Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Etumbelo mpo na ‘Nzambe oyo ayebani te’ oyo ntoma Paulo amonaki na Atene ezalaki nini?​—Misala 17:23.

Bakomi mingi ya kala ya Grɛsi balobelaki bitumbelo ya ndenge wana. Na ndakisa, na siɛklɛ ya mibale ya ntango na biso, Pausanias, moto moko ya mayele na istware mpe na geografi alobaki ete na Olympie, ezalaki na “etumbelo moko mpo na banzambe oyo bayebani te.” Longola yango, Philostrate, molobi mpe moto ya mayele na filozofi alobaki ete na Atene, “batongaki bitumbelo ata mpo na lokumu ya banzambe oyo bayebani te.”

Na siɛklɛ ya misato ya ntango na biso, mokomi Diogène Laërce, abɛtaki lisolo moko oyo emonisaki epai wapi momeseno ya kotonga “bitumbelo oyo ezangá nkombo” eutá. Lisolo yango, oyo elobeli likambo moko oyo esalemaki na siɛklɛ ya motoba to ya nsambo liboso ya ntango na biso, eyebisi ndenge oyo moto moko nkombo na ye Épiménide asilisaki maladi moko ya mabe na Atene. Diogène akomaki boye: “[Épiménide] azwaki bampate . . . mpe amemaki yango na Areopaje; mpe kuna atikaki yango ekende bisika nyonso oyo elingi, mpe ayebisaki bato oyo bazalaki kokɛngɛla yango bátya bilembo na bisika nyonso oyo mpate mokomoko elalaki, mpe bápesa nzambe ya mboka wana mbeka na bisika yango. Balobaka ete ezalaki na ndenge wana nde maladi yango ya mabe esilaki. Yango wana, ata lelo, na bisika ndenge na ndenge ya etúká ya Attique (na Grèce), okoki kokuta bitumbelo oyo bakomá nkombo te likoló na yango.”

Buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi ete ntina mosusu oyo ekoki kozala ete bazalaki kotonga bitumbelo mpo na banzambe oyo bayebani te ezalaki “kobanga ete bátika kopesa banzambe basi to mibali oyo bayebani te lokumu, mpe na ndenge yango, bázwa te mapamboli epai ya banzambe yango to mpo banzambe yango básilika te.”

Mpo na nini Bayuda ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kotyola bakɔngɔli-mpako?

Banda kala, bato balingaka bakɔngɔli-mpako te. Kutu, na siɛklɛ ya liboso, na Yisraele bazalaki kotya bango na molɔngɔ ya bato mabe mpenza mpe bato oyo balingá kanyaka.

Bakonzi ya Roma bazalaki kofutisa bato bampako ya ntalo mingi. Bakonzi ya Leta ya Roma bazalaki kokɔngɔla mpako ya mabele mpe mpako oyo moto nyonso asengelaki kofuta, kasi, bazalaki kopesa mosala yango na bato oyo bazalaki kondima kofuta Baroma mbongo mingi oyo bazalaki kokɔngɔla mpo na biloko oyo ezalaki kokɔta to kobima na ekólo yango. Yango wana, bakomelesa oyo bazalaki kotɛka biloko na mboka bazalaki kosomba lotomo ya kokɔngɔlaka mpako na bisika mosusu. Lokola Bayuda bazalaki kolinga Baroma te, bazalaki kosepela ata moke te na bandeko na bango oyo bazalaki kondima kosala mosala wana. Buku moko (Cyclopædia) ya M’Clintock ná James Strong elobi ete bazalaki kotalela bango lokola “batɛki-bato mpe bapɛngwi, oyo babebisamaki mpo bazalaki ntango nyonso elongo na bapakano.”

Eyebanaki ete bakɔngɔli-mpako bazalaki sembo te, mpe bazalaki kokóma bazwi na mbongo oyo bazalaki kolyela bandeko na bango Bayuda. Bakɔngɔli-mpako mosusu bazalaki komatisa valɛrɛ ya biloko oyo bazalaki kofutisa mpako mpe koyiba benefisi, nzokande, basusu bazalaki koloba makambo ya lokuta mpo na kobɔtɔla babola mbongo. (Luka 3:13; 19:8) Yango wana, Bayuda bazalaki kotalela bakɔngɔli-mpako kaka ndenge moko na bato ya masumu mpe, ndenge buku moko (The Jewish Encyclopedia) elobi yango, “bakokaki te koponama mpo na kozala bazuzi to mpe ata batemwe na likambo.”​—Matai 9:10, 11.

[Elilingi na lokasa 18]

Etumbelo mpo na nzambe moko oyo ayebani te, esika Pergame ezalaká, na Turquie

[Elilingi na lokasa 18]

Liyemi moko ya Baroma, oyo emonisi mokɔngɔli-mpako, na siɛklɛ ya 2 to ya 3 ya ntango na biso

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Erich Lessing/​Art Resource, NY