Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te—elobaka nde makambo ya solo oyo ebombamá mpo na Yesu?

Baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te—elobaka nde makambo ya solo oyo ebombamá mpo na Yesu?

Baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te​—elobaka nde makambo ya solo oyo ebombamá mpo na Yesu?

BATO ya mayele basepelaki ntango babimisaki “Evanzile ya Yuda,” oyo bakanisaki ete ebungaki na boumeli ya basiɛklɛ koleka 16 (oyo balakisi awa likoló). Balobaki boye: “Oyo ezali likambo moko monene. Ekopesa bato ebele nkanda. Yango ekobongola ndenge oyo tozalaki kotalela lisangá ya bokristo ya kala.”

Mikolo oyo, bato mingi bakómi kosepela na baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te. Bato mosusu balobaka ete mikanda wana elobeli makambo minene mpe mateya oyo ebombamá banda kala, oyo etali bomoi ya Yesu. Kasi, baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te ezali nini? Ekoki mpenza koteya biso solo oyo tokoki te kokuta na Biblia mpo na Yesu mpe lisangá ya bokristo?

Baevanzile oyo ezali na Biblia mpe baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te

Kobanda mobu 41 tii mobu 98 ya ntango na biso, Matai, Marko, Luka, mpe Yoane bakomaki lisolo ya bomoi ya Yesu Kristo. (Matai 1:1) Masolo yango ebengamaka mpe baevanzile, oyo elimboli “nsango malamu” oyo etali Yesu Kristo.​—Marko 1:1.

Atako ekokaki kozala na masolo mosusu ya kala mpe mikanda mosusu oyo elobeli Yesu, eyebani ete kaka baevanzile wana minei nde ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ebongi kozala na kati ya Makomami Mosantu​—mpo na koyebisa “mpenzampenza bosolo ya makambo” oyo etali bomoi ya Yesu awa na mabele mpe mateya na ye. (Luka 1:1-4; Misala 1:1, 2; 2 Timote 3:16, 17) Baliste nyonso ya kala ya mikanda ya Makomami ya Grɛki ya Bokristo elobeli baevanzile wana minei. Ezali na eloko moko te oyo ekoki kotinda biso tótya ntembe ete mikanda yango ekomamaki na elimo ya Nzambe mpe esengeli kozala na kati ya Biblia.

Kasi na nsima, makomi mosusu ebandaki kobima, oyo bapesaki mpe yango nkombo ya baevanzile. Baevanzile yango ebengamaka apocryphe. *

Na nsuka ya siɛklɛ ya mibale, Irénée, moto moko ya engumba Lyon, akomaki ete bapɛngwi oyo batikaki lisangá ya bokristo bazalaki “na ebele ya mikanda ya apocryphe mpe mikanda mosusu ya lokuta,” oyo kati na yango ezalaki mpe na baevanzile oyo “bango moko basalaki, mpo na kokosa bazoba.” Na yango, bato bakómaki komona ete kotánga baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te to kozala na yango ezalaki mpenza likama.

Kasi, basango mpe bakomeli ya Moyen-Âge bakobaki kosala bakopi mpe kobatela mikanda yango. Na siɛklɛ ya 19, bato bakómaki kosepela mingi na mikanda yango, mpe bayaki komona makomi mingi mosusu ya kala mpe mikanda oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te oyo bato ya mayele babongisaki, ata mpe baevanzile mosusu. Lelo oyo, babimisá mikanda yango na minɔkɔ ebele oyo elobamaka na bato mingi.

Baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te: elobi nde makambo ya solo mpo na Yesu?

Mbala mingi, baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te elobelaka mingi bato oyo baevanzile ya Biblia elobeli kaka mwa moke, to mpe elobeli ata bango te. To mpe lisusu, elobelaka masolo ya lokuta na ntina etali bomwana ya Yesu. Tótalela mwa bandakisa.

◼ Mokanda oyo babengaka “Evanzile ya Yakobo” to “Mbotama ya Maria” ebɛtaka lisolo ya mbotama ya Maria, bomwana na ye, mpe libala na ye ná Yozefe. Ezali mpo na ntina yango nde balobaka ete ezali lisapo mpamba ya makambo ya losambo. Ekumisaka liteya oyo elobaka ete Maria atikalaki ngondo libela mpe emonani polele ete bakomaki yango kaka mpo na kokumisaka Maria.​—Matai 1:24, 25; 13:55, 56.

◼ Mokanda oyo babengaka “Evanzile ya bomwana ya Toma” elobelaka mingi bomwana ya Yesu, kobanda na mbula 5 tii 12, mpe elobaka ete na ntango wana asalaki makamwisi mingi. (Talá Yoane 2:11.) Emonisaka Yesu lokola mwana moko mabe, oyo azalaki kosilika mpambampamba, oyo alimbisaka te, oyo asalelaka nguya na ye ya kosala makamwisi mpo na kozongisa mabe oyo basali ye na balakisi, bato ya kartye, to bana mosusu; abomaki bamosusu miso, akómisaki bango bibɔsɔnɔ, ata mpe koboma bango.

◼ Baevanzile yango mosusu, na ndakisa “Evanzile ya Petro,” elobelaka makambo oyo esalemaki na kosambisama ya Yesu, liwa na ye, mpe lisekwa na ye. Baevanzile yango mosusu, na ndakisa “Misala ya Pilate,” oyo ezali mpe na kati ya “Evanzile ya Nikodeme,” elobelaka mingi bato oyo bazalaki ntango makambo yango esalemaki. Lokola mikanda yango elobeli makambo ya solo te mpe bato oyo bazalaki na bomoi te, tokoki kondimela yango te. “Evanzile ya Petro” emonisaka ete Ponsi Pilate azali na ngambo te mpe elobelaka lisekwa ya Yesu lokola lisapo mpamba.

Baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te mpe lipɛngwi na lisangá ya bokristo

Na sanza ya Desɛmbɛ 1945, pene na mboka Nag Hammadi, na nɔrdi ya Ezipito, bato ya mboka bakutaki na mbalakaka bamaniskri 13 ya papirisi oyo ezalaki na mikanda 52. Balobaka ete mikanda wana ya siɛklɛ ya minei ezali mikanda ya bato ya lingomba moko mpe ya bato ya filozofi oyo babengi gnosticisme. Lokola bato ya lingomba yango bazalaki kosangisa misala ya molili, ya bapakano, ya filozofi ya Bagrɛki, ya losambo ya Bayuda, mpe oyo ya bokristo, yango ezalaki kobebisa bato mosusu oyo bazalaki komibenga bakristo.​—1 Timote 6:20, 21.

“Evanzile ya Toma,” “Evanzile ya Filipe,” mpe “Evanzile ya Solo,” oyo bakutaki na bamaniskri 13 ya papirisi na mboka Nag Hammadi ezali na makanisi ndenge na ndenge ya misala ya molili ya gnostique, oyo balobaka ete eutá epai ya Yesu. “Evanzile ya Yuda,” oyo bauti komona mikolo oyo, ezali mpe na kati ya baevanzile ya gnostique. Evanzile yango ebimisaka Yuda moto malamu mpe ntoma kaka moko oyo ayebaki mpenza Yesu malamu. Moto moko ya mayele oyo ayebi evanzile yango malamu alobi ete emonisaka Yesu lokola “moteyi mpe moto oyo abimisaka bwanya mpe boyebi, kasi te mobikisi oyo akufaki mpo na masumu ya mokili.” Baevanzile oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe eteyaka ete Yesu akufaki lokola mbeka mpo na masumu ya mokili. (Matai 20:28; 26:28; 1 Yoane 2:1, 2) Emonani polele ete, baevanzile ya gnostique ekomamaki te mpo na kotinda bato bándimela Biblia, kasi nde mpo na kolɛmbisa kondima na bango.​—Misala 20:30.

Baevanzile ya Biblia eleki mosika baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te

Soki totaleli malamu baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te, tokomona ete ezali ya lokuta. Soki tokokanisi yango na baevanzile ya Biblia, tokomona polele ete ekomamaki te na litambwisi ya elimo ya Nzambe. (2 Timote 1:13) Lokola bato oyo bakomaki yango bayebaki Yesu te, bayebaki mpe bantoma na ye te, balobi ata likambo moko te ya solo oyo ebombamá na ntina na Yesu. Ezali nde na makambo ya lokuta, oyo bango moko babimisá, mpe masapo ya lokuta oyo ekoki kosalisa moto te ayeba Yesu mpe mateya na ye.​—1 Timote 4:1, 2.

Epai mosusu, Matai ná Yoane bazalaki na kati ya bantoma 12; Marko azalaki moninga ya motema ya ntoma Petro, mpe Luka azalaki moninga ya Paulo. Bakomaki baevanzile na bango na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe. (2 Timote 3:14-17) Mpo na ntina wana, baevanzile minei ezali na makambo nyonso oyo moto asengeli na yango mpo na kondima ete “Yesu azali Kristo Mwana ya Nzambe.”​—Yoane 20:31.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Liloba “apocryphe” euti na liloba ya Grɛki oyo elimboli “kobomba.” Na ebandeli, liloba yango ezalaki komonisa makomi oyo ebombamaki kaka mpo na bayekoli oyo bazalaki kolanda filozofi moko boye, oyo bato mosusu bakokaki koyeba yango te. Kasi, na nsima ekómaki komonisa mikanda oyo ezali te na liste ya solo ya mikanda ya Biblia.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]

Kenneth Garrett/​National Geographic Stock