Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu azali Nzambe?

Yesu azali Nzambe?

Lisolo na moninga moko ya kartye​—Yesu azali Nzambe?

BATATOLI YA YEHOVA basepelaka kosolola masolo ya Biblia na baninga na bango ya kartye. Ezali nde na lisolo moko ya Biblia oyo olukaka koyeba malamu? Olingi koyeba mateya to makambo mosusu ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, kokakatana te kotuna bango mokolo oyo okokutana na Motatoli ya Yehova. Akosepela kosolola makambo yango na yo.

Ndakisa oyo elandi emonisi ndenge oyo Motatoli ya Yehova moko akoki kosolola na moto. Tósala lokola Motatoli moko na nkombo Karen akei kotala mwasi moko nkombo na ye Samantha.

Ezali solo ete bondimelaka Yesu te?

Samantha: Pastɛrɛ na biso alobaka ete Batatoli ya Yehova bandimelaka Yesu te. Ezali solo?

Karen: Nalingi koyebisa yo ete tondimelaka Yesu. Kutu, tondimaka ete mpo na kozwa lobiko, esengeli komonisa kondima epai ya Yesu.

Samantha: Ngai mpe nayebi ete ezali bongo.

Karen: Boye, na likambo wana, ngai ná yo tozali na likanisi moko. Nabosanaki koyebisa yo, nkombo na ngai Karen. Bongo ya yo nani?

Samantha: Nkombo na ngai Samantha. Nasepeli kokutana na yo.

Karen: Ngai mpe nasepeli, Samantha. Mbala mosusu omitunaka: ‘Soki Batatoli ya Yehova bandimelaka mpenza Yesu, mpo na nini bato mosusu balobaka ete bandimelaka Yesu te?’

Samantha: Ɛɛ, nalingi nayeba mpo na nini balobaka bongo.

Karen: Samantha, na mokuse, nalingi koyebisa yo ete tozalaka na kondima makasi epai ya Yesu, kasi tondimaka te makambo nyonso oyo bato balobaka mpo na ye.

Samantha: Okoki kopesa ngai ndakisa moko?

Karen: Ɛɛ. Na ndakisa, bato mosusu balobaka ete Yesu azalaki kaka moto moko malamu. Kasi biso tondimaka likanisi wana te.

Samantha: Ngai mpe nandimaka yango te.

Karen: Na esika oyo mpe, ngai ná yo tozali na likanisi moko. Ndakisa ya mibale ezali ete Batatoli ya Yehova bandimaka te mateya oyo eyokani te na oyo Yesu ye moko alobaki mpo na boyokani na ye ná Tata na ye.

Samantha: Olingi koloba nini?

Karen: Mangomba mingi eteyaka ete Yesu azali Nzambe. Ntango mosusu bateyá yo mpe bongo.

Samantha: Ezali bongo, pastɛrɛ na biso alobaka ete Nzambe ná Yesu bazali moto moko.

Karen: Kasi, okondima ete lolenge malamu koleka ya koyeba solo mpo na Yesu ezali ya kotalela makambo oyo ye moko alobaki na ntina na ye?

Samantha: Ɛɛ, nakondima yango.

Yesu alobaki nini?

Karen: Tótalela naino vɛrsɛ moko ya Biblia oyo ezali kosalisa biso tókanga ntina ya likambo yango. Yoká oyo Biblia elobi na Yoane 6:38. Yesu alobaki boye: “Nakitaki uta na likoló mpo na kosala, mokano na ngai te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.” Yesu alingaki koloba bongo te soki ye moko azalaki Nzambe.

Samantha: Olingi koloba nini?

Karen: Simbá ete Yesu alobaki te ete akitaki uta na likoló mpo na kosala mokano na ye moko.

Samantha: Ezali bongo, alobaki ete ayaki mpo na kosala mokano ya moto oyo atindaki ye.

Karen: Kasi, soki Yesu azali Nzambe, nani atindaki ye awa na mabele? Mpe mpo na nini Yesu andimaki kosala mokano ya moto yango?

Samantha: Sikoyo, nabandi kokanga ntina ya likambo oyo ozali koloba. Kasi, nandimi te ete vɛrsɛ wana moko mpamba ekoki kondimisa biso ete Yesu azali Nzambe te.

Karen: Kasi, tótalela maloba oyo Yesu alobaki mokolo mosusu. Alobaki maloba mosusu ya ndenge wana na mokanda ya Yoane, na mokapo oyo elandi. Okoki kotánga Yoane 7:16?

Samantha: Ɛɛ. “Bongo, Yesu ayanolaki bango mpe alobaki ete: ‘Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.’”

Karen: Matɔndi mingi, Samantha. Ndenge vɛrsɛ oyo emonisi, Yesu azalaki koteya makanisi na ye moko?

Samantha: Te, alobaki ete makambo oyo azalaki koteya ezalaki ya moto oyo atindaki ye.

Karen: Ezali bongo. Tosengeli lisusu komituna boye: ‘Nani atindaki Yesu? Mpe nani apesaki ye mateya ya solo oyo azalaki koteya?’ Moto yango aleki Yesu te? Kutu, moto oyo atindaka moninga, ye nde aleki.

Samantha: Esepelisi ngai mpenza. Natángá naino vɛrsɛ oyo liboso te.

Karen: Tótalela mpe maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 14:28, oyo elobi: “Boyokaki ndenge nalobaki na bino ete: Nazali kokende mpe nakozongela bino. Soki bolingaki ngai, bolingaki kosepela na ndenge nazali kokende epai ya Tata, mpo Tata aleki ngai.” Soki totali maloba ya vɛrsɛ oyo, okanisi ete Yesu azalaki komitalela ndenge nini liboso ya Tata na ye?

Samantha: Yesu alobaki ete Tata aleki ye. Boye, nakanisi ete Yesu azalaki komona ete Nzambe azali mokonzi na ye.

Karen: Ezali mpenza bongo. Tózwa ndakisa mosusu: Yoká maloba oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye, oyo ezali na Matai 28:18. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.” Yesu alobaki nde ete azalaki na bokonzi nyonso banda kala?

Samantha: Te, alobaki ete bapesaki ye yango.

Karen: Kasi, soki Yesu azali Nzambe, ndenge nini bakokaki kopesa ye bokonzi mingi lisusu? Mpe nani apesaki ye yango?

Samantha: Nakanisá naino likambo yango te.

Yesu azalaki koloba na nani?

Karen: Ezali na eloko mosusu oyo ekoki kokamwisa soki Yesu azali mpenza Nzambe.

Samantha: Eloko yango nini?

Karen: Ezali likambo oyo Biblia elobi mpo na batisimo ya Yesu. Talá lisolo oyo ezali na Luka 3:21, 22. Okoki kotánga vɛrsɛ yango?

Samantha: “Ntango bato nyonso babatisamaki, Yesu mpe abatisamaki, bongo ntango azalaki kobondela, likoló efungwamaki mpe elimo santu oyo emonanaki lokola ebenga ekitelaki ye, mpe mongongo moko eutaki na likoló ete: ‘Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nandimi yo.’”

Karen: Osimbi likambo oyo Yesu azalaki kosala ntango azwaki batisimo?

Samantha: Azalaki kobondela.

Karen: Ɛɛ. Na yango, tokoki komituna boye: ‘Soki Yesu azali Nzambe, azalaki kobondela nani?’

Samantha: Wana ezali motuna moko malamu. Nakotuna pastɛrɛ na biso.

Karen: Ezali mpe na likambo mosusu tosengeli kokanisa na yango; simbá ete ntango Yesu abimaki na mai, moto moko alobaki kuna na likoló. Oyebi makambo oyo moto yango alobaki?

Samantha: Alobaki ete Yesu azali Mwana na ye, oyo alingaka mingi, mpe andimi ye.

Karen: Olobi solo. Kasi, soki Yesu azali Nzambe, nani alobaki makambo wana kuna na likoló?

Samantha: Nakanisá naino bongo liboso te.

Mpo na nini “Tata” mpe “Mwana”?

Karen: Ezali na likambo mosusu tosengeli kotalela awa: Touti kotánga ete Yesu alobaki ete Nzambe azali Tata na ye ya likoló. Mpe ntango Yesu azwaki batisimo, mongongo moko eutaki na likoló, ebengaki Yesu Mwana na ye. Kutu, Yesu ye moko amibengaki Mwana ya Nzambe. Sikoyo, soki olingi koyebisa ngai ete bato mibale bazali ndenge moko, na kati ya libota, ndakisa ya banani okopesa?

Samantha: Nakoki kopesa ndakisa ya bana mibale.

Karen: Ezali mpenza bongo​—ntango mosusu ata ndakisa ya bana mapasa. Kasi, Yesu alobaki ete Nzambe azali Tata mpe ye moko azali Mwana. Boye, okanisi ete Yesu alingaki koloba nini?

Samantha: Namoni likambo olingi oloba. Yesu azali kolobela moto moko oyo azali mokóló na ye mpe azali na bokonzi koleka ye.

Karen: Ezali mpenza bongo. Kanisá naino: Mpo na komonisa ete bato mibale bakokani, opesi ndakisa oyo ebongi mpenza, ya bana ya libota moko to bana mapasa. Soki Yesu azalaka mpenza Nzambe, okanisi te ete lokola azalaki Moteyi Monene, akokaki kosalela ndakisa wana, to ata ndakisa mosusu ya polele koleka mpo na komonisa ete ye ná Tata na ye bazali ndenge moko?

Samantha: Ezali bongo.

Karen: Kutu, asalelaki nde maloba “Tata” mpe “Mwana” mpo na kolobela boyokani na ye ná Nzambe.

Samantha: Obimisi likanisi moko ya ntina.

Bayekoli ya liboso ya Yesu balobaki nini?

Karen: Liboso tókabwana, nalingaki tótalela likanisi mosusu, soki ozali na ntango.

Samantha: Ɛɛ, nazali naino na mwa miniti.

Karen: Soki Yesu azali mpenza Nzambe, okanisi te ete bayekoli na ye balingaki koloba yango polele?

Samantha: Balingaki koloba yango.

Karen: Kasi, na Biblia, ezali ata na esika moko te oyo bayekoli na ye balobi bongo. Kutu, talá oyo ntoma Paulo, moko ya bayekoli ya liboso ya Yesu akomaki. Na Bafilipi 2:9, alobeli likambo oyo Nzambe asalaki nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu: “Nzambe atombolaki ye [Yesu] likoló koleka mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso.” Na kotalela vɛrsɛ oyo, Nzambe asalaki nini mpo na Yesu?

Samantha: Vɛrsɛ yango elobi ete Nzambe atombolaki ye likoló koleka.

Karen: Ezali bongo. Kasi, soki Yesu azalaka ndenge moko ná Nzambe liboso akufa, mpe na nsima Nzambe atombola ye likoló, yango elingaki te kosala ete Yesu aleka Nzambe? Nani akoki koleka Nzambe?

Samantha: Moto moko te.

Karen: Ezali bongo. Boye, na kotalela makambo oyo nyonso, okoloba ete Biblia eteyaka ete Yesu azali Nzambe?

Samantha: Te, emonani ete Yesu azali Nzambe te. Biblia elobi ete azali nde Mwana ya Nzambe.

Karen: Olobi solo. Samantha, tiká nayebisa yo ete Batatoli ya Yehova bazwaka Yesu na valɛrɛ mingi. Tondimaka ete liwa na ye lokola Masiya oyo alakamaki efungoli nzela ya lobiko mpo na bato nyonso ya sembo.

Samantha: Ngai mpe nandimaka yango.

Karen: Mbala mosusu okoki komituna boye: ‘Ndenge nini tokoki komonisa Yesu ete tozalaka na botɔndi ndenge apesaki bomoi na ye mpo na biso?’ *

Samantha: Yango nde nazalaki kokanisa.

Karen: Ntango mosusu okosepela nazongela yo mpo na komonisa yo eyano oyo Biblia epesi. Okozala na ndako na ngonga oyo na pɔsɔ ezali koya?

Samantha: Ɛɛ, nakozala na ndako.

Karen: Malamu, tokokutana mokolo ya pɔsɔ.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 76 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 5 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?