Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Pusaná penepene na Nzambe

“Tobondeli yo, tiká biso tózonga na ndako”

“Tobondeli yo, tiká biso tózonga na ndako”

Ozalaki liboso kosalela Yehova? Ozali kokanisa kosalela ye lisusu, kasi ozali komituna soki akoyamba yo lisusu? Tosɛngi yo otánga na likebi lisolo oyo mpe oyo elandi. Masolo yango ebongisami libosoliboso mpo na yo.

MWASI moko oyo atikaki kosalela Nzambe mpe kolanda mateya oyo bateyaki ye na bomwana, alobi boye: “Nabondelaki Yehova atika ngai nazonga na ndako mpe alimbisa ngai ndenge nayokisaki ye motema mpasi.” Oyokeli mwasi yango mawa? Omitunaka soki Nzambe ayokaka ndenge nini mpo na bato oyo bazalaki liboso kosalela ye? Akanisaka bango? Alingaka ete ‘bázonga na ndako’? Mpo na koyanola na mituna wana, tótalela maloba oyo Yirimia akomaki. Na ntembe te, biyano yango ekokitisa yo motema.​—Tángá Yirimia 31:18-20.

Tótalela ndenge makambo ezalaki ntango Yirimia akomaki maloba wana. Na mobu 740 liboso ya ntango na biso, bambula mingi liboso ete Yirimia abotama, Yehova atikaki ete bato ya Asiri bámema bato ya bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele na boombo. * Nzambe atikaki bato na ye bákende na boombo mpo na kopesa bango disiplini, mpo na masumu minene oyo bazalaki kosala mpe ndenge bazalaki koboya koyoka makebisi ya basakoli na ye. (2 Bakonzi 17:5-18) Mpasi oyo bato yango bakutanaki na yango na boombo, ntango bakómaki mosika na Nzambe na bango mpe mosika na ekólo na bango, esalisaki nde bango bátika mabe? Yehova abosanaki nde nyonso oyo basalaki? Alingaki nde kondima koyamba bango lisusu soki bazongi na ndako?

“Nayokaki mawa”

Kuna na boombo, Bayisraele bazongelaki makanisi ya malamu mpe babongolaki mitema. Yehova amonaki ete babongolaki mpenza mitema. Yoká ndenge Yehova alobeli makanisi mpe ezaleli ya Bayisraele oyo bakendaki na boombo, oyo bamonisami na Efraime.

Yehova alobi boye: “Nayoki Efraime azali komilelalela.” (Vɛrsɛ 18) Ayokaki ndenge Bayisraele bazalaki komilela mpo na mpasi oyo ekómelaki bango mpo na masumu oyo basalaki. Moto moko ya mayele alobi ete liloba “komilelalela” ekoki kolimbola “koningisa nzoto mpo na mpasi.” Bazalaki lokola mwana ya mobulu oyo azali koningisa motó mpo azali na mawa makasi ntango azali kokanisa mpasi oyo amilukeli mpe azali koluka ndenge ya kozongela bomoi oyo azalaki na yango na ndako ya tata na ye. (Luka 15:11-17) Bayisraele bazalaki koloba nini?

“Osemboli ngai . . . lokola mwana-ngɔmbɛ oyo ateyami te.” (Vɛrsɛ 18) Bayisraele bayebaki ete ebongaki bápesa bango disiplini. Kutu, bazalaki lokola mwana-ngɔmbɛ oyo ateyami te. Buku moko elobi ete ndakisa wana ekoki kolimbola ete Bayisraele bazalaki lokola “mwana-ngɔmbɛ oyo bazalaki kobɛta lingenda kaka soki asali motó makasi mpe aboyi bátya ye na ekanganeli.”

“Zongisá ngai, mpe nakozonga mpenza, mpo ozali Yehova Nzambe na ngai.” (Vɛrsɛ 18) Bayisraele bamikitisaki mpe basɛngaki Nzambe asalisa bango. Babungaki nzela ndenge basalaki masumu, kasi sikoyo bazali kobondela Nzambe ayokela bango mawa mpe andima bango lisusu. Libongoli mosusu ya Biblia ebongoli maloba yango boye: “Ozali Nzambe na biso​—tobondeli yo, tiká biso tózonga na ndako.”​—Contemporary English Version.

“Nayokaki mawa; . . . Nayokaki nsɔni, mpe nayokaki ete nasambwe mpenza.” (Vɛrsɛ 19) Bayisraele basɛngaki bolimbisi mpo basalaki masumu. Bandimaki etumbu oyo bazwaki mpe mabe oyo basalaki. Ezalaki lokola nde bazalaki komibɛta ntolo mpo na mawa, mpe bamimonaki lokola babongi te mpe babwakami.​—Luka 15:18, 19, 21.

Bayisraele babongolaki mitema. Bayokaki mawa makasi, bayambolaki masumu na bango epai ya Nzambe, mpe batikaki banzela na bango ya mabe. Kobongola motema na bango ekitisaki Nzambe motema? Alingaki nde kondima bango bázonga na ndako na ye?

“Nakoyokela mpenza ye mawa”

Yehova azalaki mpenza kolinga Bayisraele. Alobaki boye: “Nakómi Tata ya Yisraele; mpe Efraime ye, azali mwana na ngai ya liboso.” (Yirimia 31:9) Tata oyo alingaka bana na ye akoki nde koboya koyamba mwana na ye oyo abongoli mpenza motema na mabe oyo asalaki? Yoká ndenge Yehova amonisi bolingo oyo azalaki na yango mpo na bato na ye.

“Efraime azali nde mwana ya motuya epai na ngai, to mwana oyo nalɛngɛlaka? Mpo ndenge nazali koloba mabe mpo na ye, ndenge mpe nakokanisa ye lisusu.” (Vɛrsɛ 20) Maloba wana ezali mpenza ya boboto! Lokola tata oyo alingaka bana na ye kasi akangaka miso na mabe te, Nzambe amonaki ete asengeli koloba “mabe” ya bana na ye, elingi koloba kokebisa bango mbala na mbala mpo na masumu na bango. Ntango bamonisaki motó makasi, apesaki nzela bákende na boombo, na maloba mosusu, abenganaki bango na ndako. Kasi, atako asengelaki kopesa bango etumbu, abosanaki bango te. Akokaki kosala bongo ata moke te. Tata oyo alingaka bana na ye abosanaka bango te. Kasi, Yehova ayokaki ndenge nini ntango amonaki ete bana na ye babongoli mpenza mitema?

“Misɔpɔ na ngai ekómi na yikiyiki. * Nakoyokela mpenza ye mawa.” (Vɛrsɛ 20) Yehova azalaki na mposa makasi ya bana na ye. Ndenge oyo babongwanaki esimbaki mpenza motema ye, mpe azalaki na mposa makasi ete bázongela ye. Lokola tata ya mwana ya mobulu ya lisese ya Yesu, Yehova “ayokaki mawa” mpe azalaki na esengo ya koyamba bana na ye oyo bazongaki na ndako.​—Luka 15:20.

“Yehova, tiká ngai nazonga na ndako”

Maloba oyo ezali na Yirimia 31:18-20 esalisi biso tóyeba ndenge oyo Yehova ayokelaka bato mawa mpe alimbisaka. Nzambe abosanaka te bato oyo bazalaki liboso kosalela ye. Kasi ezali boni soki bato ya ndenge wana balingi kozonga epai na ye? Nzambe ‘asepelaka kolimbisa.’ (Nzembo 86:5) Akoboya soki moke te bato oyo babongoli mitema mpe balingi kozonga epai na ye. (Nzembo 51:17) Kutu, asepelaka nde koyamba bango na ndako na ye.​—Luka 15:22-24.

Mwasi oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo azwaki ekateli ya kozongela Yehova mpe akendaki na lisangá ya Batatoli ya Yehova na esika oyo afandaka. Na ebandeli, esengelaki alongola nsɔni oyo azalaki na yango. Alobi boye: “Nazalaki komiyoka ete nabongi te.” Kasi bankulutu ya lisangá balendisaki ye mpe basalisaki ye azongela boyokani malamu ná Nzambe. Azali na botɔndi mingi mpe alobi boye: “Nasepelaka mingi ndenge Yehova atikaki ngai nazonga na ndako!”

Soki ozalaki liboso kosalela Yehova mpe sikoyo ozali kokanisa kosalela ye lisusu, tosɛngi yo okende na lisangá ya Batatoli ya Yehova na esika ofandi. Kobosana te ete Yehova amonisaka motema mawa mpe alimbisaka ntango ayambaka bato oyo babongoli mitema mpe basɛngaka ete: “Tobondeli yo, tiká biso tózonga na ndako.”

Botángi ya Biblia mpo na Aprili:

Yirimia 17-31

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 2 Bambula mingi liboso, na mobu 997 liboso ya ntango na biso, bokonzi ya Yisraele ekabwanaki na biteni mibale. Moko ezalaki Yuda, bokonzi ya mabota mibale ya sudi. Mosusu ezalaki Yisraele, bokonzi ya mabota zomi ya nɔrdi, oyo ezalaki mpe kobengama Efraime, libota oyo ezalaki na lokumu mingi.

^ par. 5 Mpo na kolimbola maloba wana ya elilingi oyo etali ndenge misɔpɔ eninganaka, buku moko ya babongoli ya Biblia elobi boye: “Mpo na Bayuda, kati ya nzoto ya moto ezalaki esika oyo bamposa eutaka.”