Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge oyo bazalaki kosala balangi mpe bilamba na ntango ya kala

Ndenge oyo bazalaki kosala balangi mpe bilamba na ntango ya kala

Ndenge oyo bazalaki kosala balangi mpe bilamba na ntango ya kala

NA Biblia, ezali na bavɛrsɛ mingi oyo elobeli midɛlɛ ya bilamba, balangi, mpe biloko oyo bazalaki kotonga na yango bilamba oyo bato ya ntango ya kala bazalaki kolata.

Atako Biblia ezali te buku oyo elobelaka midɛlɛ ya bilamba mpe ndenge ya kolata, makambo mikemike oyo elobelami na masolo ya Biblia ekoki kosalisa motángi amona na makanisi ndenge makambo ezalaki.

Na ndakisa, totángaka ndenge Adama na Eva basalaki biloko ya kozipa nzoto na nkasa ya figi oyo batongaki. Kasi na nsima, na esika na yango, Nzambe asalelaki bango bilamba mosusu ya malamu koleka, “bilamba milai ya mposo ya nyama.”​—Ebandeli 3:7, 21.

Mokanda ya Kobima mokapo 28 mpe 29 elobeli makambo ya mikemike oyo etali bilamba oyo nganga-nzambe monene ya Yisraele azalaki kolata. Azalaki kolata elamba ya nse ya lini, zambala ya mpɛmbɛ, elamba ya kokangisa na loketo, kazaka ya bulé oyo ezangá mabɔkɔ, mpe efode oyo batyá mayemi ná libenga ya ntolo, turba mpe linzanza ya wolo oyo ezalaki kongɛnga. Kotánga kaka ndenge oyo Biblia elobeli ebele ya biloko ya motuya oyo bazalaki kosangisa mpo na kosala bilamba yango, ekoki kosalisa biso tómona ete molato yango ezalaki ya mpambampamba te.​—Kobima 39:1-5, 22-29.

Mosakoli Eliya azalaki kolata lokola bato mosusu te, yango wana bato bayebaki ye mbala moko ntango bayebisaki bango ete ezali “moto moko boye na elamba ya nsuki ya nyama, akangi mokaba ya mposo ya nyama na loketo.” Bankama ya bambula na nsima, bato mosusu bakanisaki ete Yoane Mobatisi azali Eliya, ntango mosusu kaka mpo azalaki kolata lokola Eliya.​—2 Bakonzi 1:8; Matai 3:4; Yoane 1:21.

Bilamba mpe balangi Na bisika mingi, Biblia elobeli lolenge ya biloko oyo bazalaki kosala na yango bilamba mpe balangi ná nkisi ya kosala langi, ata mpe kosɔna to kotonga bilamba. * Bilamba oyo Biblia elobeli mingi ezali bilamba ya lɛnɛ, oyo bazalaki kosala na mposo ya banyama oyo bazalaki kobɔkɔla, mpe bilamba ya lini oyo bazalaki kosala na nsinga ya nzete oyo ebimisaka lini. Biblia ebengi Abele “mokɛngɛli ya bampate.” (Ebandeli 4:2) Biblia eyebisi te soki Abele azalaki kobɔkɔla bampate mpo na kozwa lɛnɛ. Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli lini ya kitoko ezali na bilamba oyo Farao alatisaki Yozefe na siɛklɛ ya 18 liboso ya ntango na biso. (Ebandeli 41:42) Biblia elobi mpenza te ete Bayuda bazalaki kosalela coton mpo na kosala bilamba, kasi bazalaki kosalela yango banda kala na mikili ya Moyen-Orient.

Ezala lini to lɛnɛ, nyonso mibale ezalaki bansinga ya kitoko oyo bazalaki kolínga yango mpo na kosala bansinga ndenge na ndenge ya minene mpe ya mike. Bazalaki kokangisa bansinga yango mpo ekóma elamba. Bazalaki kopakola bansinga mpe bilamba yango balangi ndenge na ndenge. Na nsima, bazalaki kokata elamba yango na ndenge oyo moto akoki kolata. Mbala mingi, bazalaki kosala mayemi kitoko na bilamba yango mpe kosangisa bansinga ya langi ndenge na ndenge, mpo na kokómisa elamba kitoko mpe kopesa yango valɛrɛ.​—Basambisi 5:30.

Mbala na mbala, Biblia emonisi ete balangi oyo bazalaki kotya na bilamba ezalaki ya bulé, mwa motane-bulé, mpe motane makasi. Bayisraele bazwaki mobeko ya kotya ‘nsinga ya bulé likoló ya ndelo ya malendamalenda ya nsɔngɛ’ ya bilamba na bango, mpo bábosanaka te boyokani oyo bazalaki na yango ná Yehova Nzambe. (Mitángo 15:38-40) Liloba ya Ebre tekheʹleth, oyo elimboli langi ya mwa bulé, mpe liloba ’ar·ga·manʹ, oyo mbala mingi ebongolamaka na “mwa motane-bulé,” ezali balangi oyo bazalaki kotya na bilamba ya nganga-nzambe monene mpe na biloko mosusu oyo bazalaki kotya na tabernakle to na tempelo mpo na kokómisa yango kitoko.

Biloko mpo na kobongisa tabernakle mpe tempelo Tabernakle oyo basalaki na esobe​—mpe na nsima tempelo ya Yerusaleme—​ezalaki esika oyo Bayisraele bazalaki kosambela. Yango wana, tokoki kokamwa te soki Biblia elobeli makambo mingi ya mikemike oyo etali kobongisa mpe kotya biloko mosusu na tabernakle mpe na tempelo ya Salomo. Longola biloko yango mpe balangi, Biblia elobeli mpe makambo mingi oyo etali kosala bilamba, kotya yango langi, kotonga yango, mpe kotya mayemi na bahema mpe barido.

Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Bezalele ná Oholiabe, bato oyo bayebaki malamu misala ya mabɔkɔ, ata mpe basi ná mibali mosusu, bakokisaki na bosembo nyonso mokumba moko ya ntina mpenza, basalaki hema oyo ebongaki mpenza mpo na losambo ya Yehova. (Kobima 35:30-35) Na mokapo 26 ya mokanda ya Kobima, Biblia elobeli eloko mokomoko oyo basalelaki mpo na kosala tabernakle mobimba. Na ndakisa, elobi ete elamba ya ntalo mpe ya langi ndenge na ndenge oyo bazipaki na yango tabernakle esalemaki na “lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá mpe na nsinga ya bulé mpe na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé mpe na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi.” Ekoki kozala ete Bayisraele bautaki na biloko yango mingi na Ezipito ntango babimaki na boombo. Batyaki likebi mingi na langi oyo batyaki na rido oyo ezalaki na mayemi ya bakeruba, rido oyo ekabolaki “Esika Mosantu mpe Esika oyo Eleki Bosantu” na kati ya tabernakle. (Kobima 26:1, 31-33) Malako yango epesamaki lisusu na bato oyo basalaki bilamba mpo na tempelo ya Yerusaleme, na litambwisi ya mokonzi Salomo.​—2 Ntango 2:1, 7.

Makambo ya mikemike oyo Biblia elobeli ekoki kosalisa biso tóyeba ete Bayuda ya ntango ya kala bazalaki kolalisa mabɔkɔ te mpe bayebaki ndenge ya kosalela biloko oyo bazalaki na yango na ntango wana. Tomoni ete bato ya ekólo yango bazalaki bato ya mpasi te, mpe bazalaki te kolata bilamba ya mabemabe to ya midɛlɛ moko ya bongobongo; bazalaki nde kolata bilamba kitoko ya langi ndenge na ndenge, mpe elamba na elamba ezalaki kolatama na ntango na yango, na kolanda eleko ya malili to ya moi, mpe na kotalela makoki ya moto na moto.

Biblia eyebisi biso ete Nzambe apesaki Bayisraele mokili moko ya malamu, “mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.” (Kobima 3:8; Kolimbola Mibeko 26:9, 15) Ntango bakangamaki na losambo ya solo, Yehova azalaki kopambola bango. Bomoi ezalaki malamu, mpe bato bazalaki na esengo. Na ndakisa, Biblia elobi boye: “Yuda ná Yisraele bakobaki kofanda na kimya, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, banda na Dani tii na Beere-sheba, mikolo nyonso ya [Mokonzi] Salomo.”​—1 Bakonzi 4:25.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali mosala yango, talá bitanda oyo ezali na lisolo oyo.

[Etanda/​Bililingi na nkasa 26, 27]

Lɛnɛ mpe lini

Na ntango ya kala, bazalaki kobɔkɔla bampate, mingimingi mpo na kozwa miliki mpe lɛnɛ. Ata soki mobateli ya mpate azali na bampate mingi te, akokaki kozwa lɛnɛ oyo ekoki mpo na kosala bilamba mpo na libota na ye. Soki azali kobɔkɔla bampate mingi, akokaki kotɛka lɛnɛ oyo etikali epai ya bato oyo basalaka bilamba na mboka wana. Bingumba mpe bamboka mosusu ezalaki na ekipi ya bato oyo basalaka bilamba. Banda kala, kokata nsuki ya mpate ezalaki moko ya misala oyo bato bazalaki kosala mbula na mbula.​—Ebandeli 31:19; 38:13; 1 Samwele 25:4, 11.

Lini, oyo bazalaki kosalela mingi mpo na bilamba, ezalaki kosalema na bansinga ya molona oyo ebimisaka bansinga ya lini. (Kobima 9:31) Bazalaki kokata molona yango soki ekoli mpenza. Bazalaki kokaukisa mwa molona yango na moi, mpe na nsima bazalaki kozindisa yango na mai mpo elɛmba. Nsima ya kokaukisa yango, bazalaki kotutatuta yango mpo ebimisa bansinga, mpe na nsima bazalaki kosangisa bansinga yango mpo ekóma elamba. Bakonzi mpe bato mosusu ya minene bazalaki kosepela mingi na bilamba oyo esalemi na lini.

[Elilingi]

Molona ya lini oyo ekauká liboso bázindisa yango na mai

[Etanda/​Elilingi na lokasa 27]

Kolínga bansinga

Nsinga moko mpamba​—na ndakisa lini, lɛnɛ, to nsuki ya ntaba—​ezalaka pɛtɛɛ mingi mpe mokuse mpenza mpo na kosalela yango. Yango wana, bazalaki kosangisa bansinga ebele esika moko mpo ebimisa nsinga ya mwa monene mpe ya molai. Mpo na “mwasi oyo akoki,” Biblia elobi ete: “Asemboli mabɔkɔ na ye na motonga ya molai ya kokangisa nsinga mpe mabɔkɔ na ye esimbi motonga ya mokuse mpo na kosala nsinga.” (Masese 31:10, 19) Maloba wana emonisi ndenge oyo bazalaki kolínga bansinga; bazalaki kosalela motonga ya molai ya kokangisa nsinga mpe motonga ya mokuse mpo na kosala nsinga, oyo mbala mingi ezalaki kaka mwa banzete mibale ya mike.

Na lobɔkɔ moko, mwasi azalaki kosimba motonga ya molai ya kokangisa nsinga, oyo ezalaki na nsinga oyo elíngámá na motonga yango. Na lobɔkɔ mosusu, azalaki kobenda bansinga mosusu, kosangisa yango mpo ekóma nsinga ya mwa monene, mpe kokangisa yango na motonga ya mokuse oyo ezalaki na kroshɛ na nsɔngɛ na yango. Na nsuka ya motonga yango, ezalaki na diskɛ moko ya kilo, oyo babengi fusaïole, oyo ezalaki kosala ete motonga ya mokuse elínga bansinga. Soki atɛlɛmisi motonga yango na molai mpe abaloli yango, azalaki kokómisa bansinga yango mwa minene. Azalaki kolínga bansinga yango na motonga, kolínga yango mbala na mbala, tii ntango bansinga nyonso oyo ezali na motonga ya molai ekokóma nsinga moko ya molai, oyo bakoki kotya yango langi to kosala na yango elamba.

[Etanda/​Bililingi na nkasa 28, 29]

Kotya langi na bilamba

Nsima ya kolínga bansinga mpe kobongisa yango, bazalaki kotya balangi ndenge na ndenge na lɛnɛ mpe na lini, to na elamba oyo basali. Nsima ya kozindisa yango mbala na mbala na mai ya langi, langi yango ezalaki kokangama makasi na elamba. Lokola kosala bongo ezalaki kosɛnga mbongo mingi, soki langi etikali, bazalaki kolongola yango na esika oyo bazalaki kotya yango mpe kobomba yango mpo na kosalela yango mbala ya nsima. Na nsima, bazalaki kotanda nsinga to elamba oyo bapakoli langi na moi mpo ekauka.

Lokola bato ya ntango ya kala bazalaki te na balangi oyo esalemi na biloko mosusu, bayekolaki kosala balangi ndenge na ndenge na biloko oyo bazalaki kozwa epai ya banyama to na banzete. Na ndakisa, bazalaki kosala langi ya mosaka na nkasa ya nzete ya amande mpe na mposo ya mbuma ya grenade; langi ya moindo, bazalaki kosala yango na mposo ya nzete ya grenade. Langi ya motane, bazalaki kozwa yango na misisa ya nzete ya garance to na mwa banyama mikemike oyo babengi kermès. Langi ya bulé, bazalaki kozwa yango na bafololo oyo babengi indigo. Soki basangisi biloko ya mikemike oyo epesaka langi, oyo bazalaki kozwa na nzoto ya mbɛmbɛ ya mai, yango ezalaki kobimisa langi ya mwa motane-bulé, ya bule, mpe ya motane makasi.

Ezalaki kosɛnga bambɛmbɛ boni mpo na kozwa langi ya kotya na elamba moko? Mbɛmbɛ mokomoko ya mai ezalaki kobimisa kaka mwa eloko moke oyo epesaka langi, yango wana, lapolo moko emonisi ete mpo na kotya langi na rɔbɛ moko to na elamba ya mokonzi, ezalaki kosɛnga mbɛmbɛ soki 10 000 mpo na kobimisa langi. Balobaka ete ntango Nabonide, mokonzi ya Babylone azalaki koyangela, lɛnɛ ya langi ya mwa motane emataki ntalo mbala 40 koleka lɛnɛ ya balangi mosusu. Lokola engumba ya kala ya Tyre ekendaki nsango mpo kuna nde bazalaki kosala balangi ya ntalo mingi, langi ya mwa motane-bulé eyebanaki na nkombo ya langi ya Tyre.

[Bililingi]

Mposo ya mbɛmbɛ ya mai

Esika bazalaki kotya langi ya mwa motane-bulé, na siɛklɛ ya 2 to ya 3 L.T.B., oyo bamonaki na Tel Dor, na Yisraele

[Eutelo ya bafɔtɔ]

The Tel Dor Project

[Etanda/​Elilingi na lokasa 29]

Kosala bilamba

Bazalaki kosalela mwa masini moko mpo na kosangisa bansinga oyo elingámi, mpo ekóma elamba ya mwa monene oyo bakoki kotonga yango to kosala na yango biloko mosusu. Bazalaki kosangisa bansinga na kolanda molai na yango mpe mokuse na yango mpo na kosala elamba. Bazalaki kolekisa bansinga ebele, mokomoko likólo ya mosusu.

Masini ya kosala bilamba oyo bazalaki kosalela na ntango ya kala esalemaki na banzete mibale ya milai oyo batɛlɛmisi to balalisi mpe nzete mosusu ekatisi yango. Na bamasini mosusu oyo bazalaki kotɛlɛmisa, bazalaki kokangisa biloko ya kilo na nse ya bansinga oyo balíngi. Bakutaki bamasini wana ya kala na bisika mingi na Israël.

Mbala mingi, bato ya libota mokomoko bazalaki kosala bilamba na bango; kasi na bisika mosusu bato ya mboka mobimba bazalaki kosangana mpo na kosala mosala yango. Na ndakisa, na 1 Ntango 4:21, Biblia elobeli “mabota ya ndako ya basali ya bilamba ya kitoko,” oyo na ntembe te, ezalaki lisangá moko ya bato oyo bazalaki kosala mosala yango.

[Elilingi na nkasa 26, 27]

“Nsinga ya bulé mpe lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé.”​—Kobima 26:1