana, tokatisi nzela moko ya moke ya mabangamabanga, oyo ezali katikati ya bangomba, mpe tozwi nzela moko oyo ezali nyokanyoka mpo na kokóma na mwa mboka yango. Kuna, tokuti libota wana ya bababa: mobali, mwasi, mama ya mwasi, mpe mwana na bango ya moke; basepeli mingi koyamba bapaya oyo bayebaki te ete bakoya kotala bango. Tokɔti na porte ya moke ya ayyl na bango, oyo ezali kobimisa nsolo kitoko ya mabaya mpe ya miliki. Likoló ya mwa ndako yango, ezali na mwa lidusu, mpo na kokɔtisa moi. Na kati ya ndako, na nsuka ya efelo, batyá mwa fulu ya kotumba mampa, oyo batongá na briki mpe bapakolá yango langi ya mpɛmbɛ; batye mpe mwa mbambola pembeni. Bazipá efelo yango na tapi kitoko ya motane. Mobali yango ná mwasi na ye bayambi biso malamu, na biloko ya mboka na bango: mikate ya mikemike mpe ti na mwa saani oyo bato ya Azia bamɛlaka na yango ti. Totuni bango soki moto akoki kokóma moninga ya Nzambe. Bafandi naino nyɛɛ, na nsima, mama ya mwasi ayebisi biso ete ntango azalaki mwana moke, mokolo moko, azwaki biloko ya kolya mpe amemaki yango na ngomba moko mpo na kopesa banzambe. Aningisi mapeka, asɛki moke, mpe alobi boye: “Nayebi te mpo na nini tozalaki kosala bongo. Ezalaki kaka momeseno ya mboka na biso.”

Tolakisi bango DVD oyo elobeli likambo yango, mpe basepeli na yango mingi. Bazali na mposa tókoba masolo yango, kasi toyebi te ndenge nini tokosala yango. Soki antɛnɛ ya telefone ezalaki na mboka yango, mbɛlɛ tolingaki tótindelaka bango bamesaje na telefone. Kasi lokola antɛnɛ ya telefone ezali te na mboka yango, tolakaki bango ete tokobanda kokomela bango mikanda.

Moi ebandi kokɔta ntango tozali kozonga, mpe ekei kolala liboso kutu tókóma na mboka Gorno-Altaïsk; tolɛmbi mingi kasi tozali na esengo. Nsima ya mikolo, ntango totuni Batatoli ya Yehova nsango ya libota wana, bayebisi biso ete, pɔsɔ nyonso, tata ya libota yango akendaka na engumba monene, epai ayekolaka Biblia mpe ayanganaka na makita. Ndeko mwasi moko oyo ayebi elobeli ya bajɛstɛ nde asalisaka ye. Tozali na esengo mingi mpamba te milende na biso ekendaki na mai te!

Tokoki koloba ete ndenge oyo tokendaki koluka bababa ezali lokola kokende koluka biloko ya motuya na kati ya bangomba. Bangonga mingi oyo tolekisaki na koluka bababa ekendaki na mai te, mpamba te tozwaki eloko moko ya motuya, oyo tokanaki te kokutana na yango. Mpo na biso, bangomba ya Altaï ekozala ntango nyonso na biloko ya motuya, mpo tokobosana te bato ya mitema malamu oyo tokutaki na mboka yango, oyo ezali katikati ya bangomba.