Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama”

“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama”

“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama”

“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—MATAI 24:14.

Yango elimboli nini? Luka, moko ya bakomi ya Evanzile alobaki ete Yesu “abandaki kotambola engumba na engumba mpe mboka na mboka, mpo na koteya mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 8:1) Yesu ye moko mpe alobaki boye: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Atindaki bayekoli na ye básakola nsango malamu na bingumba mpe na bamboka, na nsima, apesaki bango etinda oyo: “Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”​—Misala 1:8; Luka 10:1.

Ndenge oyo bakristo ya liboso bakokisaki yango: Bayekoli ya Yesu balekisaki ntango te mpo na kosala oyo Yesu asɛngaki bango básala. “Mikolo nyonso na tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Kristo.” (Misala 5:42) Mokristo nyonso azalaki kosala mosala yango ya kosakola. Neander, moto ya mayele na istware alobaki ete “Celsus, moto ya liboso oyo akomaki mpo na kotɛmɛla bakristo, atyolaki bakristo mpamba te basali ya nsuki ya meme, bato oyo basalaka sapato, bato oyo babongisaka mposo ya nyama, bato oyo batángá te mpe bato mpamba, bazalaki basakoli ya molende ya nsango malamu.” Na buku na ye (The Early Centuries of the Church), Jean Bernardi akomaki boye: “[Bakristo] bazalaki kokende kosakola bisika nyonso mpe epai ya bato nyonso. Bazalaki kotambola na babalabala ya minene mpe na bingumba, na bisika ya bato ebele mpe na bandako ya bato. Báyamba bango to báyamba bango te. . . . Tii na nsuka ya mokili.”

Banani bazali kolanda ndakisa wana lelo oyo? David Watson, sango moko ya lingomba ya Anglican akomaki boye: “Soki bato mingi bazali kolinga kosalela Nzambe te lelo oyo, ezali mingimingi mpo lingomba ezali kozwa na valɛrɛ te mosala ya kosakola mpe ya koteya.” Na buku na ye (Why Are the Catholics Leaving?), José Luis Pérez Guadalupe akomaki na ntina na mosala ya ba Évangéliques, ba Adventistes, mpe bandimi ya mangomba mosusu, mpe alobaki ete “bakendaka kosakola ndako na ndako te.” Kasi, mpo na Batatoli ya Yehova akomaki boye: “Basakolaka ndako na ndako.”

Na buku moko (Cato Supreme Court Review, 2001-2002), tozali kokuta makambo oyo mokomi Jonathan Turley, alobaki mpo na Batatoli ya Yehova: “Soki kaka otángi nkombo ya Batatoli ya Yehova, mbala moko bato mingi bayebaka ete ezali bato oyo bakómelaka bato na bandako na mbalakaka mpo na koteya. Mpo na Batatoli ya Yehova, kosakola ndako na ndako ezali kaka te likambo ya kolobela kondima na bango, kasi yango nde esimbi mpenza kondima na bango.”

[Etanda na lokasa 9]

Oyebi sikoyo banani bazali bakristo ya solo?

Na kotalela makambo oyo Makomami emonisi, ndenge tomoni yango na masolo oyo motoba, okanisi ete banani lelo bazali mpenza kosala makambo oyo esɛngami mpo na bakristo ya solo? Atako ezali na bankoto ya mangomba oyo emibengaka mangomba ya bokristo, kobosana te likambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Matai 7:21) Soki oyebi bato oyo bazali kosala mokano ya Tata, elingi koloba baoyo bazali kokokisa makambo oyo Yesu asɛngaki bakristo ya solo, mpe soki ozali koyangana elongo na bango, okoki kozwa mapamboli ya seko oyo Bokonzi ya Nzambe ekopesa. Tosɛngi yo otuna Batatoli ya Yehova, oyo bapesi yo zulunalo oyo, báyebisa yo makambo mosusu oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe mapamboli oyo yango ekopesa.​—Luka 4:43.