Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Osengeli kondima likanisi ya liboso oyo eyeli yo?

Osengeli kondima likanisi ya liboso oyo eyeli yo?

Osengeli kondima likanisi ya liboso oyo eyeli yo?

MOKOLO moko, doktɛrɛ moko afandaki na salon ya ndako na ye, azalaki kolanda ministre moko ya ekólo Irlande oyo azalaki koloba na televizyo. Nsima ya kotala malamumalamu elongi ya ministre yango, doktɛrɛ amonaki mwa mbuma moko oyo emonisaki ete akoki kozala na maladi ya kanser. Mbala moko, abengaki ministre yango mpe ayebisaki ye akende nokinoki kosalisa ekzamɛ.

Ntango asalisaki ekzamɛ, emonanaki ete ezali solo. Emonani ete doktɛrɛ wana azali na likoki ya koyeba maladi oyo moto azali kobɛla kaka na kotala mpamba. Nzokande, bato mosusu bakanisaka ete bazali na likoki ya koyeba bizaleli ya moto, bomoto na ye, mpe koyeba soki azali moto ya kotyela motema to te, kaka na kotala mpamba.

Banda bankama ya bambula, bato ya mayele bazali komeka kokolisa mayele ya siansi oyo ekoki kosalisa bango báyeba bizaleli ya moto kaka na kotala ndenge oyo azali komonana na miso. Babengaka mayele yango physionomie. Diksionɛrɛ moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete “bato babengaka yango mayele ya siansi; balobaka ete esalisaka mpo na koyeba bizaleli ya moto kaka na kotala ndenge elongi na ye to nzoto na ye ezali komonana.” Na siɛklɛ ya 19, bato ya mayele oyo bayekolaka bomoi ya bato, na ndakisa Francis Galton, ndeko ya Charles Darwin, mpe bato ya mayele oyo bayekolaka makambo oyo etindaka bato básala mabe (criminologues), na ndakisa Cesare Lombroso ya ekólo Italie, babimisaki mayele mpe batekiniki mosusu ya ndenge wana, kasi mingi na yango esalelamaka lisusu te.

Atako bongo, bato mingi bakanisaka ete okoki koyeba moto malamumalamu kaka na kotala ndenge azali komonana. Esengeli nde kondima likanisi ya liboso oyo eyeli yo na motó ntango omoni moto?

Kozwela moto makanisi te na kolanda ndenge azali komonana

Na Biblia, mokanda ya liboso ya Samwele ezali na ndakisa moko oyo emonisi ete ezali malamu te kondima likanisi ya liboso oyo eyeli yo ntango omoni moto. Yehova Nzambe atindaki mosakoli Samwele akende kotya moto moko ya libota ya Yese mafuta, oyo akokóma mokonzi ya Yisraele. Tozali kotánga boye: “Esalemaki boye: ntango [bana ya Yese] bakɔtaki mpe amonaki Eliabe, na mbala moko alobaki boye: ‘Ya solo, moto ya Yehova oyo atyami mafuta ye oyo liboso na ye.’ Kasi Yehova alobaki na Samwele ete: ‘Kotala elongi na ye te mpe bolai na ye te, mpo ngai naboyi ye. Mpo Nzambe amonaka ndenge moto amonaka te, mpamba te moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova, amonaka ndenge motema ezali.’” Esalemaki kaka bongo mpo na bana mosusu motoba ya Yese. Nsukansuka, na kokesene na ndenge oyo mosakoli Samwele ná Yese bazalaki kokanisa, moto oyo Nzambe aponaki mpo akóma mokonzi ezalaki nde elenge Davidi, mwana ya mwambe, oyo moto ata moko te akanisaki komema ye liboso ya Samwele.​—1 Samwele 16:6-12.

Lelo oyo, makambo ebongwani mpenza te. Esili koleka mwa bambula, na Allemagne, profesɛrɛ moko oyo ayekolaka makambo oyo etindaka bato básala mabe (criminologie) asalisaki ankɛtɛ moko na bana-kelasi 500 oyo bayekolaka makambo etali mibeko. Abengisaki bato 12 oyo bana-kelasi yango bayebaki te. Na bato yango, moko azalaki komanda ya bapolisi, mosusu azalaki zuzi, mosusu azalaki kosala na kɛsi ya iniversite, mosusu azalaki mokonzi oyo atalelaka makambo etali relations publiques, bamosusu bazalaki baavoka, bakonzi ya tribinale, mpe misato bazalaki basali-mabe. Profesɛrɛ yango asɛngaki bana-kelasi báluka koyeba mosala nini mokomoko asalaka, mpe nani kati na bato yango asengeli kokɔta bolɔkɔ, mpe mpo na likambo nini. Nyonso wana na kotalela ndenge oyo mokomoko na bango azali komonana, mpe lisano oyo alobi ete asalaka.

Esukaki ndenge nini? Bana-kelasi mingi (75%) balongaki koyeba basali-mabe wana misato. Kasi, bana-kelasi mosusu (60%) bakanisaki ete bato libwa oyo batikalaki, oyo bazalaki na likambo te, bazalaki babuki-mibeko. Na kati ya bana-kelasi 7, moko akanisaki ete zuzi azali motɛki-bangi; mpe na kati ya bana-kelasi 3, moko akanisaki ete komanda ya bapolisi azali moyibi! Ezalaka malamu te kozwela moto makanisi na kolanda kaka ndenge oyo azali komonana. Mpo na nini?

Miso ekoki kokosa biso

Ntango tokutani na moto mpo na mbala ya liboso, tomekaka kokanisa soki azali moto ya ndenge nini na kotalela makambo oyo toyebi mpo na bato ya ndenge wana. Mbala mingi tozwelaka moto yango makanisi na kolanda makambo oyo bato mosusu ya ndenge wana basalaka. Longola ndenge oyo moto azali komonana, tokoki mpe kokanisela moto mabe to malamu na kotalela ekólo na ye, mboka na ye, bozwi na ye to bobola, to mpe lingomba na ye.

Soki emonani ete makanisi oyo tozalaki na yango mpo na moto yango ezali solo, tosepelaka koyeba ete makanisi na biso ezalaki malamu, mpe tomonaka ete tosengeli kokoba kondima likanisi ya liboso oyo eyeli biso. Nzokande, soki toyebi ete tomikosaki mpenza, tosalaka nini? Soki tomitaleli malamu, tosengeli kolongola makanisi oyo tozalaki na yango liboso mpe koluka koyeba solo mpo na moto yango. Soki te, na kozanga koyeba, tokoki kosala basusu mabe mingi, kaka mpo lolendo ezali kotinda biso tólanda makanisi oyo eyeli biso.

Kokanisela moto mabe na kolanda oyo tozali komona na miso ekoki kozala mabe, kaka mpo na moto yango te, kasi mpe mpo na biso moko. Na ndakisa, na siɛklɛ ya liboso, Bayuda mingi baboyaki kondima ete Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki. Mpo na nini? Lokola bazalaki kotalela kaka oyo ezalaki komonana na miso, bato nyonso bazalaki koyeba ete Yesu azali kaka mwana ya mosali-mabaya. Atako bazalaki kokamwa na maloba ya bwanya mpe misala ya nguya ya Yesu, baboyaki kobongola makanisi oyo bazalaki na yango liboso mpo na ye. Ezaleli na bango wana etindaki Yesu asundola bango mpe akende koteya nde bato mosusu. Alobaki boye: “Mosakoli azangaka lokumu kaka na mboka na ye mpenza mpe na ndako na ye moko.”​—Matai 13:54-58.

Bayuda wana bazalaki bato ya ekólo oyo ezalaki kozela Masiya banda bankama ya bambula. Lokola batikaki ete makanisi ya liboso oyo eyelaki bango na motó etinda bango báboya kondima Masiya ntango ayaki komonana, Nzambe aboyaki bango. (Matai 23:37-39) Ndenge moko mpe, bazalaki kokanisela bayekoli ya Yesu mabe. Bato mingi bazalaki kondima te ete babomi-mbisi wana, oyo bato batángá mingi mpe bakonzi ya mangomba bazalaki kotyola, bakokaki kozala na eloko ya malonga ya koyebisa bango. Bato oyo bakobaki kokangama na makanisi ya liboso oyo eyelaki bango bazangaki libaku malamu ya kokóma bayekoli ya mwana ya Nzambe.​—Yoane 1:10-12.

Bato mosusu babongolaki makanisi

Ezalaki na bato mosusu na ntango ya Yesu oyo bazalaki na komikitisa, yango wana babongolaki makanisi ntango bamonaki makambo oyo Yesu azalaki kosala. (Yoane 7:45-52) Na bato yango, tokoki kotánga bato mingi ya libota ya Yesu, oyo liboso bazalaki kondima mpenza te ete ndeko na bango akoki kozala Masiya. (Yoane 7:5) Likambo ya esengo, na nsima babongolaki makanisi mpe bandimelaki ye. (Misala 1:14; 1 Bakorinti 9:5; Bagalatia 1:19) Ndenge moko mpe, bambula mingi na nsima, na Roma, bakonzi mosusu ya Bayuda bazalaki na mposa ya koyoka ntoma Paulo ye moko, na esika ya kolanda makambo oyo banguna ya bakristo bazalaki koloba. Nsima ya koyoka Paulo, basusu kati na bango bakómaki bandimi.​—Misala 28:22-24.

Lelo oyo, bato mingi bakaniselaka Batatoli ya Yehova mabe. Mpo na nini? Mbala mingi, ezali te mpo bazali na makambo oyo endimisi bango to emonisi ete mateya ya Batatoli ya Yehova mpe makambo oyo bango basalaka eyokani te na Makomami. Kasi ezali nde mpo bandimaka te ete Batatoli ya Yehova bakoki kozala na nzela ya solo. Soki okanisi malamu, okomona ete ezali kaka ndenge wana nde bato mingi na siɛklɛ ya liboso bazalaki kokanisa mpo na bakristo.

Tokoki kokamwa te soki bato bazali koloba mabe to kopanza bansango ya lokuta mpo na bato oyo bazali kosala makasi bálanda ndakisa ya Yesu. Mpo na nini? Mpamba te, Yesu akebisaki bayekoli na ye ya solo ete: “Bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.” Kasi alendisaki bango na maloba oyo: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.”​—Matai 10:22.

Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kotosa etinda ya Yesu, yango wana bazali kosala makasi mpo na koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe bisika nyonso na mokili. (Matai 28:19, 20) Bato oyo bazali koboya na nko koyoka nsango yango bakoki kobungisa libaku ya kokɔta na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Ezali boni mpo na yo? Okotika ete makanisi ya liboso oyo eyeli yo to makanisi ya mabe oyo ozalaka na yango etambwisa yo, to okondima kotalela makambo mpo na koyeba soki ezali solo? Kobosana te: Miso ekoki kokosa biso mpe ndenge oyo moto azali komonana ekoki kokosa yo; kasi soki otaleli likambo malamu, okoki kokamwa ete likambo yango ezali bongo te.​—Misala 17:10-12.

[Elilingi na lokasa 11]

Mpo na makanisi ya liboso oyo eyelaki bango, Bayuda mingi baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya

[Elilingi na lokasa 12]

Makanisi oyo ozalaka na yango mpo na Batatoli ya Yehova ezali mpo na ndenge omonaka bango to mpo na makambo oyo oyebi?