Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Siansi endimi makambo oyo Biblia elobi

Siansi endimi makambo oyo Biblia elobi

“Kala nakomelaki yo te na batoli mpe na boyebi, mpo nalakisa yo bosolo ya maloba ya solo, mpo na kozongisa maloba oyo ezali solo?”​—MASESE 22:20, 21.

NA NDENGE NINI BIBLIA EKESENI NA BABUKU MOSUSU? Mbala mingi, babuku ya kala ezalaka na makanisi oyo tokoki kotyela motema te mpe ya mabe, oyo siansi ya mikolo na biso emonaka ete ezali solo ata moke te. Ata lelo oyo, esɛngaka ete bakomi bábongisa lisusu makambo oyo ezali na babuku oyo bakomá, mpo eyokana na makambo ya sika oyo ezali kobima. Nzokande, Biblia elobi ete nkolo na yango azali Mozalisi mpe Liloba na ye “ezali koumela libela na libela.”​—1 Petro 1:25.

NA NDAKISA: Mibeko ya Moize ezalaki kosɛnga Bayisraele bákundaka bosɔtɔ na libulu “libándá ya kaa” mpe bázipa yango. (Kolimbola Mibeko 23:12, 13) Soki Moyisraele moko asimbi nyama oyo ekufi to moto oyo akufi, asengelaki kosukola na mai. (Balevi 11:27, 28; Mitángo 19:14-16) Soki moto azali na maladi ya maba, esengelaki kotya ye mosika na bato, tii ntango ekomonana ete maladi na ye ekoki lisusu kozwa bato mosusu te.​—Balevi 13:1-8.

LELO OYO MINGANGA BALOBI NINI? Tii lelo, koyeba kolongola bosɔtɔ, kosukola mabɔkɔ, mpe kotya mosika moto oyo azali na maladi oyo ekoki kozwa bato mosusu ezali lolenge eleki malamu ya kobengana bamaladi. Na bisika oyo batwalɛti ezali te, ebongiseli moko ya Amerika oyo etalelaka bamaladi oyo ezwaka bato mingi na mbala moko epesi malako oyo: “Soki oyoki mposa ya kokɔta twalɛti, kende na ntaka ya mɛtrɛ 30, mosika mpenza na esika oyo mai ezali, na nsima kundá bosɔtɔ na yo.” Ebongiseli ya ONU oyo etalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) elobi ete soki na esika bofandi bato bazali na batwalɛti ya malamu, yango ekoki kosala ete bato moke kaka (36%) bábɛla maladi ya pulupulu. Eleki sikoyo mbula pene na 200, minganga bayaki koyeba ete bazalaki kopesa bato mingi maladi mpo bazalaki kosukola mabɔkɔ te nsima ya kosimba ebembe. Tii lelo, ebongiseli yango ya Amerika ebengaka kosukola mabɔkɔ “lolenge eleki malamu ya kopekisa ete maladi epalangana.” Kasi, tokoloba nini mpo na ebongiseli ya kotya bato ya maba mpe bato oyo bazali kobɛla bamaladi mosusu mosika na bato? Kala mingi te, zulunalo moko (Saudi Medical Journal) elobaki boye: “Ntango maladi oyo ezwaka bato mingi na mbala moko ezali naino na ebandeli, kotya moto oyo azwi yango mosika na bato ezali lolenge kaka moko eleki malamu ya kobatela bato mosusu mpo bázwa yango te.”

OKANISI NINI? Okanisi ete ezali na babuku mosantu mosusu ya kala oyo siansi endimi makambo oyo yango elobi? Omoni te ete Biblia ekeseni na babuku mosusu nyonso?

“Ndenge oyo Bayisraele na ntango ya Moize bazalaki komibatela pɛto mpo bázwa bamaladi te ekamwisaka moto nyonso.”​—MANUAL OF TROPICAL MEDICINE, YA DR. ALDO CASTELLANI MPE DR. ALBERT J. CHALMERS